Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.6.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
16
LIN
BSB
A
a
Exodus 16
16
Exodus
The sea crossing and the wilderness
Lingala Bible
Moses
, person
Israel
, person
Aaron
, person
Egypt
, place
Canaan
, place
Sinai
, place
Elim
, place
Sin
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito.
BSB
BSB:
On the fifteenth day of the second month after they had left the land of Egypt, the whole congregation of Israel set out from Elim and came to the Desert of Sin, which is between Elim and Sinai.
2
LIN
Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe.
BSB
BSB:
And there in the desert the whole congregation of Israel grumbled against Moses and Aaron.
3
LIN
Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !
BSB
BSB:
“If only we had died by the LORD’s hand in the land of Egypt!” they said. “There we sat by pots of meat and ate our fill of bread, but you have brought us into this desert to starve this whole assembly to death!”
4
LIN
Yawe alobaki na Moyize : — Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Behold, I will rain down bread from heaven for you. Each day the people are to go out and gather enough for that day. In this way I will test whether or not they will follow My instructions.
5
LIN
Na mokolo ya motoba, bakolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko mpe bakolamba yango.
BSB
BSB:
Then on the sixth day, when they prepare what they bring in, it will be twice as much as they gather on the other days.”
6
LIN
Moyize mpe Aron balobaki na bana nyonso ya Isalaele : — Na pokwa ya lelo, bokoyeba solo ete ezali Yawe nde abimisaki bino na Ejipito.
BSB
BSB:
So Moses and Aaron said to all the Israelites, “This evening you will know that it was the LORD who brought you out of the land of Egypt,
7
LIN
Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe ; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso ?
BSB
BSB:
and in the morning you will see the LORD’s glory, because He has heard your grumbling against Him. For who are we, that you should grumble against us?”
8
LIN
Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.
BSB
BSB:
And Moses added, “The LORD will give you meat to eat this evening and bread to fill you in the morning, for He has heard your grumbling against Him. Who are we? Your grumblings are not against us but against the LORD.”
9
LIN
Boye Moyize alobaki na Aron : — Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango.
BSB
BSB:
Then Moses said to Aaron, “Tell the whole congregation of Israel, ‘Come before the LORD, for He has heard your grumbling.’”
10
LIN
Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.
BSB
BSB:
And as Aaron was speaking to the whole congregation of Israel, they looked toward the desert, and there in a cloud the glory of the LORD appeared.
11
LIN
Yawe alobaki na Moyize :
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses,
12
LIN
— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »
BSB
BSB:
“I have heard the grumbling of the Israelites. Tell them, ‘At twilight you will eat meat, and in the morning you will be filled with bread. Then you will know that I am the LORD your God.’”
13
LIN
Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.
BSB
BSB:
That evening quail came and covered the camp, and in the morning there was a layer of dew around the camp.
14
LIN
Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.
BSB
BSB:
When the layer of dew had evaporated, there were thin flakes on the desert floor, as fine as frost on the ground.
15
LIN
Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango : — Oyo nini ? Pamba te bayebaki te soki ezali nini. Moyize alobaki na bango : — Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.
BSB
BSB:
When the Israelites saw it, they asked one another, “What is it?” For they did not know what it was. So Moses told them, “It is the bread that the LORD has given you to eat.
16
LIN
Tala mibeko oyo Yawe apesi na tina na likambo oyo : « Tika ete moto na moto alokota oyo ekoki mpo na ye kolia, omeri moko mpo na moto moko. Moto na moto akolokota kolanda motango ya bato oyo bazali kati na ndako na ye ya kapo. »
BSB
BSB:
This is what the LORD has commanded: ‘Each one is to gather as much as he needs. You may take an omer for each person in your tent.’”
17
LIN
Bato ya Isalaele basalaki bongo : bamoko balokotaki moke ; mpe bamosusu, ebele.
BSB
BSB:
So the Israelites did this. Some gathered more, and some less.
