Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.2.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
3
LIN
BSB
A
a
Exodus 3
3
Exodus
Slavery and Moses' call
Lingala Bible
Israel
, person
Egypt
, place
Moses
, person
Abraham
, person
Isaac
, person
Pharaoh
, person
Midian
, place
Horeb
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
BSB
BSB:
Meanwhile, Moses was shepherding the flock of his father-in-law Jethro, the priest of Midian. He led the flock to the far side of the wilderness and came to Horeb, the mountain of God.
2
LIN
Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te.
BSB
BSB:
There the angel of the LORD appeared to him in a blazing fire from within a bush. Moses saw the bush ablaze with fire, but it was not consumed.
3
LIN
Moyize amilobelaki : « Tika ete nabaluka mpo ete natala emoniseli oyo ya kokamwa mpe nayeba mpo na nini nzete moke oyo ezali kozika te. »
BSB
BSB:
So Moses thought, “I must go over and see this marvelous sight. Why is the bush not burning up?”
4
LIN
Tango Yawe amonaki ete Moyize azali kobaluka mpo na kotala, Nzambe abengaki ye wuta na nzete moke yango : — Moyize, Moyize ! Moyize azongisaki : — Ngai oyo !
BSB
BSB:
When the LORD saw that he had gone over to look, God called out to him from within the bush, “Moses, Moses!” “Here I am,” he answered.
5
LIN
Nzambe alobaki na ye : — Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.
BSB
BSB:
“Do not come any closer,” God said. “Take off your sandals, for the place where you are standing is holy ground.”
6
LIN
Alobaki lisusu : — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe.
BSB
BSB:
Then He said, “I am the God of your father, the God of Abraham, the God of Isaac, and the God of Jacob.” At this, Moses hid his face, for he was afraid to look at God.
7
LIN
Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.
BSB
BSB:
The LORD said, “I have indeed seen the affliction of My people in Egypt. I have heard them crying out because of their oppressors, and I am aware of their sufferings.
8
LIN
Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
BSB
BSB:
I have come down to rescue them from the hand of the Egyptians and to bring them up out of that land to a good and spacious land, a land flowing with milk and honey—the home of the Canaanites, Hittites, Amorites, Perizzites, Hivites, and Jebusites.
9
LIN
Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango.
BSB
BSB:
And now the cry of the Israelites has reached Me, and I have seen how severely the Egyptians are oppressing them.
10
LIN
Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito.
BSB
BSB:
Therefore, go! I am sending you to Pharaoh to bring My people the Israelites out of Egypt.”
11
LIN
Moyize alobaki na Nzambe : — Ngai nazali nani mpo ete nakende epai ya Faraon mpe mpo ete nabimisa bana ya Isalaele na Ejipito ?
BSB
BSB:
But Moses asked God, “Who am I, that I should go to Pharaoh and bring the Israelites out of Egypt?”
12
LIN
Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.
BSB
BSB:
“I will surely be with you,” God said, “and this will be the sign to you that I have sent you: When you have brought the people out of Egypt, all of you will worship God on this mountain.”
13
LIN
Moyize alobaki na Nzambe : — Soki nakeyi epai ya bana ya Isalaele mpe nalobi na bango : « Nzambe ya bakoko na bino atindi ngai epai na bino, » bongo soki bango batuni ngai : « Kombo na Ye nani ? » Nakoyebisa bango nini ?
BSB
BSB:
Then Moses asked God, “Suppose I go to the Israelites and say to them, ‘The God of your fathers has sent me to you,’ and they ask me, ‘What is His name?’ What should I tell them?”
14
LIN
Nzambe alobaki na Moyize : — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. »
BSB
BSB:
God said to Moses, “I AM WHO I AM. This is what you are to say to the Israelites: ‘I AM has sent me to you.’”
15
LIN
Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. »
BSB
BSB:
God also told Moses, “Say to the Israelites, ‘The LORD, the God of your fathers—the God of Abraham, the God of Isaac, and the God of Jacob—has sent me to you.’ This is My name forever, and this is how I am to be remembered in every generation.
16
LIN
Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › »
BSB
BSB:
Go, assemble the elders of Israel and say to them, ‘The LORD, the God of your fathers—the God of Abraham, Isaac, and Jacob—has appeared to me and said: I have surely attended to you and have seen what has been done to you in Egypt.
17
LIN
Mpe nalobi : « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »
BSB
BSB:
And I have promised to bring you up out of your affliction in Egypt, into the land of the Canaanites, Hittites, Amorites, Perizzites, Hivites, and Jebusites—a land flowing with milk and honey.’
18
LIN
Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »
BSB
BSB:
The elders of Israel will listen to what you say, and you must go with them to the king of Egypt and tell him, ‘The LORD, the God of the Hebrews, has met with us. Now please let us take a three-day journey into the wilderness, so that we may sacrifice to the LORD our God.’
19
LIN
Kasi nayebi ete mokonzi ya Ejipito akopesa bino te nzela ya kokende, ata soki amoni loboko na Ngai ya nguya.
BSB
BSB:
But I know that the king of Egypt will not allow you to go unless a mighty hand compels him.
20
LIN
Yango wana, nakosembola loboko na Ngai ; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende.
BSB
BSB:
So I will stretch out My hand and strike the Egyptians with all the wonders I will perform among them. And after that, he will release you.
21
LIN
Nakosala ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito mpo ete, tango bokolongwa, bokende maboko pamba te.
BSB
BSB:
And I will grant this people such favor in the sight of the Egyptians that when you leave, you will not go away empty-handed.
22
LIN
Mwasi nyonso akosenga epai ya moninga na ye mpe epai ya mwasi oyo avandi na ndako na ye : biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba. Bokopesa yango epai ya bana na bino ya mibali mpe ya basi mpo ete bamema. Na bongo nde bokosilisa biloko ya bato ya Ejipito.
BSB
BSB:
Every woman shall ask her neighbor and any woman staying in her house for silver and gold jewelry and clothing, and you will put them on your sons and daughters. So you will plunder the Egyptians.”
Chapter complete
You’ve read Exodus 3
Chapter 3 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 4
Read Exodus 4
Back to Exodus 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 3
A question this chapter raises
Did Jesus ever claim to be God?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 2
Exodus 3
Exodus 4