Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.2
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
9
LIN
BSB
A
a
Mark 9
9
Mark
On the way: Jesus teaches about the cross
Lingala Bible
Jesus
, person
Elias
, person
Moses
, person
Peter
, person
John
, person
Galilee
, place
James
, person
Capernaum
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.
BSB
BSB:
Then Jesus said to them,
“Truly I tell you, there are some standing here who will not taste death before they see the kingdom of God arrive with power.”
2
LIN
Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango :
BSB
BSB:
After six days Jesus took with Him Peter, James, and John, and led them up a high mountain by themselves. There He was transfigured before them.
3
LIN
bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi ; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana.
BSB
BSB:
His clothes became radiantly white, brighter than any launderer on earth could bleach them.
4
LIN
Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu.
BSB
BSB:
And Elijah and Moses appeared before them, talking with Jesus.
5
LIN
Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Tokotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.
BSB
BSB:
Peter said to Jesus, “Rabbi, it is good for us to be here. Let us put up three shelters—one for You, one for Moses, and one for Elijah.”
6
LIN
Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga.
BSB
BSB:
For they were all so terrified that Peter did not know what else to say.
7
LIN
Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye !
BSB
BSB:
Then a cloud appeared and enveloped them, and a voice came from the cloud: “This is My beloved Son. Listen to Him!”
8
LIN
Mbala moko, bayekoli batalaki zingazinga na bango mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu.
BSB
BSB:
Suddenly, when they looked around, they saw no one with them except Jesus.
9
LIN
Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
BSB
BSB:
As they were coming down the mountain, Jesus admonished them not to tell anyone what they had seen until the Son of Man had risen from the dead.
10
LIN
Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana : — Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini ?
BSB
BSB:
So they kept this matter to themselves, discussing what it meant to rise from the dead.
11
LIN
Bayekoli batunaki Yesu : — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ?
BSB
BSB:
And they asked Jesus, “Why do the scribes say that Elijah must come first?”
12
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye ?
BSB
BSB:
He replied,
“Elijah does indeed come first, and he restores all things. Why then is it written that the Son of Man must suffer many things and be rejected?
13
LIN
Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya ayaki mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kolanda ndenge ekomama na tina na ye.
BSB
BSB:
But I tell you that Elijah has indeed come, and they have done to him whatever they wished, just as it is written about him.”
14
LIN
Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli.
BSB
BSB:
When they returned to the other disciples, they saw a large crowd around them, and scribes arguing with them.
15
LIN
Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote.
BSB
BSB:
As soon as all the people saw Jesus, they were filled with awe and ran to greet Him.
16
LIN
Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozali kotiana na yango tembe elongo na bayekoli ?
BSB
BSB:
“What are you disputing with them?”
He asked.
17
LIN
Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye : — Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo ; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te.
BSB
BSB:
Someone in the crowd replied, “Teacher, I brought You my son, who has a spirit that makes him mute.
18
LIN
Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
BSB
BSB:
Whenever it seizes him, it throws him to the ground. He foams at the mouth, gnashes his teeth, and becomes rigid. I asked Your disciples to drive it out, but they were unable.”
19
LIN
Yesu alobaki na bango : — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
BSB
BSB:
“O unbelieving generation!”
Jesus replied.
“How long must I remain with you? How long must I put up with you? Bring the boy to Me.”
20
LIN
Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko.
BSB
BSB:
So they brought him, and seeing Jesus, the spirit immediately threw the boy into a convulsion. He fell to the ground and rolled around, foaming at the mouth.
21
LIN
Yesu atunaki tata ya mwana : — Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye ? Tata ya mwana azongisaki : — Wuta tango azalaki mwana moke penza.
BSB
BSB:
Jesus asked the boy’s father,
“How long has this been with him?”
“From childhood,” he said.
22
LIN
Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.
BSB
BSB:
“It often throws him into the fire or into the water, trying to kill him. But if You can do anything, have compassion on us and help us.”
23
LIN
Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
BSB
BSB:
“If You can?”
echoed Jesus.
“All things are possible to him who believes!”
24
LIN
Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi : — Nandimi ! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.
BSB
BSB:
Immediately the boy’s father cried out, “I do believe; help my unbelief!”
25
LIN
Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.
