Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.15.0
Skip to content
Opened
en
Loading
Today
Ask
Read
Journey
More
Loading
Loading chapter
Loading chapter
Dan
Daniel
12
LIN
BSB
A
a
Daniel 12
12
Daniel
Visions of the kingdoms
Lingala Bible
Daniel
, person
Michael
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.
BSB
BSB:
“At that time Michael, the great prince who stands watch over your people, will rise up. There will be a time of distress, the likes of which will not have occurred from the beginning of nations until that time. But at that time your people—everyone whose name is found written in the book—will be delivered.
2
LIN
Ebele ya bato oyo bakundama na se ya mabele bakosekwa : bamoko mpo na bomoi ya seko, mpe mosusu mpo na soni mpe somo ya libela.
BSB
BSB:
And many who sleep in the dust of the earth will awake, some to everlasting life, but others to shame and everlasting contempt.
3
LIN
Bato oyo batambolaki na bwanya bakongenga lokola pole ya mapata ; mpe bato oyo bakolakisa bato ebele nzela ya bosembo, bango mpe bakongenga lokola minzoto libela na libela.
BSB
BSB:
Then the wise will shine like the brightness of the heavens, and those who lead many to righteousness will shine like the stars forever and ever.
4
LIN
Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »
BSB
BSB:
But you, Daniel, shut up these words and seal the book until the time of the end. Many will roam to and fro, and knowledge will increase.”
5
LIN
Boye, wana ngai, Daniele, nazalaki kotala, namonaki bato mibale batelemi liboso na ngai : moko azalaki na ngambo moko ya ebale, mpe mosusu azalaki na ngambo mosusu ya ebale.
BSB
BSB:
Then I, Daniel, looked and saw two others standing there, one on this bank of the river and one on the opposite bank.
6
LIN
Moko kati na bango alobaki epai ya moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale : — Makambo oyo ya kokamwa ekosala tango boni ?
BSB
BSB:
One of them said to the man dressed in linen, who was above the waters of the river, “How long until the fulfillment of these wonders?”
7
LIN
Moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale atombolaki loboko na ye ya mobali mpe loboko na ye ya mwasi na likolo, mpe nayokaki ye kolapa ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko : — Ekozala mibu misato na ndambo. Tango nguya ya ekolo ya bule ekosila, makambo oyo nyonso ekokokisama.
BSB
BSB:
And the man dressed in linen, who was above the waters of the river, raised his right hand and his left hand toward heaven, and I heard him swear by Him who lives forever, saying, “It will be for a time, and times, and half a time. When the power of the holy people has finally been shattered, all these things will be completed.”
8
LIN
Nayokaki ye, kasi nasosolaki te. Boye, natunaki : — Makambo oyo ekosukela ndenge nini, nkolo na ngai ?
BSB
BSB:
I heard, but I did not understand. So I asked, “My lord, what will be the outcome of these things?”
9
LIN
Azongisaki : — Daniele, kende na yo, pamba te maloba oyo ezali sekele, mpe buku na yango ekangama kino na tango ya suka.
BSB
BSB:
“Go on your way, Daniel,” he replied, “for the words are closed up and sealed until the time of the end.
10
LIN
Bato ebele bakopetolama, bakozanga mbeba mpe bakokoma bato ya kokoka ; kasi bato mabe bakokoba kaka kosala mabe. Moto moko te ya mabe akososola, kaka bato oyo bakozala na bwanya nde bakososola.
BSB
BSB:
Many will be purified, made spotless, and refined, but the wicked will continue to act wickedly. None of the wicked will understand, but the wise will understand.
11
LIN
Wuta tango oyo bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo kino tango oyo bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi, ekoleka mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku libwa.
BSB
BSB:
And from the time the daily sacrifice is abolished and the abomination of desolation set up, there will be 1,290 days.
12
LIN
Tika ete apambolama ye oyo azali kozela kino na suka ya mokolo ya nkoto moko na nkama misato na tuku misato na mitano.
BSB
BSB:
Blessed is he who waits and reaches the end of the 1,335 days.
13
LIN
Mpo na yo, yika mpiko kino na suka ; okopema mpe, na mokolo ya suka, okosekwa mpo na kozwa litomba na yo.
BSB
BSB:
But as for you, go on your way until the end. You will rest, and then you will arise to your inheritance at the end of the days.”
Chapter complete
You’ve read Daniel 12
Chapter 12 of 12 in Daniel
Up next
Hosea 1
Read Hosea 1
Back to Daniel 11
Go Deeper
Commentary
What the commentators say on Daniel 12
A question this chapter raises
Was Jesus copied from pagan gods like Horus or Mithras?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Daniel 11
Daniel 12
Hosea 1