Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.13.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
21
LIN
BSB
A
a
Exodus 21
21
Exodus
The covenant at Sinai
Lingala Bible
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yawe alobaki na Moyize : — Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele :
BSB
BSB:
“These are the ordinances that you are to set before them:
2
LIN
« Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba ; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
BSB
BSB:
If you buy a Hebrew servant, he is to serve you for six years. But in the seventh year, he shall go free without paying anything.
3
LIN
Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko ; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo.
BSB
BSB:
If he arrived alone, he is to leave alone; if he arrived with a wife, she is to leave with him.
4
LIN
Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye ; mobali akokende ye moko.
BSB
BSB:
If his master gives him a wife and she bears him sons or daughters, the woman and her children shall belong to her master, and only the man shall go free.
5
LIN
Kasi soki mowumbu alobi : ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, ›
BSB
BSB:
But if the servant declares, ‘I love my master and my wife and children; I do not want to go free,’
6
LIN
wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.
BSB
BSB:
then his master is to bring him before the judges. And he shall take him to the door or doorpost and pierce his ear with an awl. Then he shall serve his master for life.
7
LIN
Soki moto ateki mwana na ye ya mwasi lokola mwasi mowumbu, mwana yango akozwa bonsomi te ndenge bawumbu bazwaka yango.
BSB
BSB:
And if a man sells his daughter as a servant, she is not to go free as the menservants do.
8
LIN
Soki mwana mwasi asepelisi te nkolo oyo aponaki ye mpo ete azala mowumbu na ye, nkolo yango akotika ete mwana mwasi asikolama ; azali na ndingisa te ya koteka ye epai ya bapaya. Kasi soki ateki ye, wana asambwisi ye.
BSB
BSB:
If she is displeasing in the eyes of her master who had designated her for himself, he must allow her to be redeemed. He has no right to sell her to foreigners, since he has broken faith with her.
9
LIN
Soki aponaki mwana mwasi yango mpo ete azala mwasi ya mwana na ye ya mobali, asengeli kokokisa makambo oyo mibeko esengaka mpo na kobala mwasi.
BSB
BSB:
And if he chooses her for his son, he must deal with her as with a daughter.
10
LIN
Soki abali mwasi mosusu, akolongola eloko te na oyo etali kolia, kolata mpe oyo basalelaka mwasi ya libala.
BSB
BSB:
If he takes another wife, he must not reduce the food, clothing, or marital rights of his first wife.
11
LIN
Soki apimeli ye ata eloko moko kati na biloko oyo misato, wana mwasi oyo akoki kokende na bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
BSB
BSB:
If, however, he does not provide her with these three things, she is free to go without monetary payment.
12
LIN
Moto oyo akobeta moninga na ye kino koboma ye, basengeli koboma ye.
BSB
BSB:
Whoever strikes and kills a man must surely be put to death.
13
LIN
Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.
BSB
BSB:
If, however, he did not lie in wait, but God allowed it to happen, then I will appoint for you a place where he may flee.
14
LIN
Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.
BSB
BSB:
But if a man schemes and acts willfully against his neighbor to kill him, you must take him away from My altar to be put to death.
15
LIN
Moto oyo akobeta tata to mama na ye, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
BSB
BSB:
Whoever strikes his father or mother must surely be put to death.
16
LIN
Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
BSB
BSB:
Whoever kidnaps another man must be put to death, whether he sells him or the man is found in his possession.
17
LIN
Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
BSB
BSB:
Anyone who curses his father or mother must surely be put to death.
18
LIN
Soki bato baswani, bongo moko abeti moninga likofi to libanga ; mpe moto oyo babeti likofi to libanga akufi te kasi abeli makasi ;
BSB
BSB:
If men are quarreling and one strikes the other with a stone or a fist, and he does not die but is confined to bed,
19
LIN
soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.
BSB
BSB:
then the one who struck him shall go unpunished, as long as the other can get up and walk around outside with his staff. Nevertheless, he must compensate the man for his lost work and see that he is completely healed.
20
LIN
Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, bongo mowumbu yango akufi na mbala moko, moto wana asengeli kozwa etumbu.
BSB
BSB:
If a man strikes his manservant or maidservant with a rod, and the servant dies by his hand, he shall surely be punished.
21
LIN
Kasi soki mowumbu yango awumeli lisusu na bomoi mokolo moko to mibale, wana nkolo na ye akozwa etumbu te, pamba te asombaki ye na mbongo.
