Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.13.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
22
LIN
BSB
A
a
Exodus 22
22
Exodus
The covenant at Sinai
Lingala Bible
Egypt
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Soki moto ayibi ngombe moko to meme moko, bongo abomi yango to ateki yango ; asengeli kofuta bangombe mitano mpo na ngombe moko oyo ayibaki to bameme minei mpo na meme moko oyo ayibaki.
BSB
BSB:
“If a man steals an ox or a sheep and slaughters or sells it, he must repay five oxen for an ox and four sheep for a sheep.
2
LIN
Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi ; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.
BSB
BSB:
If a thief is caught breaking in and is beaten to death, no one shall be guilty of bloodshed.
3
LIN
Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki.
BSB
BSB:
But if it happens after sunrise, there is guilt for his bloodshed. A thief must make full restitution; if he has nothing, he himself shall be sold for his theft.
4
LIN
Soki ayibaki nyama, ezala ngombe, ane to meme, bongo bakuti nyama yango ya bomoi na maboko na ye, akofuta banyama mibale.
BSB
BSB:
If what was stolen is actually found alive in his possession—whether ox or donkey or sheep—he must pay back double.
5
LIN
Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino.
BSB
BSB:
If a man grazes his livestock in a field or vineyard and allows them to stray so that they graze in someone else’s field, he must make restitution from the best of his own field or vineyard.
6
LIN
Soki moto apelisi moto, bongo moto yango ekutani na banzete ya sende, epanzani mpe ezikisi ble oyo basili kotia na maboke to ble oyo babuki nanu te, moto oyo apelisaki moto asengeli kofuta biloko nyonso oyo eziki.
BSB
BSB:
If a fire breaks out and spreads to thornbushes so that it consumes stacked or standing grain, or the whole field, the one who started the fire must make full restitution.
7
LIN
Soki moto abombisi palata to biloko na ye ya motuya epai ya moninga na ye, bongo bayibi yango kati na ndako ya moninga wana ; soki bakangi moyibi ya biloko yango, akozongisa mbala mibale biloko oyo ayibaki.
BSB
BSB:
If a man gives his neighbor money or goods for safekeeping and they are stolen from the neighbor’s house, the thief, if caught, must pay back double.
8
LIN
Kasi soki moyibi amonani te, nkolo ndako asengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na koyeba soki ayibaki biloko ya moninga na ye to te.
BSB
BSB:
If the thief is not found, the owner of the house must appear before the judges to determine whether he has taken his neighbor’s property.
9
LIN
Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba : ‹ Ezali ya ngai ! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi ; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye.
BSB
BSB:
In all cases of illegal possession of an ox, a donkey, a sheep, a garment, or any lost item that someone claims, ‘This is mine,’ both parties shall bring their cases before the judges. The one whom the judges find guilty must pay back double to his neighbor.
10
LIN
Soki moto apesi moninga na ye ngombe to ane to meme to nyama mosusu mpo ete abokola, bongo nyama yango ekufi to ebukani to bayibi yango mpe ata moto moko te amoni mpo na kotatola ndenge nini likambo yango esalemaki,
BSB
BSB:
If a man gives a donkey, an ox, a sheep, or any other animal to be cared for by his neighbor, but it dies or is injured or stolen while no one is watching,
11
LIN
kaka ndayi oyo balapi na Kombo na Yawe nde ekokabola bango : Moto oyo andimaki kobokola akolapa ndayi liboso ya Yawe mpo na kotalisa ete ayebi likambo te. Bongo nkolo nyama asengeli kondima maloba ya moninga na ye mpe ye akofuta nyama yango te.
BSB
BSB:
an oath before the LORD shall be made between the parties to determine whether or not the man has taken his neighbor’s property. The owner must accept the oath and require no restitution.
12
LIN
Kasi soki bayibi nyama yango na maboko ya moto oyo andimaki kobokola yango, akofuta nyama yango epai ya nkolo na yango.
BSB
BSB:
But if the animal was actually stolen from the neighbor, he must make restitution to the owner.
13
LIN
Soki ezali nyama ya zamba nde ebomaki nyama yango, moto oyo andimaki kobokola yango akomema lokola litatoli biteni oyo etikali ; bongo akofuta nyama yango te.
