Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Hag
Haggai
2
LIN
BSB
A
a
Haggai 2
2
Haggai
The glory to come
Lingala Bible
Haggai
, person
Zerubbabel
, person
Judah
, person
Joshua
, person
Jehozadak
, person
Shealtiel
, person
Egypt
, place
Darius
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na moko ya sanza ya sambo :
BSB
BSB:
On the twenty-first day of the seventh month, the word of the LORD came through Haggai the prophet, saying:
2
LIN
« Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali :
BSB
BSB:
“Speak to Zerubbabel son of Shealtiel, governor of Judah, and to Joshua son of Jehozadak, the high priest, and also to the remnant of the people. Ask them,
3
LIN
‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ?
BSB
BSB:
‘Who is left among you who saw this house in its former glory? How does it look to you now? Does it not appear to you like nothing in comparison?’
4
LIN
Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
But now be strong, O Zerubbabel, declares the LORD. Be strong, O Joshua son of Jehozadak, the high priest. And be strong, all you people of the land, declares the LORD. Work! For I am with you, declares the LORD of Hosts.
5
LIN
‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. ›
BSB
BSB:
This is the promise I made to you when you came out of Egypt. And My Spirit remains among you; do not be afraid.”
6
LIN
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele ;
BSB
BSB:
For this is what the LORD of Hosts says: “Once more, in a little while, I will shake the heavens and the earth, the sea and the dry land.
7
LIN
nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
I will shake all the nations, and they will come with all their treasures, and I will fill this house with glory, says the LORD of Hosts.
8
LIN
‹ Wolo mpe palata ezali ya Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
The silver is Mine, and the gold is Mine, declares the LORD of Hosts.
9
LIN
‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
BSB
BSB:
The latter glory of this house will be greater than the former, says the LORD of Hosts. And in this place I will provide peace, declares the LORD of Hosts.”
10
LIN
Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa :
BSB
BSB:
On the twenty-fourth day of the ninth month, in the second year of Darius, the word of the LORD came to Haggai the prophet, saying,
11
LIN
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko :
BSB
BSB:
“This is what the LORD of Hosts says: ‘Ask the priests for a ruling.
12
LIN
— Soki moto moko amemi na songe ya elamba mosuni oyo ebulisama, mpe songe yango etuti lipa to ndunda to vino to mafuta to bilei mosusu, boni, ekokoma bule ? › » Banganga-Nzambe bazongisaki : — Te, ekokoma bule te !
BSB
BSB:
If a man carries consecrated meat in the fold of his garment, and it touches bread, stew, wine, oil, or any other food, does that item become holy?’” “No,” replied the priests.
13
LIN
Mosakoli Aje alobaki : — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo ? Banganga-Nzambe bazongisaki : — Iyo, ekokoma mbindo.
BSB
BSB:
So Haggai asked, “If one who is defiled by contact with a corpse touches any of these, does it become defiled?” “Yes, it becomes defiled,” the priests answered.
14
LIN
Mosakoli Aje alobaki lisusu : « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo.
BSB
BSB:
Then Haggai replied, “So it is with this people and this nation before Me, declares the LORD, and so it is with every work of their hands; whatever they offer there is defiled.
15
LIN
Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe.
BSB
BSB:
Now consider carefully from this day forward: Before one stone was placed on another in the temple of the LORD,
16
LIN
Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi ; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale.
BSB
BSB:
from that time, when one came expecting a heap of twenty ephahs of grain, there were but ten. When one came to the winepress to draw out fifty baths, there were but twenty.
17
LIN
Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe.
BSB
BSB:
I struck you—all the work of your hands—with blight, mildew, and hail, but you did not turn to Me, declares the LORD.
18
LIN
« Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki ; botala malamu penza makambo oyo ekoleka.
BSB
BSB:
Consider carefully from this day forward—from the twenty-fourth day of the ninth month, the day the foundation of the LORD’s temple was laid—consider carefully:
19
LIN
Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »
BSB
BSB:
Is there still seed in the barn? The vine, the fig, the pomegranate, and the olive tree have not yet yielded fruit. But from this day on, I will bless you.”
20
LIN
Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa :
BSB
BSB:
For the second time that day, the twenty-fourth day of the month, the word of the LORD came to Haggai, saying,
21
LIN
« Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele,
BSB
BSB:
“Tell Zerubbabel governor of Judah that I am about to shake the heavens and the earth:
22
LIN
nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.
BSB
BSB:
I will overturn royal thrones and destroy the power of the kingdoms of the nations. I will overturn chariots and their riders; horses and their riders will fall, each by the sword of his brother.
23
LIN
Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
BSB
BSB:
On that day, declares the LORD of Hosts, I will take you, My servant, Zerubbabel son of Shealtiel, declares the LORD, and I will make you like My signet ring, for I have chosen you, declares the LORD of Hosts.”
Chapter complete
You’ve read Haggai 2
Chapter 2 of 2 in Haggai
Up next
Zechariah 1
Read Zechariah 1
Listen
Back to Haggai 1
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Haggai 2
A question this chapter raises
Does Daniel 9 point to the time of the Messiah?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Haggai 1
Haggai 2
Zechariah 1