Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.13.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Hos
Hosea
2
LIN
BSB
A
a
Hosea 2
2
Hosea
Hosea's marriage
Lingala Bible
Egypt
, place
Jezreel
, place
Achor Valley
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
— Loba na bandeko na yo ya mibali : « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi : « Bozali balingami na ngai. »
BSB
BSB:
“Say of your brothers, ‘My people,’ and of your sisters, ‘My loved one.’
2
LIN
Bopamela mama na bino, bopamela ye ; pamba te azali lisusu mwasi na ngai te, mpe ngai nazali lisusu mobali na ye te. Tika ete alongola bilembo ya kindumba na elongi na ye mpe bilembo ya ekobo na mabele na ye.
BSB
BSB:
Rebuke your mother, rebuke her, for she is not My wife, and I am not her husband. Let her remove the adultery from her face and the unfaithfulness from between her breasts.
3
LIN
Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.
BSB
BSB:
Otherwise, I will strip her naked and expose her like the day of her birth. I will make her like a desert and turn her into a parched land, and I will let her die of thirst.
4
LIN
Nakolinga bana na ye te, pamba te bazali bana oyo babotami na nzela ya kindumba.
BSB
BSB:
I will have no compassion on her children, because they are the children of adultery.
5
LIN
Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki : « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »
BSB
BSB:
For their mother has played the harlot and has conceived them in disgrace. For she thought, ‘I will go after my lovers, who give me bread and water, wool and linen, oil and drink.’
6
LIN
Yango wana, nakokangela ye nzela na banzube, nakotongela ye mir mpo ete akoka lisusu komona nzela te.
BSB
BSB:
Therefore, behold, I will hedge up her path with thorns; I will enclose her with a wall, so she cannot find her way.
7
LIN
Akolanda bamakangu na ye, kasi akozwa bango te ; akoluka bango, kasi akomona bango te. Bongo akoloba : « Tika nazongela mobali na ngai ya liboso ; pamba te elongo na mobali ya liboso, nazalaki na esengo koleka sik’oyo ! »
BSB
BSB:
She will pursue her lovers but not catch them; she will seek them but not find them. Then she will say, ‘I will return to my first husband, for then I was better off than now.’
8
LIN
Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta ; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala.
BSB
BSB:
For she does not acknowledge that it was I who gave her grain, new wine, and oil, who lavished on her silver and gold—which they crafted for Baal.
9
LIN
Yango wana, nakobotola ble na ngai na tango ya kobuka, vino na ngai ya sika na tango ya kokamola yango ; nakobotola bilamba na ngai oyo basala na bapwale ya meme, mpe bilamba na ngai ya lino oyo azalaki kozipa na yango bolumbu na ye.
BSB
BSB:
Therefore I will take back My grain in its time and My new wine in its season; I will take away My wool and linen, which were given to cover her nakedness.
10
LIN
Boye, nakosambwisa ye na miso ya bamakangu na ye, mpe moto moko te akobikisa ye na maboko na ngai.
BSB
BSB:
And then I will expose her lewdness in the sight of her lovers, and no one will deliver her out of My hands.
11
LIN
Nakosukisa bisengo na ye nyonso : bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.
BSB
BSB:
I will put an end to all her exultation: her feasts, New Moons, and Sabbaths—all her appointed feasts.
12
LIN
Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango : « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai ; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.
BSB
BSB:
I will destroy her vines and fig trees, which she thinks are the wages paid by her lovers. So I will make them into a thicket, and the beasts of the field will devour them.
13
LIN
Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.
BSB
BSB:
I will punish her for the days of the Baals when she burned incense to them, when she adorned herself with rings and jewelry, and went after her lovers. But Me she forgot,” declares the LORD.
14
LIN
Yango wana, nakobuka ye motema, nakomema ye na esobe ; mpe kuna, nakoloba na motema na ye maloba na bolingo.
BSB
BSB:
“Therefore, behold, I will allure her and lead her to the wilderness, and speak to her tenderly.
15
LIN
Kuna nde nakozongisela ye bilanga na ye ya vino mpe nakokomisa Lubwaku ya Akori ekuke ya elikya. Kuna, akoyanola na esengo lokola na tango ya bolenge na ye, lokola na mokolo oyo abimaki na Ejipito.
BSB
BSB:
There I will give back her vineyards and make the Valley of Achor into a gateway of hope. There she will respond as she did in the days of her youth, as in the day she came up out of Egypt.
16
LIN
Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai : « Mobali na ngai ya libala ; » okobenga ngai lisusu te : « Nkolo na ngai. »
BSB
BSB:
In that day,” declares the LORD, “you will call Me ‘my Husband,’ and no longer call Me ‘my Master.’
17
LIN
Nakolongola na bibebu na ye bakombo ya banzambe ya Bala ; bakobelela lisusu bakombo na yango te.
BSB
BSB:
For I will remove from her lips the names of the Baals; no longer will their names be invoked.
18
LIN
Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.
BSB
BSB:
On that day I will make a covenant for them with the beasts of the field and the birds of the air and the creatures that crawl on the ground. And I will abolish bow and sword and battle in the land, and will make them lie down in safety.
19
LIN
Nakolinga yo lokola mwasi na ngai mpo na libela, nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo mpe na bosembo, na bolingo mpe na esengo.
BSB
BSB:
So I will betroth you to Me forever; I will betroth you in righteousness and justice, in loving devotion and compassion.
20
LIN
Nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo ; mpe na bongo, okoyeba Yawe malamu.
BSB
BSB:
And I will betroth you in faithfulness, and you will know the LORD.”
21
LIN
Na mokolo wana, nakoyanola, elobi Yawe, nakoyanola Lola, mpe Lola ekoyanola mabele.
BSB
BSB:
“On that day I will respond—” declares the LORD—“I will respond to the heavens, and they will respond to the earth.
22
LIN
Mabele ekoyanola ble, vino ya sika mpe mafuta. Bongo, yango nyonso ekoyanola Jizireyeli.
BSB
BSB:
And the earth will respond to the grain, to the new wine and oil, and they will respond to Jezreel.
23
LIN
Nakolona ye mpo na Ngai moko kati na mokili mpo ete azala lokola nzete ya elanga na Ngai ; nakotalisa bolingo na Ngai epai na ye oyo nazalaki kobenga Lo-Rukama. Nakoloba na bato oyo nazalaki kobenga Lo-Ami : « Bozali bato na Ngai, » mpe bango bakoloba : « Ozali Nzambe na biso. »
BSB
BSB:
And I will sow her as My own in the land, and I will have compassion on ‘No Compassion.’ I will say to those called ‘Not My People,’ ‘You are My people,’ and they will say, ‘You are my God.’”
Chapter complete
You’ve read Hosea 2
Chapter 2 of 14 in Hosea
Up next
Hosea 3
Read Hosea 3
Back to Hosea 1
Go Deeper
Commentary
What the commentators say on Hosea 2
A question this chapter raises
Why did God tell Hosea to marry an unfaithful woman?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Hosea 1
Hosea 2
Hosea 3