Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.11.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Hos
Hosea
4
LIN
BSB
A
a
Hosea 4
4
Hosea
God's case against Israel
Lingala Bible
Israel
, person
Judah
, person
Ephraim
, person
Gilgal
, place
Beth-aven
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;
BSB
BSB:
Hear the word of the LORD, O children of Israel, for the LORD has a case against the people of the land: “There is no truth, no loving devotion, and no knowledge of God in the land!
2
LIN
etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.
BSB
BSB:
Cursing and lying, murder and stealing, and adultery are rampant; one act of bloodshed follows another.
3
LIN
Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.
BSB
BSB:
Therefore the land mourns, and all who dwell in it will waste away with the beasts of the field and the birds of the air; even the fish of the sea disappear.
4
LIN
Kasi tika ete moto moko te amilongisa to apamela moninga na ye, pamba te bato na yo bazali lokola bato oyo batiaka tembe na Banganga-Nzambe !
BSB
BSB:
But let no man contend; let no man offer reproof; for your people are like those who contend with a priest.
5
LIN
Bokobeta mabaku, na moyi makasi ; basakoli mpe bakobeta mabaku elongo na bino, na butu, mpe nakobebisa mama na bino.
BSB
BSB:
You will stumble by day, and the prophet will stumble with you by night; so I will destroy your mother—
6
LIN
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
BSB
BSB:
My people are destroyed for lack of knowledge. Because you have rejected knowledge, I will also reject you as My priests. Since you have forgotten the law of your God, I will also forget your children.
7
LIN
Ndenge Banganga-Nzambe bakomaki ebele, ndenge wana mpe basalaki masumu na miso na Ngai. Nakobongola nkembo na bango soni.
BSB
BSB:
The more they multiplied, the more they sinned against Me; they exchanged their Glory for a thing of disgrace.
8
LIN
Banganga-Nzambe baliaka na sima ya masumu ya bato na Ngai mpe basepelaka ete bato basala kaka mabe.
BSB
BSB:
They feed on the sins of My people and set their hearts on iniquity.
9
LIN
Makambo oyo ekokomela bato yango ekokomela mpe Banganga-Nzambe : nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko mpo na etamboli na bango mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.
BSB
BSB:
And it shall be like people, like priest. I will punish both of them for their ways and repay them for their deeds.
10
LIN
Bakolia, kasi bakotonda te ; bakosala kindumba, kasi bakobotana te ; pamba te basundolaki Yawe
BSB
BSB:
They will eat but not be satisfied; they will be promiscuous but not multiply. For they have abandoned the LORD to give themselves
11
LIN
mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.
BSB
BSB:
to promiscuity, wine, and new wine, which take away understanding.
12
LIN
Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,
BSB
BSB:
My people consult their wooden idols, and their divining rods inform them. For a spirit of prostitution leads them astray and they have played the harlot against their God.
13
LIN
kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente ! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.
BSB
BSB:
They sacrifice on the mountaintops and burn offerings on the hills, under oak, poplar, and terebinth, because their shade is pleasant. And so your daughters turn to prostitution and your daughters-in-law to adultery.
14
LIN
Nakopesa etumbu te : ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango ; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi !
BSB
BSB:
I will not punish your daughters when they prostitute themselves, nor your daughters-in-law when they commit adultery. For the men themselves go off with prostitutes and offer sacrifices with shrine prostitutes. So a people without understanding will come to ruin.
15
LIN
Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »
BSB
BSB:
Though you prostitute yourself, O Israel, may Judah avoid such guilt! Do not journey to Gilgal, do not go up to Beth-aven, and do not swear on oath, ‘As surely as the LORD lives!’
16
LIN
Mpo ete bato ya Isalaele bazali mito makasi lokola ngombe ya mwasi oyo etomboki, ndenge nini Yawe akoka koleisa bango lokola bana meme kati na bilanga minene ?
BSB
BSB:
For Israel is as obstinate as a stubborn heifer. Can the LORD now shepherd them like lambs in an open meadow?
17
LIN
Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko : tika ye akoba bongo !
BSB
BSB:
Ephraim is joined to idols; leave him alone!
18
LIN
Soki kaka asilisaka komela vino, amipesaka na kindumba ; bakambi na yango balingaka makambo oyo eyokisaka bango soni.
BSB
BSB:
When their liquor is gone, they turn to prostitution; their rulers dearly love disgrace.
19
LIN
Mopepe moko ya makasi ekomema bango, mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.
BSB
BSB:
The whirlwind has wrapped them in its wings, and their sacrifices will bring them shame.
Chapter complete
You’ve read Hosea 4
Chapter 4 of 14 in Hosea
Up next
Hosea 5
Read Hosea 5
Back to Hosea 3
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Hosea 4
Ask Study Help
Ask anything about Hosea 4
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Hosea 3
Hosea 4
Hosea 5