Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
6
LIN
BSB
A
a
Exodus 6
6
Exodus
The plagues and the Passover
Lingala Bible
Moses
, person
Israel
, person
Egypt
, place
Pharaoh
, person
Aaron
, person
Abraham
, person
Isaac
, person
Levi
, person
44 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.
BSB
BSB:
But the LORD said to Moses, “Now you will see what I will do to Pharaoh, for because of My mighty hand he will let the people go; because of My strong hand he will drive them out of his land.”
2
LIN
Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Nazali Yawe.
BSB
BSB:
God also told Moses, “I am the LORD.
3
LIN
Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai : Yawe.
BSB
BSB:
I appeared to Abraham, to Isaac, and to Jacob as God Almighty, but by My name the LORD I did not make Myself known to them.
4
LIN
Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya.
BSB
BSB:
I also established My covenant with them to give them the land of Canaan, the land where they lived as foreigners.
5
LIN
Mpe lisusu nayoki kolela ya bana ya Isalaele oyo bato ya Ejipito bakomisi bawumbu, bongo nakanisi lisusu boyokani na Ngai.
BSB
BSB:
Furthermore, I have heard the groaning of the Israelites, whom the Egyptians are enslaving, and I have remembered My covenant.
6
LIN
Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.
BSB
BSB:
Therefore tell the Israelites: ‘I am the LORD, and I will bring you out from under the yoke of the Egyptians and deliver you from their bondage. I will redeem you with an outstretched arm and with mighty acts of judgment.
7
LIN
Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.
BSB
BSB:
I will take you as My own people, and I will be your God. Then you will know that I am the LORD your God, who brought you out from under the yoke of the Egyptians.
8
LIN
Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »
BSB
BSB:
And I will bring you into the land that I swore to give to Abraham, Isaac, and Jacob. I will give it to you as a possession. I am the LORD!’”
9
LIN
Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango.
BSB
BSB:
Moses relayed this message to the Israelites, but on account of their broken spirit and cruel bondage, they did not listen to him.
10
LIN
Yawe alobaki na Moyize :
BSB
BSB:
So the LORD said to Moses,
11
LIN
— Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
BSB
BSB:
“Go and tell Pharaoh king of Egypt to let the Israelites go out of his land.”
12
LIN
Kasi Moyize azongiselaki Yawe : — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma ?
BSB
BSB:
But in the LORD’s presence Moses replied, “If the Israelites will not listen to me, then why would Pharaoh listen to me, since I am unskilled in speech?”
13
LIN
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito.
BSB
BSB:
Then the LORD spoke to Moses and Aaron and gave them a charge concerning both the Israelites and Pharaoh king of Egypt, to bring the Israelites out of the land of Egypt.
14
LIN
Tala bakambi ya mabota na bango : Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni.
BSB
BSB:
These were the heads of their fathers’ houses: The sons of Reuben, the firstborn of Israel, were Hanoch and Pallu, Hezron and Carmi. These were the clans of Reuben.
15
LIN
Bana mibali ya Simeoni : Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo abotamaki na mwasi ya Kanana. Wana nde mabota ya Simeoni.
BSB
BSB:
The sons of Simeon were Jemuel, Jamin, Ohad, Jachin, Zohar, and Shaul, the son of a Canaanite woman. These were the clans of Simeon.
16
LIN
Tala bakombo ya bana mibali ya Levi oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo kolanda ndenge babotamela : Gerishoni, Keati mpe Merari.
BSB
BSB:
These were the names of the sons of Levi according to their records: Gershon, Kohath, and Merari. Levi lived 137 years.
17
LIN
Bana mibali ya Gerishoni kolanda mabota na bango : Libini mpe Shimei.
BSB
BSB:
The sons of Gershon were Libni and Shimei, by their clans.
18
LIN
Bana mibali ya Keati oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na misato : Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
BSB
BSB:
The sons of Kohath were Amram, Izhar, Hebron, and Uzziel. Kohath lived 133 years.
19
LIN
Bana mibali ya Merari : Maali mpe Mushi. Wana nde mabota ya Levi kolanda ndenge babotamela.
BSB
BSB:
The sons of Merari were Mahli and Mushi. These were the clans of the Levites according to their records.
20
LIN
Amirami abalaki Yokebedi, tata mwasi na ye, oyo abotelaki ye Aron mpe Moyize. Amirami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo.
BSB
BSB:
And Amram married his father’s sister Jochebed, and she bore him Aaron and Moses. Amram lived 137 years.
21
LIN
Bana mibali ya Yitseari : Kore, Nefegi mpe Zikiri.
BSB
BSB:
The sons of Izhar were Korah, Nepheg, and Zichri.
22
LIN
Bana mibali ya Uzieli : Mishaeli, Elitsafani mpe Sitiri.
BSB
BSB:
The sons of Uzziel were Mishael, Elzaphan, and Sithri.
23
LIN
Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
BSB
BSB:
And Aaron married Elisheba, the daughter of Amminadab and sister of Nahshon, and she bore him Nadab and Abihu, Eleazar and Ithamar.
24
LIN
Bana mibali ya Kore : Asiri, Elikana mpe Abiazafi. Wana nde mabota ya Kore.
BSB
BSB:
The sons of Korah were Assir, Elkanah, and Abiasaph. These were the clans of the Korahites.
25
LIN
Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali : Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
BSB
BSB:
Aaron’s son Eleazar married one of the daughters of Putiel, and she bore him Phinehas. These were the heads of the Levite families by their clans.
26
LIN
Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki : « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. »
BSB
BSB:
It was this Aaron and Moses to whom the LORD said, “Bring the Israelites out of the land of Egypt by their divisions.”
27
LIN
Ezali bango nde bakendeki kokutana na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpo na kobimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Ezali nde Moyize mpe Aron wana.
BSB
BSB:
Moses and Aaron were the ones who spoke to Pharaoh king of Egypt in order to bring the Israelites out of Egypt.
28
LIN
Tala makambo oyo ekomaki tango Yawe alobaki na Moyize, na Ejipito :
BSB
BSB:
Now on the day that the LORD spoke to Moses in Egypt,
29
LIN
Yawe ayebisaki Moyize : — Nazali Yawe. Loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, makambo nyonso oyo nayebisi yo.
BSB
BSB:
He said to him, “I am the LORD; tell Pharaoh king of Egypt everything I say to you.”
30
LIN
Kasi Moyize azongiselaki Yawe : — Tala, nazali na likukuma ; ndenge nini Faraon akoyoka ngai ?
BSB
BSB:
But in the LORD’s presence Moses replied, “Since I am unskilled in speech, why would Pharaoh listen to me?”
Chapter complete
You’ve read Exodus 6
Chapter 6 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 7
Read Exodus 7
Back to Exodus 5
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 6
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 6
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 5
Exodus 6
Exodus 7