Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.36.0
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
4
LIN
BSB
A
a
Genesis 4
4
Genesis
Creation and the fall
Lingala Bible
Cain
, person
Abel
, person
Lamech
, person
Adah
, person
Zillah
, person
Adam
, person
Seth
, person
Enoch
, person
11 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »
BSB
BSB:
And Adam had relations with his wife Eve, and she conceived and gave birth to Cain. “With the help of the LORD I have brought forth a man,” she said.
2
LIN
Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga.
BSB
BSB:
Later she gave birth to Cain’s brother Abel. Now Abel was a keeper of sheep, while Cain was a tiller of the soil.
3
LIN
Sima na mwa tango, Kayina amemaki mbuma ya mabele mpo na kobonzela Yawe.
BSB
BSB:
So in the course of time, Cain brought some of the fruit of the soil as an offering to the LORD,
4
LIN
Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye,
BSB
BSB:
while Abel brought the best portions of the firstborn of his flock. And the LORD looked with favor on Abel and his offering,
5
LIN
kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa.
BSB
BSB:
but He had no regard for Cain and his offering. So Cain became very angry, and his countenance fell.
6
LIN
Yawe alobaki na Kayina : — Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ?
BSB
BSB:
“Why are you angry,” said the LORD to Cain, “and why has your countenance fallen?
7
LIN
Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.
BSB
BSB:
If you do what is right, will you not be accepted? But if you refuse to do what is right, sin is crouching at your door; it desires you, but you must master it.”
8
LIN
Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.
BSB
BSB:
Then Cain said to his brother Abel, “Let us go out to the field.” And while they were in the field, Cain rose up against his brother Abel and killed him.
9
LIN
Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ?
BSB
BSB:
And the LORD said to Cain, “Where is your brother Abel?” “I do not know!” he answered. “Am I my brother’s keeper?”
10
LIN
Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.
BSB
BSB:
“What have you done?” replied the LORD. “The voice of your brother’s blood cries out to Me from the ground.
11
LIN
Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki.
BSB
BSB:
Now you are cursed and banished from the ground, which has opened its mouth to receive your brother’s blood from your hand.
12
LIN
Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.
BSB
BSB:
When you till the ground, it will no longer yield its produce to you. You will be a fugitive and a wanderer on the earth.”
13
LIN
Kayina alobaki na Yawe : — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema !
BSB
BSB:
But Cain said to the LORD, “My punishment is greater than I can bear.
14
LIN
Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
BSB
BSB:
Behold, this day You have driven me from the face of the earth, and from Your face I will be hidden; I will be a fugitive and a wanderer on the earth, and whoever finds me will kill me.”
15
LIN
Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
BSB
BSB:
“Not so!” replied the LORD. “If anyone slays Cain, then Cain will be avenged sevenfold.” And the LORD placed a mark on Cain, so that no one who found him would kill him.
16
LIN
Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi, na este ya Edeni.
BSB
BSB:
So Cain went out from the presence of the LORD and settled in the land of Nod, east of Eden.
17
LIN
Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.
BSB
BSB:
And Cain had relations with his wife, and she conceived and gave birth to Enoch. Then Cain built a city and named it after his son Enoch.
18
LIN
Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki.
BSB
BSB:
Now to Enoch was born Irad, and Irad was the father of Mehujael, and Mehujael was the father of Methusael, and Methusael was the father of Lamech.
19
LIN
Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. »
BSB
BSB:
And Lamech married two women, one named Adah and the other Zillah.
20
LIN
Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele.
BSB
BSB:
Adah gave birth to Jabal; he was the father of those who dwell in tents and raise livestock.
21
LIN
Ndeko na ye ya mobali, Yubali, azalaki koko ya bato oyo babetaka lindanda mpe flite.
BSB
BSB:
And his brother’s name was Jubal; he was the father of all who play the harp and flute.
22
LIN
Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
BSB
BSB:
And Zillah gave birth to Tubal-cain, a forger of every implement of bronze and iron. And the sister of Tubal-cain was Naamah.
23
LIN
Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali !
BSB
BSB:
Then Lamech said to his wives: “Adah and Zillah, hear my voice; wives of Lamech, listen to my speech. For I have slain a man for wounding me, a young man for striking me.
24
LIN
Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina ; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo ! »
BSB
BSB:
If Cain is avenged sevenfold, then Lamech seventy-sevenfold.”
25
LIN
Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
BSB
BSB:
And Adam again had relations with his wife, and she gave birth to a son and named him Seth, saying, “God has granted me another seed in place of Abel, since Cain killed him.”
26
LIN
Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.
BSB
BSB:
And to Seth also a son was born, and he called him Enosh. At that time men began to call upon the name of the LORD.
Chapter complete
You’ve read Genesis 4
Chapter 4 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 5
Read Genesis 5
Listen
Back to Genesis 3
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 4
Ask Opened AI
Ask anything about Genesis 4
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 3
Genesis 4
Genesis 5