18
LIN
Mpe bamekaki na omeri : moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te ; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia.
BSB
BSB:
When they measured it by the omer, he who gathered much had no excess, and he who gathered little had no shortfall. Each one gathered as much as he needed to eat.
19
LIN
Moyize ayebisaki bango : — Moko te abomba ata moke kino na tongo.
BSB
BSB:
Then Moses said to them, “No one may keep any of it until morning.”
20
LIN
Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango.
BSB
BSB:
But they did not listen to Moses; some people left part of it until morning, and it became infested with maggots and began to smell. So Moses was angry with them.
21
LIN
Tongo nyonso, moto na moto abandaki kolokota oyo ekokaki mpo na ye kolia.
BSB
BSB:
Every morning each one gathered as much as was needed, and when the sun grew hot, it melted away.
22
LIN
Na mokolo ya motoba, bana ya Isalaele bazalaki kolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko : omeri mibale mpo na moto moko. Bakambi nyonso ya lisanga bayaki koyebisa yango Moyize.
BSB
BSB:
On the sixth day, they gathered twice as much food—two omers per person—and all the leaders of the congregation came and reported this to Moses.
23
LIN
Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »
BSB
BSB:
He told them, “This is what the LORD has said: ‘Tomorrow is to be a day of complete rest, a holy Sabbath to the LORD. So bake what you want to bake, and boil what you want to boil. Then set aside whatever remains and keep it until morning.’”
24
LIN
Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki ; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango.
BSB
BSB:
So they set it aside until morning as Moses had commanded, and it did not smell or contain any maggots.
25
LIN
Moyize ayebisaki bango : — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda.
BSB
BSB:
“Eat it today,” Moses said, “because today is a Sabbath to the LORD. Today you will not find anything in the field.
26
LIN
Bokobanda kolokota yango mikolo motoba ; kasi na mokolo ya sambo, mokolo ya Saba, mana ekobanda kozala te.
BSB
BSB:
For six days you may gather, but on the seventh day, the Sabbath, it will not be there.”
27
LIN
Atako bongo, na mokolo ya sambo, bato mosusu kati na bango babimaki mpo na kolokota yango, kasi bamonaki eloko te.
BSB
BSB:
Yet on the seventh day some of the people went out to gather, but they did not find anything.
28
LIN
Boye Yawe alobaki na Moyize : — Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai ?
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “How long will you refuse to keep My commandments and instructions?
29
LIN
Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye ; moko te abima na libanda.
BSB
BSB:
Understand that the LORD has given you the Sabbath; that is why on the sixth day He will give you bread for two days. On the seventh day, everyone must stay where he is; no one may leave his place.”
30
LIN
Boye bato bapemaki na mokolo ya sambo.
BSB
BSB:
So the people rested on the seventh day.
31
LIN
Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.
BSB
BSB:
Now the house of Israel called the bread manna. It was white like coriander seed and tasted like wafers made with honey.
32
LIN
Moyize alobaki : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. »
BSB
BSB:
Moses said, “This is what the LORD has commanded: ‘Keep an omer of manna for the generations to come, so that they may see the bread I fed you in the wilderness when I brought you out of the land of Egypt.’”
33
LIN
Boye Moyize alobi na Aron : — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.
BSB
BSB:
So Moses told Aaron, “Take a jar and fill it with an omer of manna. Then place it before the LORD to be preserved for the generations to come.”
34
LIN
Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu.
BSB
BSB:
And Aaron placed it in front of the Testimony, to be preserved just as the LORD had commanded Moses.
35
LIN
Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana.
BSB
BSB:
The Israelites ate manna forty years, until they came to a land where they could settle; they ate manna until they reached the border of Canaan.
36
LIN
Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa.
BSB
BSB:
(Now an omer is a tenth of an ephah.)
Chapter complete
You’ve read Exodus 16
Chapter 16 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 17
Read Exodus 17
Back to Exodus 15
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 16
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 16
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 15
Exodus 16
Exodus 17