Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Joel
Joel
3
LIN
BSB
A
a
Joel 3
3
Joel
Judgment of the nations
Lingala Bible
Jerusalem
, place
Judah
, person
Israel
, person
Valley of Jehoshaphat
, place
Egypt
, place
Edom
, place
Tyre
, place
Sidon
, place
2 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
« Na mikolo mpe na tango wana, tango nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yelusalemi,
BSB
BSB:
“Yes, in those days and at that time, when I restore Judah and Jerusalem from captivity,
2
LIN
nakosangisa bato ya bikolo nyonso mpe nakokitisa bango na lubwaku ya Jozafati. Nakosambisa bango kuna na tina na libula na Ngai, Isalaele, bato na Ngai ; pamba te bapanzi bato na Ngai kati na bikolo mpe bakaboli mokili na Ngai.
BSB
BSB:
I will gather all the nations and bring them down to the Valley of Jehoshaphat. There I will enter into judgment against them concerning My people, My inheritance, Israel, whom they have scattered among the nations as they divided up My land.
3
LIN
Babeti zeke mpo na kokabola bato na Ngai, bapesi bilenge mibali basi ya ndumba, bateki bilenge basi mpo na kozwa kaka vino, mpe balangwe yango.
BSB
BSB:
They cast lots for My people; they bartered a boy for a prostitute and sold a girl for wine to drink.
4
LIN
Eh bongo bino, Tiri mpe Sidoni, bituka ya bato ya Filisitia, likambo nini lisusu kati na Ngai mpe bino ? Bolingi kozongisela Ngai mabe to kotombokela Ngai ? Soki yango nde ezali makanisi na bino, Ngai nde nasengeli kozongisela bino mabe na lombangu.
BSB
BSB:
Now what do you have against Me, O Tyre, Sidon, and all the regions of Philistia? Are you rendering against Me a recompense? If you retaliate against Me, I will swiftly and speedily return your recompense upon your heads.
5
LIN
Pamba te bozwaki palata mpe wolo na Ngai, bomengo na Ngai ya motuya makasi mpe bomemaki yango na batempelo na bino.
BSB
BSB:
For you took My silver and gold and carried off My finest treasures to your temples.
6
LIN
Botekaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai ya Bagreki mpo na komema bango mosika ya mokili na bango. Ngai moko nakopesa bango makasi mpo ete babima na bisika nyonso epai wapi botekaki bango.
BSB
BSB:
You sold the people of Judah and Jerusalem to the Greeks, to send them far from their homeland.
7
LIN
Nakoteka bana na bino ya mibali mpe ya basi epai ya bato ya Yuda, mpe bango bakoteka bango epai ya bato ya Sabe, ekolo ya mosika penza, » elobi Yawe.
BSB
BSB:
Behold, I will rouse them from the places to which you sold them; I will return your recompense upon your heads.
8
LIN
« Bosakola likambo oyo kati na bikolo : Bobulisa mampinga mpo na bitumba ! Bolamusa bilombe ! Tika ete bilombe nyonso ya bitumba bapusana mpe baya !
BSB
BSB:
I will sell your sons and daughters into the hands of the people of Judah, and they will sell them to the Sabeans—to a distant nation.” Indeed, the LORD has spoken.
9
LIN
Bosala mipanga, na nzela ya bakongo na bino ; mpe makonga, na nzela ya bipasola na bino ! Tika ete moto na bolembu aloba : ‹ Nazali makasi. ›
BSB
BSB:
Proclaim this among the nations: “Prepare for war; rouse the mighty men; let all the men of war advance and attack!
10
LIN
Bino bikolo nyonso ya zingazinga, boya na lombangu mpe bosangana ! Oh Yawe, kitisa bilombe na Yo !
BSB
BSB:
Beat your plowshares into swords and your pruning hooks into spears. Let the weak say, ‘I am strong!’
11
LIN
Tika ete bikolo nyonso elamuka mpe emata kino na lubwaku ya Jozafati ! Pamba te kuna nde nakovanda mpo na kosambisa bikolo nyonso ya zingazinga.
BSB
BSB:
Come quickly, all you surrounding nations, and gather yourselves. Bring down Your mighty ones, O LORD.
13
LIN
Bosimba bambeli, pamba te bambuma eteli. Boya, bokamola bambuma ya vino, pamba te ekamolelo etondi, banzungu etondi, mabe na bango eleki ndelo.
BSB
BSB:
Swing the sickle, for the harvest is ripe. Come, trample the grapes, for the winepress is full; the wine vats overflow because their wickedness is great.
14
LIN
Bato bazali ebele, ebele penza, na lubwaku ya kosambisama. Mokolo ya Yawe ekomi pene, na lubwaku ya kosambisama.
BSB
BSB:
Multitudes, multitudes in the valley of decision! For the Day of the LORD is near in the valley of decision.
15
LIN
Sanza mpe moyi ekoyinda, minzoto ekongenga lisusu te.
BSB
BSB:
The sun and moon will grow dark, and the stars will no longer shine.
16
LIN
Wuta na Siona, Yawe akoloba makasi ; wuta na Yelusalemi, akoloba na mongongo makasi lokola kake ; Lola mpe mabele ekoningana. Kasi Yawe akozala ekimelo mpo na bato na Ye, engumba batonga makasi mpo na bana ya Isalaele.
BSB
BSB:
The LORD will roar from Zion and raise His voice from Jerusalem; heaven and earth will tremble. But the LORD will be a refuge for His people, a stronghold for the people of Israel.
17
LIN
Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino ; navandaka na Siona, ngomba na Ngai ya bule. Yelusalemi ekozala engumba ya bule, bapaya bakolekela lisusu wana te.
BSB
BSB:
Then you will know that I am the LORD your God, who dwells in Zion, My holy mountain. Jerusalem will be holy, never again to be overrun by foreigners.
18
LIN
Na mokolo wana, bangomba ekotangisa vino ya sika, mpe miliki ekotanga na bangomba mikuse. Miluka nyonso ya Yuda ekotonda na mayi, etima moko ya mayi ekobima wuta na Tempelo ya Yawe mpe ekosopela lubwaku ya banzete ya akasia mayi.
BSB
BSB:
And in that day the mountains will drip with sweet wine, and the hills will flow with milk. All the streams of Judah will run with water, and a spring will flow from the house of the LORD to water the Valley of Acacias.
19
LIN
Kasi mokili ya Ejipito ekobebisama, mokili ya Edomi ekokoma esobe mpo na makambo mabe oyo basalaki epai ya bato ya Yuda, pamba te basopaki makila ya bato ya Yuda na mabele na bango, atako basalaki mabe te.
BSB
BSB:
Egypt will become desolate, and Edom a desert wasteland, because of the violence done to the people of Judah, in whose land they shed innocent blood.
20
LIN
Bato bakokoma kovanda na mokili ya Yuda mpo na libela, mpe na engumba Yelusalemi, libela na libela.
BSB
BSB:
But Judah will be inhabited forever, and Jerusalem from generation to generation.
21
LIN
Nakopetola bino mpo na ngambo ya makila, mpo ete nanu napetola bino te. »
BSB
BSB:
For I will avenge their blood, which I have not yet avenged.” For the LORD dwells in Zion.
Chapter complete
You’ve read Joel 3
Chapter 3 of 3 in Joel
Up next
Amos 1
Read Amos 1
Back to Joel 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Joel 3
Ask Study Help
Ask anything about Joel 3
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Joel 2
Joel 3
Amos 1