Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Zech
Zechariah
7
LIN
BSB
A
a
Zechariah 7
7
Zechariah
Fasting and true justice
Lingala Bible
Zechariah
, person
Jerusalem
, place
Bethel
, place
Negeb
, place
Shephelah
, place
Darius
, person
Regem-melech
, person
Sharezer
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na mobu ya minei ya mokonzi ya Dariusi, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, sanza ya kisilevi, Yawe alobaki na Zakari.
BSB
BSB:
In the fourth year of King Darius, the word of the LORD came to Zechariah on the fourth day of the ninth month, the month of Chislev.
2
LIN
Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe
BSB
BSB:
Now the people of Bethel had sent Sharezer and Regem-melech, along with their men, to plead before the LORD
3
LIN
mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli : — Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala ?
BSB
BSB:
by asking the priests of the house of the LORD of Hosts, as well as the prophets, “Should I weep and fast in the fifth month, as I have done these many years?”
4
LIN
Bongo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :
BSB
BSB:
Then the word of the LORD of Hosts came to me, saying,
5
LIN
— Tuna bato nyonso ya ekolo mpe Banganga-Nzambe : « Wuta mibu tuku sambo, tango bokilaka bilei mpe bolelaka na sanza ya mitano mpe ya sambo, bosalaka yango mpo na Ngai ?
BSB
BSB:
“Ask all the people of the land and the priests, ‘When you fasted and mourned in the fifth and seventh months for these seventy years, was it really for Me that you fasted?
6
LIN
Bongo tango bozalaki kolia mpe komela, ezalaki te mpo na esengo na bino moko ?
BSB
BSB:
And when you were eating and drinking, were you not doing so simply for yourselves?
7
LIN
Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? »
BSB
BSB:
Are these not the words that the LORD proclaimed through the earlier prophets, when Jerusalem and its surrounding towns were populous and prosperous, and the Negev and the foothills were inhabited?’”
8
LIN
Mpe Yawe alobaki lisusu na Zakari :
BSB
BSB:
Then the word of the LORD came to Zechariah, saying,
9
LIN
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.
BSB
BSB:
“This is what the LORD of Hosts says: ‘Administer true justice. Show loving devotion and compassion to one another.
10
LIN
Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »
BSB
BSB:
Do not oppress the widow or the fatherless, the foreigner or the poor. And do not plot evil in your hearts against one another.’
11
LIN
Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te.
BSB
BSB:
But they refused to pay attention and turned a stubborn shoulder; they stopped up their ears from hearing.
12
LIN
Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi.
BSB
BSB:
They made their hearts like flint and would not listen to the law or to the words that the LORD of Hosts had sent by His Spirit through the earlier prophets. Therefore great anger came from the LORD of Hosts.
13
LIN
Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki : « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai.
BSB
BSB:
And just as I had called and they would not listen, so when they called I would not listen, says the LORD of Hosts.
14
LIN
Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »
BSB
BSB:
But I scattered them with a whirlwind among all the nations that they had not known, and the land was left desolate behind them so that no one could come or go. Thus they turned the pleasant land into a desolation.”
Chapter complete
You’ve read Zechariah 7
Chapter 7 of 14 in Zechariah
Up next
Zechariah 8
Read Zechariah 8
Listen
Back to Zechariah 6
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Zechariah 7
Ask Opened AI
Ask anything about Zechariah 7
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Zechariah 6
Zechariah 7
Zechariah 8