Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.1
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
5
LIN
BSB
A
a
Exodus 5
5
Exodus
The plagues and the Passover
Lingala Bible
Pharaoh
, person
Israel
, person
Moses
, person
Aaron
, person
Egypt
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »
BSB
BSB:
After that, Moses and Aaron went to Pharaoh and said, “This is what the LORD, the God of Israel, says: ‘Let My people go, so that they may hold a feast to Me in the wilderness.’”
2
LIN
Faraon azongisaki : — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.
BSB
BSB:
But Pharaoh replied, “Who is the LORD that I should obey His voice and let Israel go? I do not know the LORD, and I will not let Israel go.”
3
LIN
Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.
BSB
BSB:
“The God of the Hebrews has met with us,” they answered. “Please let us go on a three-day journey into the wilderness to sacrifice to the LORD our God, or He may strike us with plagues or with the sword.”
4
LIN
Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki : — Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango ? Bozonga na mosala na bino !
BSB
BSB:
But the king of Egypt said to them, “Moses and Aaron, why do you draw the people away from their work? Get back to your labor!”
5
LIN
Faraon abakisaki lisusu : — Botala ! Bato oyo bakomi ebele kati na mokili, bongo bino bozali kopekisa bango kosala mosala !
BSB
BSB:
Pharaoh also said, “Look, the people of the land are now numerous, and you would be stopping them from their labor.”
6
LIN
Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele :
BSB
BSB:
That same day Pharaoh commanded the taskmasters of the people and their foremen:
7
LIN
— Bokopesa lisusu matiti te epai ya bato oyo mpo na kosala babiliki ndenge bozalaki kopesa bango liboso ; botika bango moko bakende kolokota matiti na bango.
BSB
BSB:
“You shall no longer supply the people with straw for making bricks. They must go and gather their own straw.
8
LIN
Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga : « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka ! »
BSB
BSB:
But require of them the same quota of bricks as before; do not reduce it. For they are lazy; that is why they are crying out, ‘Let us go and sacrifice to our God.’
9
LIN
Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.
BSB
BSB:
Make the work harder on the men so they will be occupied and pay no attention to these lies.”
10
LIN
Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato : — Tala makambo oyo Faraon alobi : « Nakopesa bino lisusu matiti te.
BSB
BSB:
So the taskmasters and foremen of the people went out and said to them, “This is what Pharaoh says: ‘I am no longer giving you straw.
11
LIN
Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango ! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »
BSB
BSB:
Go and get your own straw wherever you can find it; but your workload will in no way be reduced.’”
12
LIN
Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki.
BSB
BSB:
So the people scattered all over the land of Egypt to gather stubble for straw.
13
LIN
Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba : — Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti !
BSB
BSB:
The taskmasters kept pressing them, saying, “Fulfill your quota each day, just as you did when straw was provided.”
14
LIN
Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango : — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala ?
BSB
BSB:
Then the Israelite foremen, whom Pharaoh’s taskmasters had set over the people, were beaten and asked, “Why have you not fulfilled your quota of bricks yesterday or today, as you did before?”
15
LIN
Bakengeli ya bana ya Isalaele bakendeki kolela epai ya Faraon : — Mpo na nini ozali kosala basali na yo boye ?
BSB
BSB:
So the Israelite foremen went and appealed to Pharaoh: “Why are you treating your servants this way?
16
LIN
Bazali kopesa lisusu te matiti epai ya basali na yo, nzokande bazali koloba na biso : « Bosala babiliki ! » Sik’oyo tala, basali na yo bazali kobetama, kasi mbeba ezali epai ya bato na yo moko.
BSB
BSB:
No straw has been given to your servants, yet we are told, ‘Make bricks!’ Look, your servants are being beaten, but the fault is with your own people.”
17
LIN
Faraon alobaki : — Bagoyigoyi ! Bozali penza bagoyigoyi ! Yango wana bozali koloba : « Tika biso tokende kobonzela Yawe mbeka. »
BSB
BSB:
“You are slackers!” Pharaoh replied. “Slackers! That is why you keep saying, ‘Let us go and sacrifice to the LORD.’
18
LIN
Sik’oyo, bozonga na mosala ! Bakopesa bino lisusu matiti te, kasi bokosala kaka motango ya babiliki oyo bakatela bino.
BSB
BSB:
Now get to work. You will be given no straw, yet you must deliver the full quota of bricks.”
19
LIN
Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango : « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. »
BSB
BSB:
The Israelite foremen realized they were in trouble when they were told, “You must not reduce your daily quota of bricks.”
20
LIN
Tango batikaki Faraon, batombokelaki Moyize mpe Aron oyo bazalaki kozela bango.
BSB
BSB:
When they left Pharaoh, they confronted Moses and Aaron, who stood waiting to meet them.
21
LIN
Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !
BSB
BSB:
“May the LORD look upon you and judge you,” the foremen said, “for you have made us a stench before Pharaoh and his officials; you have placed in their hand a sword to kill us!”
22
LIN
Boye Moyize abalukaki epai na Yawe mpe abondelaki : — Nkolo ! Mpo na nini ozali komemela bato oyo pasi ? Boni, ezali mpo na yango nde otindaki ngai ?
BSB
BSB:
So Moses returned to the LORD and asked, “Lord, why have You brought trouble upon this people? Is this why You sent me?
23
LIN
Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango !
BSB
BSB:
Ever since I went to Pharaoh to speak in Your name, he has brought trouble on this people, and You have not delivered Your people in any way.”
Chapter complete
You’ve read Exodus 5
Chapter 5 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 6
Read Exodus 6
Back to Exodus 4
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 5
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 5
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 4
Exodus 5
Exodus 6