Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.6.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
20
LIN
BSB
A
a
Luke 20
20
Luke
Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
David
, person
Caesar
, person
Moses
, person
John
, person
Jacob
, person
Abraham
, person
Isaac
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ;
BSB
BSB:
One day as Jesus was teaching the people in the temple courts and proclaiming the gospel, the chief priests and scribes, together with the elders, came up to Him.
2
LIN
balobaki na Ye : — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?
BSB
BSB:
“Tell us,” they said, “by what authority are You doing these things, and who gave You this authority?”
3
LIN
Yesu azongisaki : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai :
BSB
BSB:
“I will also ask you a question,”
Jesus replied.
“Tell Me:
4
LIN
Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?
BSB
BSB:
John’s baptism—was it from heaven, or from men?”
5
LIN
Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? ›
BSB
BSB:
They deliberated among themselves and said, “If we say, ‘From heaven,’ He will ask, ‘Why did you not believe him?’
6
LIN
Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. »
BSB
BSB:
But if we say, ‘From men,’ all the people will stone us, for they are convinced that John was a prophet.”
7
LIN
Boye, bazongisaki : — Toyebi te epai wapi ewutaki.
BSB
BSB:
So they answered that they did not know where it was from.
8
LIN
Yesu alobaki : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
BSB
BSB:
And Jesus replied,
“Neither will I tell you by what authority I am doing these things.”
9
LIN
Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo : — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi.
BSB
BSB:
Then He proceeded to tell the people this parable:
“A man planted a vineyard, rented it out to some tenants, and went away for a long time.
10
LIN
Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
BSB
BSB:
At harvest time, he sent a servant to the tenants to collect his share of the fruit of the vineyard. But the tenants beat the servant and sent him away empty-handed.
11
LIN
Atindaki mosali mosusu ; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
BSB
BSB:
So he sent another servant, but they beat him and treated him shamefully, sending him away empty-handed.
12
LIN
Atindaki lisusu mosali ya misato ; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga.
BSB
BSB:
Then he sent a third, but they wounded him and threw him out.
13
LIN
Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki : « Nasala nini ? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi ; tango mosusu, bakotosa ye. »
BSB
BSB:
‘What shall I do?’ asked the owner of the vineyard. ‘I will send my beloved son. Perhaps they will respect him.’
14
LIN
Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso ! »
BSB
BSB:
But when the tenants saw the son, they discussed it among themselves and said, ‘This is the heir. Let us kill him, and the inheritance will be ours.’
15
LIN
Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Nkolo elanga ya vino akosala bango nini ?
BSB
BSB:
So they threw him out of the vineyard and killed him. What then will the owner of the vineyard do to them?
16
LIN
Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !
BSB
BSB:
He will come and kill those tenants and give the vineyard to others.”
And when the people heard this, they said, “May such a thing never happen!”
17
LIN
Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako ? »
BSB
BSB:
But Jesus looked directly at them and said,
“Then what is the meaning of that which is written: ‘The stone the builders rejected has become the cornerstone’?
18
LIN
Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.
BSB
BSB:
Everyone who falls on this stone will be broken to pieces, but he on whom it falls will be crushed.”
19
LIN
Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango ; kasi babangaki bato.
BSB
BSB:
When the scribes and chief priests realized that Jesus had spoken this parable against them, they sought to arrest Him that very hour. But they were afraid of the people.
20
LIN
Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.
BSB
BSB:
So they watched Him closely and sent spies who pretended to be sincere. They were hoping to catch Him in His words in order to hand Him over to the rule and authority of the governor.
21
LIN
Banongi yango batunaki Yesu : — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe.
BSB
BSB:
“Teacher,” they inquired, “we know that You speak and teach correctly. You show no partiality but teach the way of God in accordance with the truth.
22
LIN
Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ?
BSB
BSB:
Is it lawful for us to pay taxes to Caesar or not?”
23
LIN
Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango :
BSB
BSB:
But Jesus saw through their duplicity and said to them,
24
LIN
— Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ? Bazongisaki : — Ya Sezare !
BSB
BSB:
“Show Me a denarius. Whose image and inscription are on it?”
“Caesar’s,” they answered.
25
LIN
Yesu alobaki na bango : — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
BSB
BSB:
So Jesus told them,
“Give to Caesar what is Caesar’s, and to God what is God’s.”
26
LIN
Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato ; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye.
BSB
BSB:
And they were unable to trap Him in His words before the people. And amazed at His answer, they fell silent.
27
LIN
Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo :
BSB
BSB:
Then some of the Sadducees, who say there is no resurrection, came to question Him.
28
LIN
— Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi : « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. »
BSB
BSB:
“Teacher,” they said, “Moses wrote for us that if a man’s brother dies and leaves a wife but no children, the man is to marry his brother’s widow and raise up offspring for him.
29
LIN
Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
BSB
BSB:
Now there were seven brothers. The first one married a wife but died childless.
30
LIN
Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ;
BSB
BSB:
Then the second
31
LIN
sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo : bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te.
BSB
BSB:
and the third married the widow, and in the same way all seven died, leaving no children.
32
LIN
Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
BSB
BSB:
And last of all, the woman died.
33
LIN
Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye ?
BSB
BSB:
So then, in the resurrection, whose wife will she be? For all seven were married to her.”
34
LIN
Yesu azongisaki : — Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka ;
BSB
BSB:
Jesus answered,
“The sons of this age marry and are given in marriage.
35
LIN
kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te
BSB
BSB:
But those who are considered worthy to share in the age to come and in the resurrection from the dead will neither marry nor be given in marriage.
36
LIN
mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi.
BSB
BSB:
In fact, they can no longer die, because they are like the angels. And since they are sons of the resurrection, they are sons of God.
37
LIN
Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa ; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. »
BSB
BSB:
Even Moses demonstrates that the dead are raised, in the passage about the burning bush. For he calls the Lord ‘the God of Abraham, the God of Isaac, and the God of Jacob.’
38
LIN
Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.
BSB
BSB:
He is not the God of the dead, but of the living, for to Him all are alive.”
39
LIN
Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki : — Moteyi, olobi malamu !
BSB
BSB:
Some of the scribes answered, “Teacher, You have spoken well!”
40
LIN
Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
BSB
BSB:
And they did not dare to question Him any further.
41
LIN
Yesu mpe atunaki bango : — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi ?
BSB
BSB:
Then Jesus declared,
“How can it be said that the Christ is the Son of David?
42
LIN
Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
BSB
BSB:
For David himself says in the book of Psalms: ‘The Lord said to my Lord, “Sit at My right hand
43
LIN
kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › »
BSB
BSB:
until I make Your enemies a footstool for Your feet.”’
44
LIN
Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
BSB
BSB:
Thus David calls Him ‘Lord.’ So how can He be David’s son?”
45
LIN
Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
BSB
BSB:
In the hearing of all the people, Jesus said to His disciples,
46
LIN
— Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;
BSB
BSB:
“Beware of the scribes. They like to walk around in long robes, and they love the greetings in the marketplaces, the chief seats in the synagogues, and the places of honor at banquets.
47
LIN
bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
BSB
BSB:
They defraud widows of their houses, and for a show make lengthy prayers. These men will receive greater condemnation.”
Chapter complete
You’ve read Luke 20
Chapter 20 of 24 in Luke
Up next
Luke 21
Read Luke 21
Back to Luke 19
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 20
Ask Study Help
Ask anything about Luke 20
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 19
Luke 20
Luke 21