Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.2.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Amos
Amos
3
LIN
BSB
A
a
Amos 3
3
Amos
Messages to Israel
Lingala Bible
Israel
, person
Egypt
, place
Samaria
, place
Bethel
, place
Ashdod
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :
BSB
BSB:
Hear this word that the LORD has spoken against you, O children of Israel, against the whole family that I brought up out of the land of Egypt:
2
LIN
« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele ; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.
BSB
BSB:
“Only you have I known from all the families of the earth; therefore I will punish you for all your iniquities.”
3
LIN
Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko soki bayokani te ?
BSB
BSB:
Can two walk together without agreeing where to go?
4
LIN
Nkosi ekoki solo koganga na zamba soki emoni te nyama ya kolia ? Mwana nkosi ekoki penza konguluma na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te ?
BSB
BSB:
Does a lion roar in the forest when he has no prey? Does a young lion growl in his den if he has caught nothing?
5
LIN
Ndeke ekoki solo kokangama na motambo oyo ezali na mabele soki ezangi eloko ya kolia ? Motambo ekoki solo koningana soki ekangi eloko te ?
BSB
BSB:
Does a bird land in a snare where no bait has been set? Does a trap spring from the ground when it has nothing to catch?
6
LIN
Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga ? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te ?
BSB
BSB:
If a ram’s horn sounds in a city, do the people not tremble? If calamity comes to a city, has not the LORD caused it?
7
LIN
Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.
BSB
BSB:
Surely the Lord GOD does nothing without revealing His plan to His servants the prophets.
8
LIN
Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?
BSB
BSB:
The lion has roared—who will not fear? The Lord GOD has spoken—who will not prophesy?
9
LIN
Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito : ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango !
BSB
BSB:
Proclaim to the citadels of Ashdod and to the citadels of Egypt: “Assemble on the mountains of Samaria; see the great unrest in the city and the acts of oppression in her midst.”
10
LIN
Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »
BSB
BSB:
“For they know not how to do right,” declares the LORD. “They store up violence and destruction in their citadels.”
11
LIN
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Monguna moko akozingela yo, akosukisa yo mpe akobotola na makasi biloko kati na bandako na yo, oyo batonga makasi. »
BSB
BSB:
Therefore this is what the Lord GOD says: “An enemy will surround the land; he will pull down your strongholds and plunder your citadels.”
12
LIN
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi makolo mibale to songe ya litoyi ya meme, ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama, ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge mpe na basuka ya bambeto na bango. »
BSB
BSB:
This is what the LORD says: “As the shepherd snatches from the mouth of the lion two legs or a piece of an ear, so the Israelites dwelling in Samaria will be rescued having just the corner of a bed or the cushion of a couch.
13
LIN
« Boyoka makambo oyo mpe bokebisa ndako ya Jakobi, » elobi Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
Hear and testify against the house of Jacob, declares the Lord GOD, the God of Hosts.
14
LIN
« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.
BSB
BSB:
On the day I punish Israel for their transgressions, I will visit destruction on the altars of Bethel; the horns of the altar will be cut off, and they will fall to the ground.
15
LIN
Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi mpe ya tango ya molunge makasi ; mpe bandako oyo batonga kitoko na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, » elobi Yawe.
BSB
BSB:
I will tear down the winter house along with the summer house; the houses of ivory will also perish, and the great houses will come to an end,” declares the LORD.
Chapter complete
You’ve read Amos 3
Chapter 3 of 9 in Amos
Up next
Amos 4
Read Amos 4
Back to Amos 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Amos 3
Ask Study Help
Ask anything about Amos 3
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Amos 2
Amos 3
Amos 4