Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.6.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Hos
Hosea
11
LIN
BSB
A
a
Hosea 11
11
Hosea
God's love will not let go
Lingala Bible
Ephraim
, person
Israel
, person
Egypt
, place
Assyria
, place
Judah
, person
Admah
, place
Zeboiim
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.
BSB
BSB:
When Israel was a child, I loved him, and out of Egypt I called My son.
2
LIN
Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye, tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai. Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.
BSB
BSB:
But the more I called Israel, the farther they departed from Me. They sacrificed to the Baals and burned incense to carved images.
3
LIN
Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi ndenge ya kotambola ; namemaki bango na maboko na Ngai, kasi basosolaki te ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.
BSB
BSB:
It was I who taught Ephraim to walk, taking them by the arms, but they never realized that it was I who healed them.
4
LIN
Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ; nalongolaki bango ekangiseli na bakingo mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.
BSB
BSB:
I led them with cords of kindness, with ropes of love; I lifted the yoke from their necks and bent down to feed them.
5
LIN
Lokola baboyi kozonga epai na Ngai, bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te, kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.
BSB
BSB:
Will they not return to the land of Egypt and be ruled by Assyria because they refused to repent?
6
LIN
Mopanga ekokota na bingumba na bango, ekobuka bikangelo ya bikuke na bango mpe ekosukisa mabongisi na bango.
BSB
BSB:
A sword will flash through their cities; it will destroy the bars of their gates and consume them in their own plans.
7
LIN
Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.
BSB
BSB:
My people are bent on turning from Me. Though they call to the Most High, He will by no means exalt them.
8
LIN
Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.
BSB
BSB:
How could I give you up, O Ephraim? How could I surrender you, O Israel? How could I make you like Admah? How could I treat you like Zeboiim? My heart is turned within Me; My compassion is stirred!
9
LIN
Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi, nakobebisa lisusu Efrayimi te. Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te ! Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ; nakoya lisusu na kanda te.
BSB
BSB:
I will not execute the full fury of My anger; I will not destroy Ephraim again. For I am God and not man—the Holy One among you—and I will not come in wrath.
10
LIN
Bakolanda Yawe ! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.
BSB
BSB:
They will walk after the LORD; He will roar like a lion. When He roars, His children will come trembling from the west.
11
LIN
Bakoya na kolenga lokola bandeke wuta na Ejipito, lokola bibenga wuta na Asiri. Nakovandisa bango na bandako na bango, elobi Yawe.
BSB
BSB:
They will come trembling like birds from Egypt and like doves from the land of Assyria. Then I will settle them in their homes, declares the LORD.
12
LIN
Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa ; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.
BSB
BSB:
Ephraim surrounds Me with lies, the house of Israel with deceit; but Judah still walks with God and is faithful to the Holy One.
Chapter complete
You’ve read Hosea 11
Chapter 11 of 14 in Hosea
Up next
Hosea 12
Read Hosea 12
Back to Hosea 10
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Hosea 11
A question this chapter raises
Why did God tell Hosea to marry an unfaithful woman?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Hosea 10
Hosea 11
Hosea 12