Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.12.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
John
John
2
LIN
BSB
A
a
John 2
2
John
The book of signs
Lingala Bible
Jesus
, person
Jerusalem
, place
Galilee
, place
Cana
, place
Capernaum
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango.
BSB
BSB:
On the third day a wedding took place at Cana in Galilee. Jesus’ mother was there,
2
LIN
Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
BSB
BSB:
and Jesus and His disciples had also been invited to the wedding.
3
LIN
Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye : — Bazali lisusu na vino te !
BSB
BSB:
When the wine ran out, Jesus’ mother said to Him, “They have no more wine.”
4
LIN
Kasi Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.
BSB
BSB:
“Woman, what is that to you and to Me?”
Jesus replied.
“My hour has not yet come.”
5
LIN
Mama na Ye alobaki na basali : — Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
BSB
BSB:
His mother said to the servants, “Do whatever He tells you.”
6
LIN
Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale.
BSB
BSB:
Now six stone water jars had been set there for the Jewish rites of purification. Each could hold from twenty to thirty gallons.
7
LIN
Bongo Yesu alobaki na basali : — Botondisa bambeki oyo na mayi. Batondisaki yango meke.
BSB
BSB:
Jesus told the servants,
“Fill the jars with water.”
So they filled them to the brim.
8
LIN
Alobaki lisusu : — Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti. Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.
BSB
BSB:
“Now draw some out,”
He said,
“and take it to the master of the banquet.”
They did so,
9
LIN
Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi ; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki
BSB
BSB:
and the master of the banquet tasted the water that had been turned into wine. He did not know where it was from, but the servants who had drawn the water knew. Then he called the bridegroom aside
10
LIN
mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo ! »
BSB
BSB:
and said, “Everyone serves the fine wine first, and then the cheap wine after the guests are drunk. But you have saved the fine wine until now!”
11
LIN
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
BSB
BSB:
Jesus performed this, the first of His signs, at Cana in Galilee. He thus revealed His glory, and His disciples believed in Him.
12
LIN
Sima na yango, Yesu akendeki elongo na mama na Ye, bandeko na Ye mpe bayekoli na Ye, na Kapernawumi epai wapi basalaki kaka mwa mikolo.
BSB
BSB:
After this, He went down to Capernaum with His mother and brothers and His disciples, and they stayed there a few days.
13
LIN
Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi.
BSB
BSB:
When the Jewish Passover was near, Jesus went up to Jerusalem.
14
LIN
Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga ; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango.
BSB
BSB:
In the temple courts He found men selling cattle, sheep, and doves, and money changers seated at their tables.
15
LIN
Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele.
BSB
BSB:
So He made a whip out of cords and drove all from the temple courts, both sheep and cattle. He poured out the coins of the money changers and overturned their tables.
16
LIN
Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? »
BSB
BSB:
To those selling doves He said,
“Get these out of here! How dare you turn My Father’s house into a marketplace!”
17
LIN
Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! »
BSB
BSB:
His disciples remembered that it is written: “Zeal for Your house will consume Me.”
18
LIN
Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?
BSB
BSB:
On account of this, the Jews demanded, “What sign can You show us to prove Your authority to do these things?”
19
LIN
Yesu azongisaki : — Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“Destroy this temple, and in three days I will raise it up again.”
20
LIN
Bayuda balobaki lisusu : — Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ?
BSB
BSB:
“This temple took forty-six years to build,” the Jews replied, “and You are going to raise it up in three days?”
21
LIN
Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko.
BSB
BSB:
But Jesus was speaking about the temple of His body.
22
LIN
Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki.
BSB
BSB:
After He was raised from the dead, His disciples remembered that He had said this. Then they believed the Scripture and the word that Jesus had spoken.
23
LIN
Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala.
BSB
BSB:
While He was in Jerusalem at the Passover Feast, many people saw the signs He was doing and believed in His name.
24
LIN
Kasi Yesu amipesaki te epai na bango, pamba te ayebaki bato nyonso.
BSB
BSB:
But Jesus did not entrust Himself to them, for He knew them all.
25
LIN
Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.
BSB
BSB:
He did not need any testimony about man, for He knew what was in a man.
Chapter complete
You’ve read John 2
Chapter 2 of 21 in John
Up next
John 3
Read John 3
Back to John 1
Go deeper
Commentary
What the commentators say on John 2
A question this chapter raises
Do Christians worship Mary as part of the Trinity?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
John 1
John 2
John 3