Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
10
LIN
BSB
A
a
Luke 10
10
Luke
The journey to Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
Martha
, person
Tyre
, place
Sidon
, place
Mary
, person
Jerusalem
, place
Jericho
, place
Sodom
, place
4 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende.
BSB
BSB:
After this, the Lord appointed seventy-two others and sent them two by two ahead of Him to every town and place He was about to visit.
2
LIN
Alobaki na bango : — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.
BSB
BSB:
And He told them,
“The harvest is plentiful, but the workers are few. Ask the Lord of the harvest, therefore, to send out workers into His harvest.
3
LIN
Bokende ! Nazali kotinda bino lokola bampate kati na bambwa ya zamba.
BSB
BSB:
Go! I am sending you out like lambs among wolves.
4
LIN
Bomema mbongo te, sakosi te to basandale te, mpe bopesa moto moko te mbote na nzela.
BSB
BSB:
Carry no purse or bag or sandals. Do not greet anyone along the road.
5
LIN
Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso : « Tika ete kimia ezala na ndako oyo ! »
BSB
BSB:
Whatever house you enter, begin by saying, ‘Peace to this house.’
6
LIN
Soki ezali na moto ya kimia kati na ndako yango, kimia na bino ekovanda likolo na ye ; soki te, kimia yango ekozongela bino.
BSB
BSB:
If a man of peace is there, your peace will rest on him; if not, it will return to you.
7
LIN
Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino ; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te.
BSB
BSB:
Stay at the same house, eating and drinking whatever you are offered. For the worker is worthy of his wages. Do not move around from house to house.
8
LIN
Tango bokokota na engumba songolo, soki bayambi bino, bolia bilei oyo bakopesa bino,
BSB
BSB:
If you enter a town and they welcome you, eat whatever is set before you.
9
LIN
bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango : « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino. »
BSB
BSB:
Heal the sick who are there and tell them, ‘The kingdom of God is near you.’
10
LIN
Kasi tango bokokota na engumba songolo, soki baboyi koyamba bino, bokende na babalabala na yango mpe boloba :
BSB
BSB:
But if you enter a town and they do not welcome you, go into the streets and declare,
11
LIN
« Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »
BSB
BSB:
‘Even the dust of your town that clings to our feet, we wipe off as a testimony against you. Yet be sure of this: The kingdom of God is near.’
12
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : Na mokolo wana, etumbu na yango ekozala makasi koleka etumbu ya Sodome.
BSB
BSB:
I tell you, it will be more bearable on that day for Sodom than for that town.
13
LIN
Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.
BSB
BSB:
Woe to you, Chorazin! Woe to you, Bethsaida! For if the miracles that were performed in you had been performed in Tyre and Sidon, they would have repented long ago, sitting in sackcloth and ashes.
14
LIN
Kasi, na kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.
BSB
BSB:
But it will be more bearable for Tyre and Sidon at the judgment than for you.
15
LIN
Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te, okokitisama kino na mboka ya bakufi !
BSB
BSB:
And you, Capernaum, will you be lifted up to heaven? No, you will be brought down to Hades!
16
LIN
Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.
BSB
BSB:
Whoever listens to you listens to Me; whoever rejects you rejects Me; and whoever rejects Me rejects the One who sent Me.”
17
LIN
Tango bayekoli yango tuku sambo na mibale bazongaki, batondaki na esengo mpe balobaki : — Nkolo, ezala milimo mabe etosi biso na Kombo na Yo !
BSB
BSB:
The seventy-two returned with joy and said, “Lord, even the demons submit to us in Your name.”
18
LIN
Yesu azongisaki : — Namonaki Satana kokweya longwa na likolo, lokola mikalikali.
BSB
BSB:
So He told them,
“I saw Satan fall like lightning from heaven.
19
LIN
Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe.
BSB
BSB:
Behold, I have given you authority to tread on snakes and scorpions, and over all the power of the enemy. Nothing will harm you.
20
LIN
Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.
BSB
BSB:
Nevertheless, do not rejoice that the spirits submit to you, but rejoice that your names are written in heaven.”
21
LIN
Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.
BSB
BSB:
At that time Jesus rejoiced in the Holy Spirit and declared,
“I praise You, Father, Lord of heaven and earth, because You have hidden these things from the wise and learned, and revealed them to little children. Yes, Father, for this was well-pleasing in Your sight.
22
LIN
Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata ; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
BSB
BSB:
All things have been entrusted to Me by My Father. No one knows who the Son is except the Father, and no one knows who the Father is except the Son and those to whom the Son chooses to reveal Him.”
