Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.7.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
17
LIN
BSB
A
a
Exodus 17
17
Exodus
The sea crossing and the wilderness
Lingala Bible
Moses
, person
Amalek
, place
Israel
, person
Joshua
, person
Aaron
, person
Hur
, person
Rephidim
, place
Egypt
, place
5 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.
BSB
BSB:
Then the whole congregation of Israel left the Desert of Sin, moving from place to place as the LORD commanded. They camped at Rephidim, but there was no water for the people to drink.
2
LIN
Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye : — Pesa biso mayi ya komela ! Moyize azongiselaki bango : — Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ?
BSB
BSB:
So the people contended with Moses, “Give us water to drink.” “Why do you contend with me?” Moses replied. “Why do you test the LORD?”
3
LIN
Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki : — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ?
BSB
BSB:
But the people thirsted for water there, and they grumbled against Moses: “Why have you brought us out of Egypt—to make us and our children and livestock die of thirst?”
4
LIN
Moyize abelelaki Yawe : — Nasala nini mpo na bato oyo ? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga !
BSB
BSB:
Then Moses cried out to the LORD, “What should I do with these people? A little more and they will stone me!”
5
LIN
Yawe azongiselaki Moyize : — Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende.
BSB
BSB:
And the LORD said to Moses, “Walk on ahead of the people and take some of the elders of Israel with you. Take along in your hand the staff with which you struck the Nile, and go.
6
LIN
Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele.
BSB
BSB:
Behold, I will stand there before you by the rock at Horeb. And when you strike the rock, water will come out of it for the people to drink.” So Moses did this in the sight of the elders of Israel.
7
LIN
Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »
BSB
BSB:
He named the place Massah and Meribah because the Israelites quarreled, and because they tested the LORD, saying, “Is the LORD among us or not?”
8
LIN
Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi.
BSB
BSB:
After this, the Amalekites came and attacked the Israelites at Rephidim.
9
LIN
Moyize alobaki na Jozue : — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.
BSB
BSB:
So Moses said to Joshua, “Choose some of our men and go out to fight the Amalekites. Tomorrow I will stand on the hilltop with the staff of God in my hand.”
10
LIN
Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba.
BSB
BSB:
Joshua did as Moses had instructed him and fought against the Amalekites, while Moses, Aaron, and Hur went up to the top of the hill.
11
LIN
Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga.
BSB
BSB:
As long as Moses held up his hands, Israel prevailed; but when he lowered them, Amalek prevailed.
12
LIN
Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango ; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa.
BSB
BSB:
When Moses’ hands grew heavy, they took a stone and put it under him, and he sat on it. Then Aaron and Hur held his hands up, one on each side, so that his hands remained steady until the sun went down.
13
LIN
Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga.
BSB
BSB:
So Joshua overwhelmed Amalek and his army with the sword.
14
LIN
Yawe alobaki na Moyize : — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Write this on a scroll as a reminder and recite it to Joshua, because I will utterly blot out the memory of Amalek from under heaven.”
15
LIN
Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. »
BSB
BSB:
And Moses built an altar and named it The LORD Is My Banner.
16
LIN
Moyize alobaki : « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »
BSB
BSB:
“Indeed,” he said, “a hand was lifted up toward the throne of the LORD. The LORD will war against Amalek from generation to generation.”
Chapter complete
You’ve read Exodus 17
Chapter 17 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 18
Read Exodus 18
Back to Exodus 16
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 17
A question this chapter raises
Did Moses write the first five books?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 16
Exodus 17
Exodus 18