Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.37.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
6
LIN
BSB
A
a
Genesis 6
6
Genesis
The flood and the nations
Lingala Bible
Noah
, person
Shem
, person
Japheth
, person
Ham
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi,
BSB
BSB:
Now when men began to multiply on the face of the earth and daughters were born to them,
2
LIN
milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.
BSB
BSB:
the sons of God saw that the daughters of men were beautiful, and they took as wives whomever they chose.
3
LIN
Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
BSB
BSB:
So the LORD said, “My Spirit will not contend with man forever, for he is mortal; his days shall be 120 years.”
4
LIN
Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.
BSB
BSB:
The Nephilim were on the earth in those days—and afterward as well—when the sons of God had relations with the daughters of men. And they bore them children who became the mighty men of old, men of renown.
5
LIN
Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.
BSB
BSB:
Then the LORD saw that the wickedness of man was great upon the earth, and that every inclination of the thoughts of his heart was altogether evil all the time.
6
LIN
Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.
BSB
BSB:
And the LORD regretted that He had made man on the earth, and He was grieved in His heart.
7
LIN
Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
BSB
BSB:
So the LORD said, “I will blot out man, whom I have created, from the face of the earth—every man and beast and crawling creature and bird of the air—for I am grieved that I have made them.”
8
LIN
Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe.
BSB
BSB:
Noah, however, found favor in the eyes of the LORD.
9
LIN
Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.
BSB
BSB:
This is the account of Noah. Noah was a righteous man, blameless in his generation; Noah walked with God.
10
LIN
Noa azalaki na bana mibali misato : Semi, Cham mpe Jafeti.
BSB
BSB:
And Noah had three sons: Shem, Ham, and Japheth.
11
LIN
Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.
BSB
BSB:
Now the earth was corrupt in the sight of God, and full of violence.
12
LIN
Nzambe amonaki ndenge mokili ebebaki, pamba te bato nyonso ya mokili babebisaki banzela na bango.
BSB
BSB:
And God looked upon the earth and saw that it was corrupt; for all living creatures on the earth had corrupted their ways.
13
LIN
Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.
BSB
BSB:
Then God said to Noah, “The end of all living creatures has come before Me, because through them the earth is full of violence. Now behold, I will destroy both them and the earth.
14
LIN
Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango.
BSB
BSB:
Make for yourself an ark of gopher wood; make rooms in the ark and coat it with pitch inside and out.
15
LIN
Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
BSB
BSB:
And this is how you are to build it: The ark is to be 300 cubits long, 50 cubits wide, and 30 cubits high.
16
LIN
Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato.
BSB
BSB:
You are to make a roof for the ark, finish its walls a cubit from the top, place a door in the side of the ark, and build lower, middle, and upper decks.
17
LIN
Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.
BSB
BSB:
And behold, I will bring floodwaters upon the earth to destroy every creature under the heavens that has the breath of life. Everything on the earth will perish.
18
LIN
Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa : yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo.
BSB
BSB:
But I will establish My covenant with you, and you will enter the ark—you and your sons and your wife and your sons’ wives with you.
19
LIN
Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo.
BSB
BSB:
And you are to bring two of every living creature into the ark—male and female—to keep them alive with you.
20
LIN
Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi.
BSB
BSB:
Two of every kind of bird and animal and crawling creature will come to you to be kept alive.
21
LIN
Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
BSB
BSB:
You are also to take for yourself every kind of food that is eaten and gather it as food for yourselves and for the animals.”
22
LIN
Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.
BSB
BSB:
So Noah did everything precisely as God had commanded him.
Chapter complete
You’ve read Genesis 6
Chapter 6 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 7
Read Genesis 7
Listen
Back to Genesis 5
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 6
A question this chapter raises
Was Noah’s flood global?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 5
Genesis 6
Genesis 7