Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Amos
Amos
9
LIN
BSB
A
a
Amos 9
9
Amos
Five visions and restoration
Lingala Bible
Israel
, person
Egypt
, place
David
, person
Syria
, place
Edom
, place
Nile
, place
Carmel
, place
Caphtor
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.
BSB
BSB:
I saw the Lord standing beside the altar, and He said: “Strike the tops of the pillars so that the thresholds shake. Topple them on the heads of all the people, and I will kill the rest with the sword. None of those who flee will get away; none of the fugitives will escape.
2
LIN
Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi, loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ; soki bakimi na Lola, nakokitisa bango na se.
BSB
BSB:
Though they dig down to Sheol, from there My hand will take them; and though they climb up to heaven, from there I will pull them down.
3
LIN
Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.
BSB
BSB:
Though they hide themselves atop Carmel, there I will track them and seize them; and though they hide from Me at the bottom of the sea, there I will command the serpent to bite them.
4
LIN
Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu, nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna. Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.
BSB
BSB:
Though they are driven by their enemies into captivity, there I will command the sword to slay them. I will fix My eyes upon them for harm and not for good.”
5
LIN
Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.
BSB
BSB:
The Lord GOD of Hosts, He who touches the earth and it melts, and all its dwellers mourn—all the land rises like the Nile, then sinks like the river of Egypt—
6
LIN
Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola mpe atia miboko na yango na mabele ; abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mabele. Kombo na Ye ezali : Yawe.
BSB
BSB:
He builds His upper rooms in the heavens and founds His vault upon the earth. He summons the waters of the sea and pours them over the face of the earth. The LORD is His name.
7
LIN
Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi ? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri ?
BSB
BSB:
“Are you not like the Cushites to Me, O children of Israel?” declares the LORD. “Did I not bring Israel up from the land of Egypt, the Philistines from Caphtor, and the Arameans from Kir?
8
LIN
Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu ; nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele. Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, » elobi Yawe.
BSB
BSB:
Surely the eyes of the Lord GOD are on the sinful kingdom, and I will destroy it from the face of the earth. Yet I will not utterly destroy the house of Jacob,” declares the LORD.
9
LIN
« Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.
BSB
BSB:
“For surely I will give the command, and I will shake the house of Israel among all the nations as grain is sifted in a sieve; but not a pebble will reach the ground.
10
LIN
Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai bakokufa na mopanga, ba-oyo nyonso balobaka : ‹ Pasi ekotikala te kozwa to kokomela biso ! ›
BSB
BSB:
All the sinners among My people will die by the sword—all those who say, ‘Disaster will never draw near or confront us.’”
11
LIN
Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,
BSB
BSB:
“In that day I will restore the fallen tent of David. I will repair its gaps, restore its ruins, and rebuild it as in the days of old,
12
LIN
mpo ete bakoka kozwa ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki, mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, » elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.
BSB
BSB:
that they may possess the remnant of Edom and all the nations that bear My name,” declares the LORD, who will do this.
13
LIN
« Mikolo ezali koya, » elobi Yawe, « mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki, mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki. Vino ya sika ekobota na bangomba milayi mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.
BSB
BSB:
“Behold, the days are coming,” declares the LORD, “when the plowman will overtake the reaper and the treader of grapes, the sower of seed. The mountains will drip with sweet wine, with which all the hills will flow.
14
LIN
Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai, oyo bakendeki na bowumbu, mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki mpe bakovanda kati na yango. Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango, bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.
BSB
BSB:
I will restore My people Israel from captivity; they will rebuild and inhabit the ruined cities. They will plant vineyards and drink their wine; they will make gardens and eat their fruit.
15
LIN
Nakolona bango na mabele na bango moko, mpe bakotikala kopikola bango lisusu te na mabele oyo napesaki bango, » elobi Yawe, Nzambe na yo.
BSB
BSB:
I will firmly plant them in their own land, never again to be uprooted from the land that I have given them,” says the LORD your God.
Chapter complete
You’ve read Amos 9
Chapter 9 of 9 in Amos
Up next
Obadiah 1
Read Obadiah 1
Back to Amos 8
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Amos 9
Ask Study Help
Ask anything about Amos 9
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Amos 8
Amos 9
Obadiah 1