Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Amos
Amos
7
LIN
BSB
A
a
Amos 7
7
Amos
Five visions and restoration
Lingala Bible
Israel
, person
Amos
, person
Jeroboam
, person
Amaziah
, person
Isaac
, person
Bethel
, place
Judah
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : Tango matiti ebandaki kobota, ebimisaki mabanki ebele. Esalemaki sima na kobuka milona ya mokonzi.
BSB
BSB:
This is what the Lord GOD showed me: He was preparing swarms of locusts just after the king’s harvest, as the late spring crop was coming up.
2
LIN
Tango mabanki yango esilisaki kolia matiti nyonso ya mokili, nagangaki : — Oh Nkolo Yawe, limbisa bato na Yo ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ?
BSB
BSB:
And when the locusts had eaten every green plant in the land, I said, “Lord GOD, please forgive! How will Jacob survive, since he is so small?”
3
LIN
Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki : — Makambo yango ekosalema te.
BSB
BSB:
So the LORD relented from this plan. “It will not happen,” He said.
4
LIN
Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili.
BSB
BSB:
This is what the Lord GOD showed me: The Lord GOD was calling for judgment by fire. It consumed the great deep and devoured the land.
5
LIN
Boye, nagangaki : — Oh Nkolo Yawe, nabondeli Yo, kosala boye te ! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika ?
BSB
BSB:
Then I said, “Lord GOD, please stop! How will Jacob survive, since he is so small?”
6
LIN
Boye Yawe abongolaki makanisi na Ye. Mpe Nkolo Yawe alobaki : — Makambo yango ekosalema lisusu te.
BSB
BSB:
So the LORD relented from this plan. “It will not happen either,” said the Lord GOD.
7
LIN
Tala makambo oyo alakisaki ngai : Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka.
BSB
BSB:
This is what He showed me: Behold, the Lord was standing by a wall true to plumb, with a plumb line in His hand.
8
LIN
Yawe atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona nivo oyo batongi ndako basalelaka. Nkolo alobaki na ngai : — Tala, nakotia nivo oyo batongi ndako basalelaka na likolo ya Isalaele, bato na Ngai. Nakolimbisa bango lisusu te.
BSB
BSB:
“Amos, what do you see?” asked the LORD. “A plumb line,” I replied. “Behold,” said the Lord, “I am setting a plumb line among My people Israel; I will no longer spare them:
9
LIN
Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.
BSB
BSB:
The high places of Isaac will be deserted, and the sanctuaries of Israel will be laid waste; and I will rise up against the house of Jeroboam with My sword.”
10
LIN
Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.
BSB
BSB:
Then Amaziah the priest of Bethel sent word to Jeroboam king of Israel, saying, “Amos has conspired against you in the midst of the house of Israel. The land cannot bear all his words,
11
LIN
Pamba te, tala maloba oyo Amosi azali koloba : ‹ Jeroboami akokufa na mopanga, mpe Isalaele akokende na bowumbu, mosika ya mabele na ye. › »
BSB
BSB:
for this is what Amos has said: ‘Jeroboam will die by the sword, and Israel will surely go into exile, away from their homeland.’”
12
LIN
Amatsia alobaki na Amosi : — Yo, momoni makambo, bima na mokili na biso ! Zonga na mokili ya Yuda. Kuna, okosala mbongo na masakoli na yo.
BSB
BSB:
And Amaziah said to Amos, “Go away, you seer! Flee to the land of Judah; earn your bread there and do your prophesying there.
13
LIN
Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.
BSB
BSB:
But never prophesy at Bethel again, because it is the sanctuary of the king and the temple of the kingdom.”
14
LIN
Amosi azongiselaki Amatsia : — Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori.
BSB
BSB:
“I was not a prophet,” Amos replied, “nor was I the son of a prophet; rather, I was a herdsman and a tender of sycamore-fig trees.
15
LIN
Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai : « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. »
BSB
BSB:
But the LORD took me from following the flock and said to me, ‘Go, prophesy to My people Israel.’
16
LIN
Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! »
BSB
BSB:
Now, therefore, hear the word of the LORD. You say: ‘Do not prophesy against Israel; do not preach against the house of Isaac.’
17
LIN
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »
BSB
BSB:
Therefore this is what the LORD says: ‘Your wife will become a prostitute in the city, and your sons and daughters will fall by the sword. Your land will be divided by a measuring line, and you yourself will die on pagan soil. And Israel will surely go into exile, away from their homeland.’”
Chapter complete
You’ve read Amos 7
Chapter 7 of 9 in Amos
Up next
Amos 8
Read Amos 8
Back to Amos 6
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Amos 7
Ask Study Help
Ask anything about Amos 7
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Amos 6
Amos 7
Amos 8