Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
5
LIN
BSB
A
a
Mark 5
5
Mark
Ministry in Galilee
Lingala Bible
Jesus
, person
Peter
, person
John
, person
James
, person
Gerasa
, place
Decapolis
, place
Jairus
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza,
BSB
BSB:
On the other side of the sea, they arrived in the region of the Gerasenes.
2
LIN
Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye.
BSB
BSB:
As soon as Jesus got out of the boat, He was met by a man with an unclean spirit, who was coming from the tombs.
3
LIN
Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ;
BSB
BSB:
This man had been living in the tombs and could no longer be restrained, even with chains.
4
LIN
pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye.
BSB
BSB:
Though he was often bound with chains and shackles, he had broken the chains and shattered the shackles. Now there was no one with the strength to subdue him.
5
LIN
Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.
BSB
BSB:
Night and day in the tombs and in the mountains he kept crying out and cutting himself with stones.
6
LIN
Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye
BSB
BSB:
When the man saw Jesus from a distance, he ran and fell on his knees before Him.
7
LIN
mpe agangaki na makasi nyonso : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !
BSB
BSB:
And he shouted in a loud voice, “What do You want with me, Jesus, Son of the Most High God? I beg You before God not to torture me!”
8
LIN
Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »
BSB
BSB:
For Jesus had already declared,
“Come out of this man, you unclean spirit!”
9
LIN
Yesu atunaki ye : — Kombo na yo nani ? Azongisaki : — Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !
BSB
BSB:
“What is your name?”
Jesus asked. “My name is Legion,” he replied, “for we are many.”
10
LIN
Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana.
BSB
BSB:
And he begged Jesus repeatedly not to send them out of that region.
11
LIN
Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.
BSB
BSB:
There on the nearby hillside a large herd of pigs was feeding.
12
LIN
Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »
BSB
BSB:
So the demons begged Jesus, “Send us to the pigs, so that we may enter them.”
13
LIN
Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.
BSB
BSB:
He gave them permission, and the unclean spirits came out and went into the pigs, and the herd of about two thousand rushed down the steep bank into the sea and drowned in the water.
14
LIN
Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema.
BSB
BSB:
Those tending the pigs ran off and reported this in the town and countryside, and the people went out to see what had happened.
15
LIN
Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango.
BSB
BSB:
When they came to Jesus, they saw the man who had been possessed by the legion of demons sitting there, clothed and in his right mind; and they were afraid.
16
LIN
Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu.
BSB
BSB:
Those who had seen it described what had happened to the demon-possessed man and also to the pigs.
17
LIN
Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.
BSB
BSB:
And the people began to beg Jesus to leave their region.
18
LIN
Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko.
BSB
BSB:
As He was getting into the boat, the man who had been possessed by the demons begged to go with Him.
19
LIN
Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye : « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo ; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »
BSB
BSB:
But Jesus would not allow him.
“Go home to your own people,”
He said,
“and tell them how much the Lord has done for you, and what mercy He has shown you.”
20
LIN
Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli ; mpe bato nyonso bakamwaki.
BSB
BSB:
So the man went away and began to proclaim throughout the Decapolis how much Jesus had done for him. And everyone was amazed.
21
LIN
Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.
BSB
BSB:
When Jesus had again crossed by boat to the other side, a large crowd gathered around Him beside the sea.
22
LIN
Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana ; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye
BSB
BSB:
A synagogue leader named Jairus arrived, and seeing Jesus, he fell at His feet
23
LIN
mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »
BSB
BSB:
and pleaded with Him urgently, “My little daughter is near death. Please come and place Your hands on her, so that she will be healed and live.”
24
LIN
Boye Yesu akendeki na ye nzela moko ; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
BSB
BSB:
So Jesus went with him, and a large crowd followed and pressed around Him.
25
LIN
Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale.
BSB
BSB:
And a woman was there who had suffered from bleeding for twelve years.
26
LIN
Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te ; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata.
BSB
BSB:
She had borne much agony under the care of many physicians and had spent all she had, but to no avail. Instead, her condition had only grown worse.
27
LIN
Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye,
BSB
BSB:
When the woman heard about Jesus, she came up through the crowd behind Him and touched His cloak.
28
LIN
pamba te azalaki komilobela : « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika ! »
BSB
BSB:
For she kept saying, “If only I touch His garments, I will be healed.”
29
LIN
Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.
BSB
BSB:
Immediately her bleeding stopped, and she sensed in her body that she was healed of her affliction.
30
LIN
Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki : — Nani asimbi Ngai na bilamba ?
BSB
BSB:
At once Jesus was aware that power had gone out from Him. Turning to the crowd, He asked,
“Who touched My garments?”
31
LIN
Bayekoli na Ye bazongisaki : — Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu : « Nani asimbi Ngai ? »
BSB
BSB:
His disciples answered, “You can see the crowd pressing in on You, and yet You ask,
‘Who touched Me?’”
32
LIN
Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo.
BSB
BSB:
But He kept looking around to see who had done this.
33
LIN
Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.
BSB
BSB:
Then the woman, knowing what had happened to her, came and fell down before Him trembling in fear, and she told Him the whole truth.
34
LIN
Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !
BSB
BSB:
“Daughter,”
said Jesus,
“your faith has healed you. Go in peace and be free of your affliction.”
35
LIN
Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye : — Mwana na yo ya mwasi asili kokufa ; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi ?
BSB
BSB:
While He was still speaking, messengers from the house of Jairus arrived and said, “Your daughter is dead; why bother the Teacher anymore?”
36
LIN
Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani : — Kobanga te, zala kaka na kondima !
BSB
BSB:
But Jesus overheard their conversation and said to Jairus,
“Do not be afraid; just believe.”
37
LIN
Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake.
BSB
BSB:
And He did not allow anyone to accompany Him except Peter, James, and John the brother of James.
38
LIN
Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.
BSB
BSB:
When they arrived at the house of the synagogue leader, Jesus saw the commotion and the people weeping and wailing loudly.
39
LIN
Akotaki mpe alobaki na bango : — Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso ? Mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te ; alali nde pongi !
BSB
BSB:
He went inside and asked,
“Why all this commotion and weeping? The child is not dead, but asleep.”
40
LIN
Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki.
BSB
BSB:
And they laughed at Him. After He had put them all outside, He took the child’s father and mother and His own companions, and went in to see the child.
41
LIN
Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : « Talita kumi ! » Elingi koloba : Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !
BSB
BSB:
Taking her by the hand, Jesus said,
“Talitha koum!”
which means,
“Little girl, I say to you, get up!”
42
LIN
Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza.
BSB
BSB:
Immediately the girl got up and began to walk around (she was twelve years old). And at once they were utterly astounded.
43
LIN
Yesu apekisaki bango koloba likambo yango ata na moto moko ; mpe ayebisaki bango ete bapesa elenge mwasi yango bilei.
BSB
BSB:
Then Jesus gave strict orders that no one should know about this, and He told them to give her something to eat.
Chapter complete
You’ve read Mark 5
Chapter 5 of 16 in Mark
Up next
Mark 6
Read Mark 6
Listen
Back to Mark 4
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 5
A question this chapter raises
Why did God strike Uzzah for steadying the ark?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 4
Mark 5
Mark 6