Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.36.0
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
3
LIN
BSB
A
a
Matthew 3
3
Matthew
Birth and preparation of the King
Lingala Bible
John
, person
Jesus
, person
Jordan
, place
Judea
, place
Jerusalem
, place
Abraham
, person
Galilee
, place
Isaiah
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda :
BSB
BSB:
In those days John the Baptist came, preaching in the wilderness of Judea
2
LIN
« Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »
BSB
BSB:
and saying, “Repent, for the kingdom of heaven is near.”
3
LIN
Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike ! › »
BSB
BSB:
This is he who was spoken of through the prophet Isaiah: “A voice of one calling in the wilderness, ‘Prepare the way for the Lord, make straight paths for Him.’”
4
LIN
Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
BSB
BSB:
John wore a garment of camel’s hair, with a leather belt around his waist. His food was locusts and wild honey.
5
LIN
Bato bazalaki kokende epai na ye longwa na Yelusalemi, na Yuda mobimba mpe na etuka mobimba ya Yordani ;
BSB
BSB:
People went out to him from Jerusalem and all Judea and the whole region around the Jordan.
6
LIN
bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
BSB
BSB:
Confessing their sins, they were baptized by him in the Jordan River.
7
LIN
Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?
BSB
BSB:
But when John saw many of the Pharisees and Sadducees coming to his place of baptism, he said to them, “You brood of vipers, who warned you to flee from the coming wrath?
8
LIN
Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema.
BSB
BSB:
Produce fruit, then, in keeping with repentance.
9
LIN
Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
BSB
BSB:
And do not presume to say to yourselves, ‘We have Abraham as our father.’ For I tell you that out of these stones God can raise up children for Abraham.
10
LIN
Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa : nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.
BSB
BSB:
The axe lies ready at the root of the trees, and every tree that does not produce good fruit will be cut down and thrown into the fire.
11
LIN
Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.
BSB
BSB:
I baptize you with water for repentance, but after me will come One more powerful than I, whose sandals I am not worthy to carry. He will baptize you with the Holy Spirit and with fire.
12
LIN
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »
BSB
BSB:
His winnowing fork is in His hand to clear His threshing floor and to gather His wheat into the barn; but He will burn up the chaff with unquenchable fire.”
13
LIN
Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye.
BSB
BSB:
At that time Jesus came from Galilee to the Jordan to be baptized by John.
14
LIN
Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki : — Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai ; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai ?
BSB
BSB:
But John tried to prevent Him, saying, “I need to be baptized by You, and do You come to me?”
15
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.
BSB
BSB:
“Let it be so now,”
Jesus replied.
“It is fitting for us to fulfill all righteousness in this way.”
Then John permitted Him.
16
LIN
Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga.
BSB
BSB:
As soon as Jesus was baptized, He went up out of the water. Suddenly the heavens were opened, and He saw the Spirit of God descending like a dove and resting on Him.
17
LIN
Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
BSB
BSB:
And a voice from heaven said, “This is My beloved Son, in whom I am well pleased!”
Chapter complete
You’ve read Matthew 3
Chapter 3 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 4
Read Matthew 4
Listen
Back to Matthew 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 3
A question this chapter raises
Isn’t the Trinity a contradiction?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 2
Matthew 3
Matthew 4