Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
7
LIN
BSB
A
a
Exodus 7
7
Exodus
The plagues and the Passover
Lingala Bible
Pharaoh
, person
Aaron
, person
Moses
, person
Nile
, place
Egypt
, place
Israel
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yawe alobaki na Moyize : « Tala, nakomisi yo nzambe liboso ya Faraon, mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akozala mosakoli na yo.
BSB
BSB:
The LORD answered Moses, “See, I have made you like God to Pharaoh, and your brother Aaron will be your prophet.
2
LIN
Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo ; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
BSB
BSB:
You are to speak all that I command you, and your brother Aaron is to tell Pharaoh to let the Israelites go out of his land.
3
LIN
Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito.
BSB
BSB:
But I will harden Pharaoh’s heart, and though I will multiply My signs and wonders in the land of Egypt,
4
LIN
Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.
BSB
BSB:
Pharaoh will not listen to you. Then I will lay My hand on Egypt, and by mighty acts of judgment I will bring the divisions of My people the Israelites out of the land of Egypt.
5
LIN
Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. »
BSB
BSB:
And the Egyptians will know that I am the LORD, when I stretch out My hand against Egypt and bring the Israelites out from among them.”
6
LIN
Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango.
BSB
BSB:
So Moses and Aaron did just as the LORD had commanded them.
7
LIN
Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe ; mpe Aron, tuku mwambe na misato.
BSB
BSB:
Moses was eighty years old and Aaron was eighty-three when they spoke to Pharaoh.
8
LIN
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
BSB
BSB:
The LORD said to Moses and Aaron,
9
LIN
« Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »
BSB
BSB:
“When Pharaoh tells you, ‘Perform a miracle,’ you are to say to Aaron, ‘Take your staff and throw it down before Pharaoh,’ and it will become a serpent.”
10
LIN
Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Aron abwakaki lingenda na ye liboso ya Faraon mpe bakalaka na ye, mpe yango ebongwanaki nyoka.
BSB
BSB:
So Moses and Aaron went to Pharaoh and did just as the LORD had commanded. Aaron threw his staff down before Pharaoh and his officials, and it became a serpent.
11
LIN
Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka.
BSB
BSB:
But Pharaoh called the wise men and sorcerers and magicians of Egypt, and they also did the same things by their magic arts.
12
LIN
Moko na moko kati na bango abwakaki lingenda na ye na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Kasi lingenda ya Aron emelaki mangenda na bango.
BSB
BSB:
Each one threw down his staff, and it became a serpent. But Aaron’s staff swallowed up the other staffs.
13
LIN
Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.
BSB
BSB:
Still, Pharaoh’s heart was hardened, and he would not listen to them, just as the LORD had said.
14
LIN
Yawe alobaki na Moyize : « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Pharaoh’s heart is unyielding; he refuses to let the people go.
15
LIN
Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka.
BSB
BSB:
Go to Pharaoh in the morning as you see him walking out to the water. Wait on the bank of the Nile to meet him, and take in your hand the staff that was changed into a snake.
16
LIN
Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.
BSB
BSB:
Then say to him, ‘The LORD, the God of the Hebrews, has sent me to tell you: Let My people go, so that they may worship Me in the wilderness. But until now you have not listened.
17
LIN
Tala makambo oyo Yawe alobi : Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe : Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila.
BSB
BSB:
This is what the LORD says: By this you will know that I am the LORD. Behold, with the staff in my hand I will strike the water of the Nile, and it will turn to blood.
18
LIN
Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te. ’ › »
BSB
BSB:
The fish in the Nile will die, the river will stink, and the Egyptians will be unable to drink its water.’”
19
LIN
Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. »
BSB
BSB:
And the LORD said to Moses, “Tell Aaron, ‘Take your staff and stretch out your hand over the waters of Egypt—over their rivers and canals and ponds and all the reservoirs—that they may become blood.’ There will be blood throughout the land of Egypt, even in the vessels of wood and stone.”
20
LIN
Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye ; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila.
BSB
BSB:
Moses and Aaron did just as the LORD had commanded; in the presence of Pharaoh and his officials, Aaron raised the staff and struck the water of the Nile, and all the water was turned to blood.
21
LIN
Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
BSB
BSB:
The fish in the Nile died, and the river smelled so bad that the Egyptians could not drink its water. And there was blood throughout the land of Egypt.
22
LIN
Kasi bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. Motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi mpe aboyaki koyokela Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
BSB
BSB:
But the magicians of Egypt did the same things by their magic arts. So Pharaoh’s heart was hardened, and he would not listen to Moses and Aaron, just as the LORD had said.
23
LIN
Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te.
BSB
BSB:
Instead, Pharaoh turned around, went into his palace, and did not take any of this to heart.
24
LIN
Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale.
BSB
BSB:
So all the Egyptians dug around the Nile for water to drink, because they could not drink the water from the river.
25
LIN
Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili.
BSB
BSB:
And seven full days passed after the LORD had struck the Nile.
Chapter complete
You’ve read Exodus 7
Chapter 7 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 8
Read Exodus 8
Back to Exodus 6
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 7
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 7
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 6
Exodus 7
Exodus 8