BSB
BSB:
When Jesus saw that a crowd had come running, He rebuked the unclean spirit.
“You deaf and mute spirit,”
He said,
“I command you to come out and never enter him again.”
26
LIN
Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi ! »
BSB
BSB:
After shrieking and convulsing him violently, the spirit came out. The boy became like a corpse, so that many said, “He is dead.”
27
LIN
Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki.
BSB
BSB:
But Jesus took him by the hand and helped him to his feet, and he stood up.
28
LIN
Yesu akotaki na ndako ; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye : — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?
BSB
BSB:
After Jesus had gone into the house, His disciples asked Him privately, “Why couldn’t we drive it out?”
29
LIN
Yesu azongisaki : — Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo .
BSB
BSB:
Jesus answered,
“This kind cannot come out, except by prayer.”
30
LIN
Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali,
BSB
BSB:
Going on from there, they passed through Galilee. But Jesus did not want anyone to know,
31
LIN
pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.
BSB
BSB:
because He was teaching His disciples. He told them,
“The Son of Man will be delivered into the hands of men. They will kill Him, and after three days He will rise.”
32
LIN
Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.
BSB
BSB:
But they did not understand this statement, and they were afraid to ask Him about it.
33
LIN
Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela ?
BSB
BSB:
Then they came to Capernaum. While Jesus was in the house, He asked them,
“What were you discussing on the way?”
34
LIN
Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
BSB
BSB:
But they were silent, for on the way they had been arguing about which of them was the greatest.
35
LIN
Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.
BSB
BSB:
Sitting down, Jesus called the Twelve and said,
“If anyone wants to be first, he must be the last of all and the servant of all.”
36
LIN
Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango :
BSB
BSB:
Then He had a little child stand among them. Taking the child in His arms, He said to them,
37
LIN
— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
BSB
BSB:
“Whoever welcomes one of these little children in My name welcomes Me, and whoever welcomes Me welcomes not only Me, but the One who sent Me.”
38
LIN
Yoane alobaki : — Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe topekisaki ye, pamba te azali elongo na biso te.
BSB
BSB:
John said to Him, “Teacher, we saw someone else driving out demons in Your name, and we tried to stop him, because he does not accompany us.”
39
LIN
Kasi Yesu azongisaki : — Bopekisa ye te ; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai.
BSB
BSB:
“Do not stop him,”
Jesus replied.
“For no one who performs a miracle in My name can turn around and speak evil of Me.
40
LIN
Moto oyo atelemeli biso te azali mpo na biso.
BSB
BSB:
For whoever is not against us is for us.
41
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
BSB
BSB:
Indeed, if anyone gives you even a cup of water because you bear the name of Christ, truly I tell you, he will never lose his reward.
42
LIN
Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
BSB
BSB:
But if anyone causes one of these little ones who believe in Me to stumble, it would be better for him to have a large millstone hung around his neck and to be thrown into the sea.
43
LIN
Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [
BSB
BSB:
If your hand causes you to sin, cut it off. It is better for you to enter life crippled than to have two hands and go into hell, into the unquenchable fire.
44
LIN
epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
45
LIN
Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo [
BSB
BSB:
If your foot causes you to sin, cut it off. It is better for you to enter life lame than to have two feet and be thrown into hell.
46
LIN
epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
47
LIN
Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo
BSB
BSB:
And if your eye causes you to sin, pluck it out. It is better for you to enter the kingdom of God with one eye than to have two eyes and be thrown into hell,
48
LIN
epai wapi nkusu ekufaka te, mpe moto ekufaka te.
BSB
BSB:
where ‘their worm never dies, and the fire is never quenched.’
49
LIN
Pamba te moto na moto akoleka na moto mpo ete akoma elengi lokola mungwa.
BSB
BSB:
For everyone will be salted with fire.
50
LIN
Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.
BSB
BSB:
Salt is good, but if the salt loses its saltiness, with what will you season it? Have salt among yourselves, and be at peace with one another.”
Chapter complete
You’ve read Mark 9
Chapter 9 of 16 in Mark
Up next
Mark 10
Read Mark 10
Listen
Back to Mark 8
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 9
A question this chapter raises
Is it wrong to doubt?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 8
Mark 9
Mark 10