Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
7
LIN
BSB
A
a
Mark 7
7
Mark
Ministry in Galilee
Lingala Bible
Tyre
, place
Sidon
, place
Jesus
, person
Jerusalem
, place
Moses
, person
Isaiah
, person
Galilee Sea
, place
Decapolis
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Bafarizeo mpe ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi basanganaki zingazinga ya Yesu.
BSB
BSB:
Then the Pharisees and some of the scribes who had come from Jerusalem gathered around Jesus,
2
LIN
Bamonaki bayekoli mosusu ya Yesu kolia lipa na maboko ya mbindo, elingi koloba na maboko oyo basukola te.
BSB
BSB:
and they saw some of His disciples eating with hands that were defiled—that is, unwashed.
3
LIN
Nzokande, Bafarizeo mpe Bayuda nyonso baliaka te soki basukoli te maboko malamu. Ezalaki na nzela wana nde bazalaki kotosa bokoko na bango.
BSB
BSB:
Now in holding to the tradition of the elders, the Pharisees and all the Jews do not eat until they wash their hands ceremonially.
4
LIN
Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa : kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende.
BSB
BSB:
And on returning from the market, they do not eat unless they wash. And there are many other traditions for them to observe, including the washing of cups, pitchers, kettles, and couches for dining.
5
LIN
Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu : — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo ?
BSB
BSB:
So the Pharisees and scribes questioned Jesus: “Why do Your disciples not walk according to the tradition of the elders? Instead, they eat with defiled hands.”
6
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama : « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
BSB
BSB:
Jesus answered them,
“Isaiah prophesied correctly about you hypocrites, as it is written: ‘These people honor Me with their lips, but their hearts are far from Me.
7
LIN
basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
BSB
BSB:
They worship Me in vain; they teach as doctrine the precepts of men.’
8
LIN
Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.
BSB
BSB:
You have disregarded the commandment of God to keep the tradition of men.”
9
LIN
Alobaki na bango lisusu : — Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino.
BSB
BSB:
He went on to say,
“You neatly set aside the command of God to maintain your own tradition.
10
LIN
Solo, Moyize alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
BSB
BSB:
For Moses said, ‘Honor your father and your mother’ and ‘Anyone who curses his father or mother must be put to death.’
11
LIN
Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, »
BSB
BSB:
But you say that if a man says to his father or mother, ‘Whatever you would have received from me is Corban’ (that is, a gift devoted to God),
12
LIN
akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo.
BSB
BSB:
he is no longer permitted to do anything for his father or mother.
13
LIN
Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.
BSB
BSB:
Thus you nullify the word of God by the tradition you have handed down. And you do so in many such matters.”
14
LIN
Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango : — Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo.
BSB
BSB:
Once again Jesus called the crowd to Him and said,
“All of you, listen to Me and understand:
15
LIN
Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo. [
BSB
BSB:
Nothing that enters a man from the outside can defile him; but the things that come out of a man, these are what defile him.”
16
LIN
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
17
LIN
Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na Ye batunaki Ye tina ya lisese yango.
BSB
BSB:
After Jesus had left the crowd and gone into the house, His disciples inquired about the parable.
18
LIN
Alobaki na bango : — Bino mpe, boni, bozali mayele te ? Bozali kososola te ete eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo.
BSB
BSB:
“Are you still so dull?”
He asked.
“Do you not understand? Nothing that enters a man from the outside can defile him,
19
LIN
Pamba te ekendaka te na motema na ye, kasi ekendaka nde na libumu na ye ; mpe na sima, ekendaka na zongo. Na maloba oyo, Yesu atatolaki ete bilei nyonso ezali peto.
BSB
BSB:
because it does not enter his heart, but it goes into the stomach and then is eliminated.”
(Thus all foods are clean.)
20
LIN
Yesu alobaki lisusu : — Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.
BSB
BSB:
He continued:
“What comes out of a man, that is what defiles him.
21
LIN
Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma,
BSB
BSB:
For from within the hearts of men come evil thoughts, sexual immorality, theft, murder, adultery,
22
LIN
ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe.
BSB
BSB:
greed, wickedness, deceit, debauchery, envy, slander, arrogance, and foolishness.
23
LIN
Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
BSB
BSB:
All these evils come from within, and these are what defile a man.”
24
LIN
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri. Akotaki kati na ndako moko ; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama.
BSB
BSB:
Jesus left that place and went to the region of Tyre. Not wanting anyone to know He was there, He entered a house, but was unable to escape their notice.
25
LIN
Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi ; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye.
BSB
BSB:
Instead, a woman whose little daughter had an unclean spirit soon heard about Jesus, and she came and fell at His feet.
26
LIN
Mwasi yango azalaki moto ya Grese, moto ya Fenisi ya Siri ; asengaki na Yesu ete abengana molimo mabe oyo ezali konyokola mwana na ye ya mwasi.
BSB
BSB:
Now she was a Greek woman of Syrophoenician origin, and she kept asking Jesus to drive the demon out of her daughter.
27
LIN
Kasi Yesu alobaki na ye : — Tika bana ya ndako balia nanu mpe batonda, pamba te ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
BSB
BSB:
“First let the children have their fill,”
He said.
“For it is not right to take the children’s bread and toss it to the dogs.”
28
LIN
Mwasi yango azongiselaki Yesu : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa !
BSB
BSB:
“Yes, Lord,” she replied, “even the dogs under the table eat the children’s crumbs.”
29
LIN
Yesu alobaki : — Mpo na maloba oyo olobi, kende, zonga na ndako na yo, pamba te molimo mabe esili kobima na mwana na yo ya mwasi.
BSB
BSB:
Then Jesus told her,
“Because of this answer, you may go. The demon has left your daughter.”
30
LIN
Mpe tango akendeki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto mpe molimo mabe ebimi.
BSB
BSB:
And she went home and found her child lying on the bed, and the demon was gone.
31
LIN
Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi.
BSB
BSB:
Then Jesus left the region of Tyre and went through Sidon to the Sea of Galilee and into the region of the Decapolis.
32
LIN
Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko.
BSB
BSB:
Some people brought to Him a man who was deaf and hardly able to speak, and they begged Jesus to place His hand on him.
33
LIN
Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi ; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango.
BSB
BSB:
So Jesus took him aside privately, away from the crowd, and put His fingers into the man’s ears. Then He spit and touched the man’s tongue.
34
LIN
Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye : « Fungwama ! »
BSB
BSB:
And looking up to heaven, He sighed deeply and said to him,
“Ephphatha!”
(which means,
“Be opened!”).
35
LIN
Mbala moko, matoyi na ye efungwamaki, lolemo na ye ekangolamaki mpe akomaki koloba malamu.
BSB
BSB:
Immediately the man’s ears were opened and his tongue was released, and he began to speak plainly.
36
LIN
Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto te. Atako azalaki kopekisa bango makasi, kasi bango bazalaki kaka kopanza sango yango koleka.
BSB
BSB:
Jesus ordered them not to tell anyone. But the more He ordered them, the more widely they proclaimed it.
37
LIN
Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba : — Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.
BSB
BSB:
The people were utterly astonished and said, “He has done all things well! He makes even the deaf hear and the mute speak!”
Chapter complete
You’ve read Mark 7
Chapter 7 of 16 in Mark
Up next
Mark 8
Read Mark 8
Listen
Back to Mark 6
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 7
A question this chapter raises
Why did Jesus call a Canaanite woman a dog?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 6
Mark 7
Mark 8