1 LIN Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te to na nzela ya moto te, kasi na Yesu-Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki Ye kati na bakufi, BSB BSB: Paul, an apostle—sent not from men nor by man, but by Jesus Christ and God the Father, who raised Him from the dead—
2 LIN mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai ; Epai ya Mangomba ya Galatia : BSB BSB: and all the brothers with me, To the churches of Galatia:
3 LIN Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto ! BSB BSB: Grace and peace to you from God our Father and the Lord Jesus Christ,
4 LIN Yesu amipesaki mpo na masumu na biso mpo ete, kolanda mokano ya Nzambe, Tata na biso, akangola biso longwa na ekeke oyo ya mabe. BSB BSB: who gave Himself for our sins to rescue us from the present evil age, according to the will of our God and Father,
5 LIN Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela ! Amen ! BSB BSB: to whom be glory forever and ever. Amen.
7 LIN oyo ezalaka kutu te. Solo, ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe bazali koluka kobongola Sango Malamu ya Klisto. BSB BSB: which is not even a gospel. Evidently some people are troubling you and trying to distort the gospel of Christ.
9 LIN Ndenge tolobaki yango liboso, mpe nazali lisusu koloba yango sik’oyo : soki moto moko ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe ! BSB BSB: As we have said before, so now I say again: If anyone is preaching to you a gospel contrary to the one you received, let him be under a curse!
10 LIN Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo : nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe ? Boni, nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te. BSB BSB: Am I now seeking the approval of men, or of God? Or am I striving to please men? If I were still trying to please men, I would not be a servant of Christ.
11 LIN Bandeko na ngai, nalingi boyeba malamu ete Sango Malamu oyo nateyaki bino ezalaki mbuma ya makanisi ya bomoto te. BSB BSB: For I want you to know, brothers, that the gospel I preached was not devised by man.
12 LIN Nazwaki yango na moto moko te, nayekolaki yango mpe te ; kasi ezali Yesu-Klisto nde alakisaki ngai yango na nzela ya emoniseli. BSB BSB: I did not receive it from any man, nor was I taught it; rather, I received it by revelation from Jesus Christ.
14 LIN Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama ; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai. BSB BSB: I was advancing in Judaism beyond many of my contemporaries and was extremely zealous for the traditions of my fathers.
15 LIN Kasi tango Nzambe oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na nzela ya ngolu na Ye, asepelaki BSB BSB: But when God, who set me apart from my mother’s womb and called me by His grace, was pleased
16 LIN kotalisa ngai Mwana na Ye na nzela ya emoniseli mpo ete nakoka kosakola Ye kati na Bapagano, natunaki na mbala moko toli epai ya moto ata moko te. BSB BSB: to reveal His Son in me so that I might preach Him among the Gentiles, I did not rush to consult with flesh and blood,
17 LIN Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi. BSB BSB: nor did I go up to Jerusalem to the apostles who came before me, but I went into Arabia and later returned to Damascus.
20 LIN Nzambe azali Motatoli na ngai ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya lokuta te. BSB BSB: I assure you before God that what I am writing to you is no lie.
21 LIN Sima na yango, nakendeki na bituka ya Siri mpe ya Silisi. BSB BSB: Later I went to the regions of Syria and Cilicia.
22 LIN Kasi Baklisto ya Mangomba ya Yuda bayebaki ngai te, BSB BSB: I was personally unknown, however, to the churches of Judea that are in Christ.
23 LIN bayokaki kaka sango : « Moto oyo azalaki konyokola biso na kala akomi sik’oyo koteya kondima oyo azalaki koluka kobebisa. » BSB BSB: They only heard the account: “The man who formerly persecuted us is now preaching the faith he once tried to destroy.”
24 LIN Mpe bazalaki kokumisa Nzambe na tina na ngai. BSB BSB: And they glorified God because of me.
Select verses for actions: Enter goes to them and Escape comes back.