Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Zech
Zechariah
2
LIN
BSB
A
a
Zechariah 2
2
Zechariah
Call to return and eight night visions
Lingala Bible
Jerusalem
, place
Judah
, person
Babylon
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye.
BSB
BSB:
Then I lifted up my eyes and saw a man with a measuring line in his hand.
2
LIN
Natunaki ye : — Ozali kokende wapi ? Azongiselaki ngai : — Nazali kokende komeka molayi ya Yelusalemi mpo na koyeba mokuse mpe molayi na yango.
BSB
BSB:
“Where are you going?” I asked. “To measure Jerusalem,” he replied, “and to determine its width and length.”
3
LIN
Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atikaki ngai, mpe Anjelu mosusu ayaki mpo na kokutana na ye
BSB
BSB:
Then the angel who was speaking with me went forth, and another angel came forward to meet him
4
LIN
mpe alobaki na ye : — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.
BSB
BSB:
and said to him, “Run and tell that young man: ‘Jerusalem will be a city without walls because of the multitude of men and livestock within it.
5
LIN
Ngai moko, nakozala mir ya moto zingazinga na yango, » elobi Yawe, « mpe nakomonisa nkembo na Ngai kati na yango. »
BSB
BSB:
For I will be a wall of fire around it, declares the LORD, and I will be the glory within it.’”
6
LIN
Tokende ! Tokende ! Tobima noki na mokili ya nor, elobi Yawe, pamba te Ngai moko nde napanzaki bino na mokili mobimba, elobi Yawe.
BSB
BSB:
“Get up! Get up! Flee from the land of the north,” declares the LORD, “for I have scattered you like the four winds of heaven,” declares the LORD.
7
LIN
Siona, tokende ! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko !
BSB
BSB:
“Get up, O Zion! Escape, you who dwell with the Daughter of Babylon!”
8
LIN
Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi : Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai.
BSB
BSB:
For this is what the LORD of Hosts says: “After His Glory has sent Me against the nations that have plundered you—for whoever touches you touches the apple of His eye—
9
LIN
Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.
BSB
BSB:
I will surely wave My hand over them, so that they will become plunder for their own servants. Then you will know that the LORD of Hosts has sent Me.”
10
LIN
Siona, mboka kitoko, ganga na esengo mpe sepela, pamba te nazali koya kovanda kati na yo, elobi Yawe.
BSB
BSB:
“Shout for joy and be glad, O Daughter of Zion, for I am coming to dwell among you,” declares the LORD.
11
LIN
Na mokolo wana, bato ya bikolo ebele bakoya kosangana elongo na Yawe mpe bakokoma bato na Ngai. Nakovanda kati na bino ; mpe na bongo, bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
BSB
BSB:
“On that day many nations will join themselves to the LORD, and they will become My people. I will dwell among you, and you will know that the LORD of Hosts has sent Me to you.
12
LIN
Yawe akokomisa Yuda lokola libula na Ye moko penza kati na mabele ebulisama, mpe akopona lisusu Yelusalemi.
BSB
BSB:
And the LORD will take possession of Judah as His portion in the Holy Land, and He will once again choose Jerusalem.
13
LIN
Tika ete bato ya mokili mobimba bavanda kimia liboso ya Yawe, pamba te Ye moko atelemi mpe abimi na Ndako na Ye ya bule.
BSB
BSB:
Be silent before the LORD, all people, for He has roused Himself from His holy dwelling.”
Chapter complete
You’ve read Zechariah 2
Chapter 2 of 14 in Zechariah
Up next
Zechariah 3
Read Zechariah 3
Listen
Back to Zechariah 1
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Zechariah 2
Ask Study Help
Ask anything about Zechariah 2
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Zechariah 1
Zechariah 2
Zechariah 3