23
LIN
Bongo, abalolaki miso na Ye epai ya bayekoli na Ye mpe alobaki na bango moko kaka : — Esengo na bato oyo bazali komona makambo oyo bozali komona !
BSB
BSB:
Then Jesus turned to the disciples and said privately,
“Blessed are the eyes that see what you see.
24
LIN
Pamba te, nazali koloba na bino : basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
BSB
BSB:
For I tell you that many prophets and kings desired to see what you see but did not see it, and to hear what you hear but did not hear it.”
25
LIN
Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu : — Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
BSB
BSB:
One day an expert in the law stood up to test Him. “Teacher,” he asked, “what must I do to inherit eternal life?”
26
LIN
Yesu alobaki na ye : — Makambo nini ekomama kati na mobeko ? Otangaka yango ndenge nini ?
BSB
BSB:
“What is written in the Law?”
Jesus replied.
“How do you read it?”
27
LIN
Molakisi ya mibeko azongisaki : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
BSB
BSB:
He answered, “‘Love the Lord your God with all your heart and with all your soul and with all your strength and with all your mind’ and ‘Love your neighbor as yourself.’”
28
LIN
Yesu alobaki na ye : — Opesi eyano ya malamu ; sala bongo mpe okozala na bomoi.
BSB
BSB:
“You have answered correctly,”
Jesus said.
“Do this and you will live.”
29
LIN
Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu : — Nani azali moninga na ngai ?
BSB
BSB:
But wanting to justify himself, he asked Jesus, “And who is my neighbor?”
30
LIN
Yesu azongisaki : — Moto moko azalaki kokende na Jeriko, wana awutaki na Yelusalemi. Na nzela, miyibi babetaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye mpe bakendeki na bango, batikaki ye pene ya kokufa.
BSB
BSB:
Jesus took up this question and said,
“A man was going down from Jerusalem to Jericho when he fell into the hands of robbers. They stripped him, beat him, and went away, leaving him half dead.
31
LIN
Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.
BSB
BSB:
Now by chance a priest was going down the same road, but when he saw him, he passed by on the other side.
32
LIN
Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.
BSB
BSB:
So too, when a Levite came to that spot and saw him, he passed by on the other side.
33
LIN
Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki ; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa,
BSB
BSB:
But a Samaritan on a journey came upon him, and when he saw him, he had compassion.
34
LIN
apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.
BSB
BSB:
He went to him and bandaged his wounds, pouring on oil and wine. Then he put him on his own animal, brought him to an inn, and took care of him.
35
LIN
Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya ; alobaki na ye : « Salisa moto oyo malamu ; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa ! »
BSB
BSB:
The next day he took out two denarii and gave them to the innkeeper. ‘Take care of him,’ he said, ‘and on my return I will repay you for any additional expense.’
36
LIN
Yesu atunaki : — Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi ?
BSB
BSB:
Which of these three do you think was a neighbor to the man who fell into the hands of robbers?”
37
LIN
Molakisi ya mibeko azongisaki : — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. Yesu alobaki na ye : — Kende mpe sala bongo !
BSB
BSB:
“The one who showed him mercy,” replied the expert in the law. Then Jesus told him,
“Go and do likewise.”
38
LIN
Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.
BSB
BSB:
As they traveled along, Jesus entered a village where a woman named Martha welcomed Him into her home.
39
LIN
Mari, ndeko mwasi ya Marte, ayaki kovanda na makolo ya Nkolo, mpe azalaki koyoka makambo oyo Nkolo azalaki koloba.
BSB
BSB:
She had a sister named Mary, who sat at the Lord’s feet listening to His message.
40
LIN
Kasi, na tango yango, Marte amipesaki na misala nyonso ya ndako ; ayaki na lombangu mpe alobaki : — Ah Nkolo, ozali komona te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala ngai moko misala ? Loba na ye ete asunga ngai !
BSB
BSB:
But Martha was distracted by all the preparations to be made. She came to Jesus and said, “Lord, do You not care that my sister has left me to serve alone? Tell her to help me!”
41
LIN
Nkolo azongiselaki ye : — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,
BSB
BSB:
“Martha, Martha,”
the Lord replied,
“you are worried and upset about many things.
42
LIN
kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.
BSB
BSB:
But only one thing is necessary. Mary has chosen the good portion, and it will not be taken away from her.”
Chapter complete
You’ve read Luke 10
Chapter 10 of 24 in Luke
Up next
Luke 11
Read Luke 11
Back to Luke 9
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 10
A question this chapter raises
Does the Bible silence women?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 9
Luke 10
Luke 11