Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Amos
Amos
8
LIN
BSB
A
a
Amos 8
8
Amos
Five visions and restoration
Lingala Bible
Israel
, person
Egypt
, place
Samaria
, place
Dan
, place
Nile
, place
Beersheba
, place
Amos
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : kitunga etonda na bambuma etela.
BSB
BSB:
This is what the Lord GOD showed me: I saw a basket of summer fruit.
2
LIN
Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.
BSB
BSB:
“Amos, what do you see?” He asked. “A basket of summer fruit,” I replied. So the LORD said to me, “The end has come for My people Israel; I will no longer spare them.”
3
LIN
Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.
BSB
BSB:
“In that day,” declares the Lord GOD, “the songs of the temple will turn to wailing. Many will be the corpses, strewn in silence everywhere!”
4
LIN
Boyoka makambo oyo, bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela mpe bonyataka babola kati na mokili.
BSB
BSB:
Hear this, you who trample the needy, who do away with the poor of the land,
5
LIN
Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.
BSB
BSB:
asking, “When will the New Moon be over, that we may sell grain? When will the Sabbath end, that we may market wheat? Let us reduce the ephah and increase the shekel; let us cheat with dishonest scales.
6
LIN
Tokosomba mobola na palata mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale, bongo tokoteka ata basalite ya ble.
BSB
BSB:
Let us buy the poor with silver and the needy for a pair of sandals, selling even the chaff with the wheat!”
7
LIN
Mpo na lolendo ya Jakobi, Yawe alapi ndayi na maloba oyo : « Nakobosana misala na bango ata moko te.
BSB
BSB:
The LORD has sworn by the Pride of Jacob: “I will never forget any of their deeds.
8
LIN
Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.
BSB
BSB:
Will not the land quake for this, and all its dwellers mourn? All of it will swell like the Nile; it will surge and then subside like the Nile in Egypt.
9
LIN
Na mokolo wana, » elobi Nkolo Yawe, « nakosala ete moyi elala na midi, mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.
BSB
BSB:
And in that day, declares the Lord GOD, I will make the sun go down at noon, and I will darken the earth in the daytime.
10
LIN
Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.
BSB
BSB:
I will turn your feasts into mourning and all your songs into lamentation. I will cause everyone to wear sackcloth and every head to be shaved. I will make it like a time of mourning for an only son, and its outcome like a bitter day.
11
LIN
Na mikolo ekoya, » elobi Nkolo Yawe, « nakotinda nzala makasi kati na mokili ; ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi, kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.
BSB
BSB:
Behold, the days are coming, declares the Lord GOD, when I will send a famine on the land—not a famine of bread or a thirst for water, but a famine of hearing the words of the LORD.
12
LIN
Bato bakotelengana na bibale nyonso, bakoyengayenga longwa na nor kino na este mpo na koluka Liloba na Yawe, kasi bakotikala komona yango te.
BSB
BSB:
People will stagger from sea to sea and roam from north to east, seeking the word of the LORD, but they will not find it.
13
LIN
Na mokolo wana, bilenge basi ya kitoko mpe mibali ya makasi bakokufa na posa ya mayi.
BSB
BSB:
In that day the lovely young women—the young men as well—will faint from thirst.
14
LIN
Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »
BSB
BSB:
Those who swear by the guilt of Samaria and say, ‘As surely as your god lives, O Dan,’ or, ‘As surely as the way of Beersheba lives’—they will fall, never to rise again.”
Chapter complete
You’ve read Amos 8
Chapter 8 of 9 in Amos
Up next
Amos 9
Read Amos 9
Back to Amos 7
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Amos 8
Ask Study Help
Ask anything about Amos 8
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Amos 7
Amos 8
Amos 9