BSB
BSB:
If the animal was torn to pieces, he shall bring it as evidence; he need not make restitution for the torn carcass.
14
LIN
Soki moto adefi nyama epai ya moninga na ye, bongo ebukani lokolo to ekufi na tango oyo nkolo na yango azali te, moto wana asengeli kofuta yango.
BSB
BSB:
If a man borrows an animal from his neighbor and it is injured or dies while its owner is not present, he must make full restitution.
15
LIN
Nzokande soki nkolo na yango azalaki wana, moto oyo adefaki akofuta nyama yango te. Soki bayokanaki ete akofuta mbongo sima na kosalela yango, asengeli kofuta mbongo oyo bayokanaki.
BSB
BSB:
If the owner was present, no restitution is required. If the animal was rented, the fee covers the loss.
16
LIN
Soki mobali alingi elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali na mobandami na libala te, bongo asangisi na ye nzoto, asengeli kofuta mbongo ya libala mpo ete akoma mwasi na ye.
BSB
BSB:
If a man seduces a virgin who is not pledged in marriage and sleeps with her, he must pay the full dowry for her to be his wife.
17
LIN
Soki tata ya elenge mwasi aboyi kopesa mwana na ye na libala epai ya mobali wana, mobali yango akofuta mbongo ya libala na motuya oyo babalelaka elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
BSB
BSB:
If her father absolutely refuses to give her to him, the man still must pay an amount comparable to the bridal price of a virgin.
18
LIN
Okotika te na bomoi mwasi oyo asalaka maji.
BSB
BSB:
You must not allow a sorceress to live.
19
LIN
Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
BSB
BSB:
Whoever lies with an animal must surely be put to death.
20
LIN
Moto nyonso oyo akotumba mbeka mpo na nzambe mosusu, basengeli koboma ye ; mbeka ekotumbama kaka mpo na Yawe Ye moko.
BSB
BSB:
If anyone sacrifices to any god other than the LORD alone, he must be set apart for destruction.
21
LIN
Okosalisa mopaya mosala na ndenge ya mabe te mpe okonyokola ye te, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
BSB
BSB:
You must not exploit or oppress a foreign resident, for you yourselves were foreigners in the land of Egypt.
22
LIN
Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.
BSB
BSB:
You must not mistreat any widow or orphan.
23
LIN
Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango.
BSB
BSB:
If you do mistreat them, and they cry out to Me in distress, I will surely hear their cry.
24
LIN
Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga ; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike.
BSB
BSB:
My anger will be kindled, and I will kill you with the sword; then your wives will become widows and your children will be fatherless.
25
LIN
Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka ; okosenga ye mileki te.
BSB
BSB:
If you lend money to one of My people among you who is poor, you must not act as a creditor to him; you are not to charge him interest.
26
LIN
Soki moninga na yo asimbisi yo kazaka na ye lokola ndanga, okozongisela ye yango liboso ete butu eya ;
BSB
BSB:
If you take your neighbor’s cloak as collateral, return it to him by sunset,
27
LIN
pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala ? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa.
BSB
BSB:
because his cloak is the only covering he has for his body. What else will he sleep in? And if he cries out to Me, I will hear, for I am compassionate.
28
LIN
Okofingaka Nzambe te mpe okolakelaka mokambi ya bato na yo mabe te.
BSB
BSB:
You must not blaspheme God or curse the ruler of your people.
29
LIN
Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali.
BSB
BSB:
You must not hold back offerings from your granaries or vats. You are to give Me the firstborn of your sons.
30
LIN
Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo : ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango ; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.
BSB
BSB:
You shall do likewise with your cattle and your sheep. Let them stay with their mothers for seven days, but on the eighth day you are to give them to Me.
31
LIN
Bokozala bule mpo na Ngai : bokolia te mosuni ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba ; bosengeli kopesa yango na bambwa.
BSB
BSB:
You are to be My holy people. You must not eat the meat of a mauled animal found in the field; you are to throw it to the dogs.
Chapter complete
You’ve read Exodus 22
Chapter 22 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 23
Read Exodus 23
Back to Exodus 21
Go Deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 22
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 22
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 21
Exodus 22
Exodus 23