BSB
BSB:
However, if the servant gets up after a day or two, the owner shall not be punished, since the servant is his property.
22
LIN
Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.
BSB
BSB:
If men who are fighting strike a pregnant woman and her child is born prematurely, but there is no further injury, he shall surely be fined as the woman’s husband demands and as the court allows.
23
LIN
Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi :
BSB
BSB:
But if a serious injury results, then you must require a life for a life—
24
LIN
liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo,
BSB
BSB:
eye for eye, tooth for tooth, hand for hand, foot for foot,
25
LIN
kozika mpo na kozika, pota mpo na pota, litutu mpo na litutu.
BSB
BSB:
burn for burn, wound for wound, and stripe for stripe.
26
LIN
Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye na liso, mpe liso yango ekufi, moto yango akopesa bonsomi na mowumbu mpo na liso na ye.
BSB
BSB:
If a man strikes and blinds the eye of his manservant or maidservant, he must let the servant go free as compensation for the eye.
27
LIN
Soki abuki linu ya mowumbu na ye ya mobali to ya mwasi mowumbu na ye, akopesa ye bonsomi mpo na linu na ye.
BSB
BSB:
And if he knocks out the tooth of his manservant or maidservant, he must let the servant go free as compensation for the tooth.
28
LIN
Soki ngombe ebomi moto na maseke, basengeli koboma ngombe yango na mabanga, mpe bakolia mosuni na yango te ; nzokande nkolo na yango akozwa etumbu te.
BSB
BSB:
If an ox gores a man or woman to death, the ox must surely be stoned, and its meat must not be eaten. But the owner of the ox shall not be held responsible.
29
LIN
Soki ngombe ezali na momesano ya kobeta bato maseke, bongo bakebisi makasi nkolo na yango, kasi ye abateli kaka ngombe na ye malamu te mpe yango ebomi moto ; basengeli koboma ngombe yango na mabanga mpe nkolo na yango asengeli kozwa etumbu ya kufa.
BSB
BSB:
But if the ox has a habit of goring, and its owner has been warned yet does not restrain it, and it kills a man or woman, then the ox must be stoned and its owner must also be put to death.
30
LIN
Kasi soki basengi ye lomande mpo na kosikola bomoi na ye, akofuta nyonso oyo bakosenga ye.
BSB
BSB:
If payment is demanded of him instead, he may redeem his life by paying the full amount demanded of him.
31
LIN
Bakosalela mpe mobeko oyo soki ngombe ebeti mwana mobali to mwana mwasi maseke.
BSB
BSB:
If the ox gores a son or a daughter, it shall be done to him according to the same rule.
32
LIN
Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga.
BSB
BSB:
If the ox gores a manservant or maidservant, the owner must pay thirty shekels of silver to the master of that servant, and the ox must be stoned.
33
LIN
Soki moto atiki libulu polele to atimoli libulu mpe azipi yango te, bongo ngombe to ane ezindi kuna ;
BSB
BSB:
If a man opens or digs a pit and fails to cover it, and an ox or a donkey falls into it,
34
LIN
nkolo libulu asengeli kofuta epai ya nkolo nyama mbongo oyo ekokani na motuya ya nyama oyo esili kokufa, mpe nyama yango ekokoma ya ye.
BSB
BSB:
the owner of the pit shall make restitution; he must pay its owner, and the dead animal will be his.
35
LIN
Soki ngombe ya moto moko ebomi ngombe ya moto mosusu, esengeli koteka ngombe oyo ezali na bomoi mpe kokabola na kati-kati mbongo mpe ngombe oyo esili kokufa.
BSB
BSB:
If a man’s ox injures his neighbor’s ox and it dies, they must sell the live one and divide the proceeds; they also must divide the dead animal.
36
LIN
Kasi soki eyebani ete ngombe yango emesana kobeta bato maseke, bongo nkolo na yango abateli yango malamu te ; wana asengeli kofuta ngombe mpo na ngombe, mpe ngombe ya kokufa ekokoma ya ye.
BSB
BSB:
But if it was known that the ox had a habit of goring, yet its owner failed to restrain it, he shall pay full compensation, ox for ox, and the dead animal will be his.
Chapter complete
You’ve read Exodus 21
Chapter 21 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 22
Read Exodus 22
Back to Exodus 20
Go Deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 21
A question this chapter raises
Doesn’t “an eye for an eye” teach revenge?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 20
Exodus 21
Exodus 22