Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
14
LIN
BSB
A
a
Genesis 14
14
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Sodom
, place
Abram
, person
Chedorlaomer
, person
Gomorrah
, place
Siddim Valley
, place
Shinar
, place
Lot
, person
Elam
, place
31 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi,
BSB
BSB:
In those days Amraphel king of Shinar, Arioch king of Ellasar, Chedorlaomer king of Elam, and Tidal king of Goiim
2
LIN
bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.
BSB
BSB:
went to war against Bera king of Sodom, Birsha king of Gomorrah, Shinab king of Admah, Shemeber king of Zeboiim, and the king of Bela (that is, Zoar).
3
LIN
Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo.
BSB
BSB:
The latter five came as allies to the Valley of Siddim (that is, the Salt Sea).
4
LIN
Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye.
BSB
BSB:
For twelve years they had been subject to Chedorlaomer, but in the thirteenth year they rebelled.
5
LIN
Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;
BSB
BSB:
In the fourteenth year, Chedorlaomer and the kings allied with him went out and defeated the Rephaites in Ashteroth-karnaim, the Zuzites in Ham, the Emites in Shaveh-kiriathaim,
6
LIN
bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe.
BSB
BSB:
and the Horites in the area of Mount Seir, as far as El-paran, which is near the desert.
7
LIN
Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
BSB
BSB:
Then they turned back to invade En-mishpat (that is, Kadesh), and they conquered the whole territory of the Amalekites, as well as the Amorites who lived in Hazazon-tamar.
8
LIN
Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi
BSB
BSB:
Then the king of Sodom, the king of Gomorrah, the king of Admah, the king of Zeboiim, and the king of Bela (that is, Zoar) marched out and arrayed themselves for battle in the Valley of Siddim
9
LIN
mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano.
BSB
BSB:
against Chedorlaomer king of Elam, Tidal king of Goiim, Amraphel king of Shinar, and Arioch king of Ellasar—four kings against five.
10
LIN
Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba.
BSB
BSB:
Now the Valley of Siddim was full of tar pits, and as the kings of Sodom and Gomorrah fled, some men fell into the pits, but the survivors fled to the hill country.
11
LIN
Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia.
BSB
BSB:
The four kings seized all the goods of Sodom and Gomorrah and all their food, and they went on their way.
12
LIN
Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome.
BSB
BSB:
They also carried off Abram’s nephew Lot and his possessions, since Lot was living in Sodom.
13
LIN
Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
BSB
BSB:
Then an escapee came and reported this to Abram the Hebrew. Now Abram was living near the Oaks of Mamre the Amorite, a brother of Eshcol and Aner, all of whom were bound by treaty to Abram.
14
LIN
Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.
BSB
BSB:
And when Abram heard that his relative had been captured, he mobilized the 318 trained men born in his household, and they set out in pursuit as far as Dan.
15
LIN
Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.
BSB
BSB:
During the night, Abram divided his forces and routed Chedorlaomer’s army, pursuing them as far as Hobah, north of Damascus.
16
LIN
Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.
BSB
BSB:
He retrieved all the goods, as well as his relative Lot and his possessions, together with the women and the rest of the people.
17
LIN
Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.
BSB
BSB:
After Abram returned from defeating Chedorlaomer and the kings allied with him, the king of Sodom went out to meet him in the Valley of Shaveh (that is, the King’s Valley).
18
LIN
Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo
BSB
BSB:
Then Melchizedek king of Salem brought out bread and wine—since he was priest of God Most High—
19
LIN
mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami !
BSB
BSB:
and he blessed Abram and said: “Blessed be Abram by God Most High, Creator of heaven and earth,
20
LIN
Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
BSB
BSB:
and blessed be God Most High, who has delivered your enemies into your hand.” Then Abram gave Melchizedek a tenth of everything.
21
LIN
Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami : — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.
BSB
BSB:
The king of Sodom said to Abram, “Give me the people, but take the goods for yourself.”
22
LIN
Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili,
BSB
BSB:
But Abram replied to the king of Sodom, “I have raised my hand to the LORD God Most High, Creator of heaven and earth,
23
LIN
ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. »
BSB
BSB:
that I will not accept even a thread, or a strap of a sandal, or anything that belongs to you, lest you should say, ‘I have made Abram rich.’
24
LIN
Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.
BSB
BSB:
I will accept nothing but what my men have eaten and the share for the men who went with me—Aner, Eshcol, and Mamre. They may take their portion.”
Chapter complete
You’ve read Genesis 14
Chapter 14 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 15
Read Genesis 15
Listen
Back to Genesis 13
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 14
A question this chapter raises
Did Moses write the first five books?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 13
Genesis 14
Genesis 15