Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.2.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
2
LIN
BSB
A
a
Exodus 2
2
Exodus
Slavery and Moses' call
Lingala Bible
Moses
, person
Pharaoh
, person
Israel
, person
Midian
, place
Nile
, place
Egypt
, place
Abraham
, person
Isaac
, person
5 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mobali moko ya libota ya Levi abalaki mwasi kati na libota ya Levi.
BSB
BSB:
Now a man of the house of Levi married a Levite woman,
2
LIN
Mwana mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Wana amonaki ete mwana yango azali kitoko, abombaki ye basanza misato.
BSB
BSB:
and she conceived and gave birth to a son. When she saw that he was a beautiful child, she hid him for three months.
3
LIN
Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo ; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili.
BSB
BSB:
But when she could no longer hide him, she got him a papyrus basket and coated it with tar and pitch. Then she placed the child in the basket and set it among the reeds along the bank of the Nile.
4
LIN
Ndeko mwasi ya mwana yango atelemaki mosika mpo na kotala likambo oyo ekokaki kokomela ye.
BSB
BSB:
And his sister stood at a distance to see what would happen to him.
5
LIN
Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale ; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango.
BSB
BSB:
Soon the daughter of Pharaoh went down to bathe in the Nile, and her attendants were walking along the riverbank. And when she saw the basket among the reeds, she sent her maidservant to retrieve it.
6
LIN
Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki : « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. »
BSB
BSB:
When she opened it, she saw the child, and behold, the little boy was crying. So she had compassion on him and said, “This is one of the Hebrew children.”
7
LIN
Boye, ndeko na ye ya mwasi alobaki na mwana mwasi ya Faraon : — Boni, nakoki kokende kolukela yo kati na basi ya Ba-Ebre mwasi oyo akoki komelisa mwana oyo mabele mpo na yo ?
BSB
BSB:
Then his sister said to Pharaoh’s daughter, “Shall I go and call one of the Hebrew women to nurse the child for you?”
8
LIN
Mwana mwasi ya Faraon azongiselaki ye : — Iyo, kende ! Elenge mwasi akendeki mpe azwaki mama ya mwana mobali yango.
BSB
BSB:
“Go ahead,” Pharaoh’s daughter told her. And the girl went and called the boy’s mother.
9
LIN
Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango : « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. » Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele.
BSB
BSB:
Pharaoh’s daughter said to her, “Take this child and nurse him for me, and I will pay your wages.” So the woman took the boy and nursed him.
10
LIN
Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki : « Nazwaki ye na mayi. »
BSB
BSB:
When the child had grown older, she brought him to Pharaoh’s daughter, and he became her son. She named him Moses and explained, “I drew him out of the water.”
11
LIN
Mokolo moko, wana Moyize akomaki mokolo, akendeki na esika oyo bandeko na ye bazalaki mpe amonaki bango kosala misala makasi oyo bapesaki bango mpo na konyokola bango. Amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moko kati na bato na ye Ba-Ebre.
BSB
BSB:
One day, after Moses had grown up, he went out to his own people and observed their hard labor. He saw an Egyptian beating a Hebrew, one of his own people.
12
LIN
Atalaki ngambo na ngambo mpe amonaki moto te ; bongo abomaki moto ya Ejipito mpe akundaki ye na zelo.
BSB
BSB:
After looking this way and that and seeing no one, he struck down the Egyptian and hid his body in the sand.
13
LIN
Mokolo oyo elandaki, Moyize abimaki mpe amonaki Ba-Ebre mibale bazali kobunda. Atunaki na moto oyo asalaki mabe : — Mpo na nini ozali kobeta moninga na yo ?
BSB
BSB:
The next day Moses went out and saw two Hebrews fighting. He asked the one in the wrong, “Why are you attacking your companion?”
14
LIN
Moto wana azongisaki : — Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito ? Moyize abangaki mpe amilobelaki : « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. »
BSB
BSB:
But the man replied, “Who made you ruler and judge over us? Are you planning to kill me as you killed the Egyptian?” Then Moses was afraid and thought, “This thing I have done has surely become known.”
15
LIN
Tango Faraon ayokaki likambo yango, alukaki nzela ya koboma Moyize ; kasi Moyize akimaki liboso ya Faraon mpe akendeki kovanda na mokili ya Madiani.
BSB
BSB:
When Pharaoh heard about this matter, he sought to kill Moses. But Moses fled from Pharaoh and settled in the land of Midian, where he sat down beside a well.
16
LIN
Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango.
BSB
BSB:
Now the priest of Midian had seven daughters, and they came to draw water and fill the troughs to water their father’s flock.
17
LIN
Kasi babateli bibwele bayaki mpe babenganaki bango. Moyize atelemaki, akotelaki bango mpe amelisaki bibwele na bango mayi.
BSB
BSB:
And when some shepherds came along and drove them away, Moses rose up to help them and watered their flock.
18
LIN
Tango bana basi bazongaki epai ya tata na bango Reweli, atunaki bango : — Mpo na nini lelo bozongi noki ?
BSB
BSB:
When the daughters returned to their father Reuel, he asked them, “Why have you returned so early today?”
19
LIN
Bango bazongisaki : — Moto moko ya Ejipito abundelaki biso liboso ya babateli bibwele, atokelaki biso mayi mpe amelisaki bibwele.
BSB
BSB:
“An Egyptian rescued us from the shepherds,” they replied. “He even drew water for us and watered the flock.”
20
LIN
Reweli atunaki bana na ye ya basi : — Moto yango ya Ejipito azali wapi ? Mpo na nini botiki ye kuna ? Bobenga ye mpo ete aya kolia.
BSB
BSB:
“So where is he?” their father asked. “Why did you leave the man behind? Invite him to have something to eat.”
21
LIN
Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli ; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize.
BSB
BSB:
Moses agreed to stay with the man, and he gave his daughter Zipporah to Moses in marriage.
22
LIN
Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki : « Nazali mopaya na mboka mopaya. »
BSB
BSB:
And she gave birth to a son, and Moses named him Gershom, saying, “I have become a foreigner in a foreign land.”
23
LIN
Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.
BSB
BSB:
After a long time, the king of Egypt died. The Israelites groaned and cried out under their burden of slavery, and their cry for deliverance from bondage ascended to God.
24
LIN
Nzambe ayokaki koganga na bango mpe akanisaki boyokani na Ye oyo asalaki elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
BSB
BSB:
So God heard their groaning, and He remembered His covenant with Abraham, Isaac, and Jacob.
25
LIN
Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango.
BSB
BSB:
God saw the Israelites and took notice.
Chapter complete
You’ve read Exodus 2
Chapter 2 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 3
Read Exodus 3
Back to Exodus 1
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 2
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 2
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 1
Exodus 2
Exodus 3