Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.1.1
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Amos
Amos
5
LIN
BSB
A
a
Amos 5
5
Amos
Messages to Israel
Lingala Bible
Israel
, person
Joseph
, person
Bethel
, place
Damascus
, place
Gilgal
, place
Beersheba
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Oh libota ya Isalaele, boyoka maloba oyo, eleli oyo nazali koloba na tina na bino :
BSB
BSB:
Hear this word, O house of Israel, this lamentation I take up against you:
2
LIN
« Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te ! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »
BSB
BSB:
“Fallen is Virgin Israel, never to rise again. She lies abandoned on her land, with no one to raise her up.”
3
LIN
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Engumba oyo ekotinda basoda nkoto moko mpo na kobundela Isalaele ekotikala kaka na basoda nkama moko, mpe oyo ekotinda basoda nkama moko ekotikala kaka na basoda zomi. »
BSB
BSB:
This is what the Lord GOD says: “The city that marches out a thousand strong will have but a hundred left, and the one that marches out a hundred strong will have but ten left in the house of Israel.”
4
LIN
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na libota ya Isalaele : « Bozonga epai na Ngai mpe bokobika !
BSB
BSB:
For this is what the LORD says to the house of Israel: “Seek Me and live!
5
LIN
Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »
BSB
BSB:
Do not seek Bethel or go to Gilgal; do not journey to Beersheba, for Gilgal will surely go into exile, and Bethel will come to nothing.
6
LIN
Boluka Yawe mpe bokobika, soki te akokitela libota ya Jozefi lokola moto oyo ekozikisa yango, mpe moto moko te akozala na Beteli mpo na koboma yango.
BSB
BSB:
Seek the LORD and live, or He will sweep like fire through the house of Joseph; it will devour everything, with no one at Bethel to extinguish it.
7
LIN
Bino bato oyo bobongolaka bosembo ngenge mpe bobwakaka bosolo na mabele,
BSB
BSB:
There are those who turn justice into wormwood and cast righteousness to the ground.
8
LIN
boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili ; Kombo na Ye ezali : Yawe.
BSB
BSB:
He who made the Pleiades and Orion, who turns darkness into dawn and darkens day into night, who summons the waters of the sea and pours them over the face of the earth—the LORD is His name—
9
LIN
Akweyisaka bato ya makasi mpe abebisaka engumba ya makasi.
BSB
BSB:
He flashes destruction on the strong, so that fury comes upon the stronghold.
10
LIN
Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,
BSB
BSB:
There are those who hate the one who reproves in the gate and despise him who speaks with integrity.
11
LIN
lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.
BSB
BSB:
Therefore, because you trample on the poor and exact from him a tax of grain, you will never live in the stone houses you have built; you will never drink the wine from the lush vineyards you have planted.
12
LIN
Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene : bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka, mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te.
BSB
BSB:
For I know that your transgressions are many and your sins are numerous. You oppress the righteous by taking bribes; you deprive the poor of justice in the gate.
13
LIN
Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.
BSB
BSB:
Therefore, the prudent keep silent in such times, for the days are evil.
14
LIN
Bolukaka kosala bolamu, kasi mabe te, mpo ete bokoka kobika. Boye, Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, akozala elongo na bino, ndenge kaka bozali koloba yango.
BSB
BSB:
Seek good, not evil, so that you may live. And the LORD, the God of Hosts, will be with you, as you have claimed.
15
LIN
Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.
BSB
BSB:
Hate evil and love good; establish justice in the gate. Perhaps the LORD, the God of Hosts, will be gracious to the remnant of Joseph.”
16
LIN
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Kolela ekozala na babalabala nyonso, mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka. Bakobengisa basali bilanga na matanga, mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.
BSB
BSB:
Therefore this is what the LORD, the God of Hosts, the Lord, says: “There will be wailing in all the public squares and cries of ‘Alas! Alas!’ in all the streets. The farmer will be summoned to mourn, and the mourners to wail.
17
LIN
Kolela ekozala na bilanga nyonso ya vino, pamba te nakoleka kati na bino, » elobi Yawe.
BSB
BSB:
There will be wailing in all the vineyards, for I will pass through your midst,” says the LORD.
18
LIN
Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe ! Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe ? Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.
BSB
BSB:
Woe to you who long for the Day of the LORD! What will the Day of the LORD be for you? It will be darkness and not light.
19
LIN
Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo ; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.
BSB
BSB:
It will be like a man who flees from a lion, only to encounter a bear, or who enters his house and rests his hand against the wall, only to be bitten by a snake.
20
LIN
Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili ? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole ? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.
BSB
BSB:
Will not the Day of the LORD be darkness and not light, even gloom with no brightness in it?
21
LIN
Nayini bafeti na bino ya bule, nazali kosepela na yango ata moke te ; mayangani na bino ya bule ezali kolumba solo mabe liboso na Ngai.
BSB
BSB:
“I hate, I despise your feasts! I cannot stand the stench of your solemn assemblies.
22
LIN
Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma, nakondima yango te ; ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta, nakotala yango ata moke te.
BSB
BSB:
Even though you offer Me burnt offerings and grain offerings, I will not accept them; for your peace offerings of fattened cattle I will have no regard.
23
LIN
Bolongola makelele ya banzembo na bino liboso na Ngai ! Nakoyoka mindule ya mandanda na bino te.
BSB
BSB:
Take away from Me the noise of your songs! I will not listen to the music of your harps.
24
LIN
Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo ndenge ebale etiolaka, mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.
BSB
BSB:
But let justice roll on like a river, and righteousness like an ever-flowing stream.
25
LIN
Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe ?
BSB
BSB:
Did you bring Me sacrifices and offerings forty years in the wilderness, O house of Israel?
26
LIN
Nzokande, botombolaki ndako ya kapo ya Sikuti, mokonzi na bino, mpe evandelo ya Kevani, nzambe na bino ya ekeko, monzoto ya nzambe na bino oyo bomisalelaki.
BSB
BSB:
You have taken along Sakkuth your king and Kaiwan your star god, the idols you made for yourselves.
27
LIN
Yango wana nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Damasi, elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
Therefore I will send you into exile beyond Damascus,” says the LORD, whose name is the God of Hosts.
Chapter complete
You’ve read Amos 5
Chapter 5 of 9 in Amos
Up next
Amos 6
Read Amos 6
Back to Amos 4
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Amos 5
Ask Study Help
Ask anything about Amos 5
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Amos 4
Amos 5
Amos 6