Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Zeph
Zephaniah
3
LIN
BSB
A
a
Zephaniah 3
3
Zephaniah
Judgment of the nations
Lingala Bible
Israel
, person
Jerusalem
, place
Cush
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato !
BSB
BSB:
Woe to the city of oppressors, rebellious and defiled!
2
LIN
Etosaka moto te, endimaka pamela te, etiaka elikya na Yawe te, epusanaka pene ya Nzambe na yango te.
BSB
BSB:
She heeded no voice; she accepted no correction. She does not trust in the LORD; she has not drawn near to her God.
3
LIN
Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.
BSB
BSB:
Her princes are roaring lions; her judges are evening wolves, leaving nothing for the morning.
4
LIN
Basakoli na yango bazali bato ya lolendo mpe ya lokuta. Banganga-Nzambe na yango babebisaka Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.
BSB
BSB:
Her prophets are reckless, faithless men. Her priests profane the sanctuary; they do violence to the law.
5
LIN
Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.
BSB
BSB:
The LORD within her is righteous; He does no wrong. He applies His justice morning by morning; He does not fail at dawn, yet the unjust know no shame.
6
LIN
Nabomi bato ya bikolo mosusu, bandako na bango ya makasi ebebisami. Nasali ete babalabala na bango etikala lisusu na bato te mpo ete moto moko te alekela lisusu wana. Bingumba na bango ebebisami, ata moto moko te atikali lisusu kuna.
BSB
BSB:
“I have cut off the nations; their corner towers are destroyed. I have made their streets deserted with no one to pass through. Their cities are laid waste, with no man, no inhabitant.
7
LIN
Namilobelaki boye na tina na engumba oyo : « Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! » Boye bandako na yango ekobukana lisusu te, mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te. Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala misala na bango ya mabe.
BSB
BSB:
I said, ‘Surely you will fear Me and accept correction.’ Then her dwelling place would not be cut off despite all for which I punished her. But they rose early to corrupt all their deeds.
8
LIN
Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino ; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai : mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.
BSB
BSB:
Therefore wait for Me,” declares the LORD, “until the day I rise to testify. For My decision is to gather nations, to assemble kingdoms, to pour out upon them My indignation—all My burning anger. For all the earth will be consumed by the fire of My jealousy.
9
LIN
Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.
BSB
BSB:
For then I will restore pure lips to the peoples, that all may call upon the name of the LORD and serve Him shoulder to shoulder.
10
LIN
Longwa na likolo ya bibale ya Kushi, bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai ; bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai, bakomemela Ngai makabo.
BSB
BSB:
From beyond the rivers of Cush My worshipers, My scattered people, will bring Me an offering.
11
LIN
Na mokolo wana, oh bato na Ngai, bokoyokisama lisusu soni te mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai, pamba te nakolongola bato oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino. Boye bokomitombola lisusu te na lolendo na ngomba na Ngai ya bule.
BSB
BSB:
On that day you will not be put to shame for any of the deeds by which you have transgressed against Me. For then I will remove from among you those who rejoice in their pride, and you will never again be haughty on My holy mountain.
12
LIN
Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.
BSB
BSB:
But I will leave within you a meek and humble people, and they will trust in the name of the LORD.
13
LIN
Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te, bakokosa lisusu te to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango. Bakolia mpe bakolala na kimia, mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.
BSB
BSB:
The remnant of Israel will no longer do wrong or speak lies, nor will a deceitful tongue be found in their mouths. But they will feed and lie down, with no one to make them tremble.”
14
LIN
Siona, mboka kitoko, yemba nzembo ! Isalaele, ganga makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ; mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !
BSB
BSB:
Sing for joy, O Daughter of Zion; shout aloud, O Israel! Be glad and rejoice with all your heart, O Daughter of Jerusalem!
15
LIN
Yawe alongoli etumbu na yo mpe akimisi banguna na yo. Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ; kobanga lisusu pasi moko te.
BSB
BSB:
The LORD has taken away your punishment; He has turned back your enemy. Israel’s King, the LORD, is among you; no longer will you fear any harm.
16
LIN
Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi : ‹ Oh Siona, kobanga te ! Tika ete maboko na yo elemba te !
BSB
BSB:
On that day they will say to Jerusalem: “Do not fear, O Zion; do not let your hands fall limp.
17
LIN
Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›
BSB
BSB:
The LORD your God is among you; He is mighty to save. He will rejoice over you with gladness; He will quiet you with His love; He will rejoice over you with singing.”
18
LIN
Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama, nakolongola pasi kati na yo mpo ete ozala lisusu na soni te.
BSB
BSB:
“I will gather those among you who grieve over the appointed feasts, so that you will no longer suffer reproach.
19
LIN
Na tango wana, nakobeta bato nyonso oyo banyokolaki yo, nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai. Nakopesa bango lokumu mpe nakosala ete sango na bango epanzana na mikili nyonso epai wapi basambwisaki bango.
BSB
BSB:
Behold, at that time, I will deal with all who afflict you. I will save the lame and gather the scattered; and I will appoint praise and fame for the disgraced throughout the earth.
20
LIN
Na tango wana, nakosangisa bino, nakozongisa bino na mokili na bino. Nakopesa bino lokumu mpe nakosala ete sango na bino epanzana kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino, oyo bakendeki na bowumbu, » elobi Yawe.
BSB
BSB:
At that time I will bring you in; yes, at that time I will gather you. For I will give you fame and praise among all the peoples of the earth when I restore your captives before your very eyes,” says the LORD.
Chapter complete
You’ve read Zephaniah 3
Chapter 3 of 3 in Zephaniah
Up next
Haggai 1
Read Haggai 1
Listen
Back to Zephaniah 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Zephaniah 3
Ask Study Help
Ask anything about Zephaniah 3
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Zephaniah 2
Zephaniah 3
Haggai 1