Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
8
LIN
BSB
A
a
Exodus 8
8
Exodus
The plagues and the Passover
Lingala Bible
Pharaoh
, person
Moses
, person
Egypt
, place
Aaron
, person
Nile
, place
Goshen
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na yango, Yawe atindaki Moyize : « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Go to Pharaoh and tell him that this is what the LORD says: ‘Let My people go, so that they may worship Me.
2
LIN
Soki oboyi kotika bango kokende, nakotinda etumbu ya magorodo na mokili na yo mobimba.
BSB
BSB:
But if you refuse to let them go, I will plague your whole country with frogs.
3
LIN
Nili ekotonda na magorodo ; bongo magorodo yango ekobima wuta na Nili, ekokota kino na ndako na yo ya bokonzi, na shambre na yo ya kolala, na mbeto na yo, na bandako ya basali na yo, na bandako ya bato na yo, na bafulu na yo ya mapa mpe kino na bisika oyo babalolaka farine.
BSB
BSB:
The Nile will teem with frogs, and they will come into your palace and up to your bedroom and onto your bed, into the houses of your officials and your people, and into your ovens and kneading bowls.
4
LIN
Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › »
BSB
BSB:
The frogs will come up on you and your people and all your officials.’”
5
LIN
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »
BSB
BSB:
And the LORD said to Moses, “Tell Aaron, ‘Stretch out your hand with your staff over the rivers and canals and ponds, and cause the frogs to come up onto the land of Egypt.’”
6
LIN
Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito ; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito.
BSB
BSB:
So Aaron stretched out his hand over the waters of Egypt, and the frogs came up and covered the land of Egypt.
7
LIN
Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.
BSB
BSB:
But the magicians did the same thing by their magic arts, and they also brought frogs up onto the land of Egypt.
8
LIN
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai ; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka.
BSB
BSB:
Pharaoh summoned Moses and Aaron and said, “Pray to the LORD to take the frogs away from me and my people. Then I will let your people go, that they may sacrifice to the LORD.”
9
LIN
Moyize alobaki na Faraon : — Tika ete mokonzi apona tango nini nasengeli kobondela Yawe mpo na yo, basali na yo mpe bato na yo, mpo ete Yawe alongola magorodo pene na yo mpe pene ya bandako na yo ; kasi etikala kaka na ebale Nili.
BSB
BSB:
Moses said to Pharaoh, “You may have the honor over me. When shall I pray for you and your officials and your people that the frogs (except for those in the Nile) may be taken away from you and your houses?”
10
LIN
Faraon azongisaki : — Tika ete esalema lobi. Moyize alobaki : — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso.
BSB
BSB:
“Tomorrow,” Pharaoh answered. “May it be as you say,” Moses replied, “so that you may know that there is no one like the LORD our God.
11
LIN
Magorodo ekolongwa pene na yo, pene na bandako na yo, ya basali na yo mpe ya bato na yo ; kasi ekotikala kaka na ebale Nili.
BSB
BSB:
The frogs will depart from you and your houses and your officials and your people; they will remain only in the Nile.”
12
LIN
Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.
BSB
BSB:
After Moses and Aaron had left Pharaoh, Moses cried out to the LORD for help with the frogs that He had brought against Pharaoh.
13
LIN
Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki : magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga.
BSB
BSB:
And the LORD did as Moses requested, and the frogs in the houses, the courtyards, and the fields died.
14
LIN
Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola.
BSB
BSB:
They were piled into countless heaps, and there was a terrible stench in the land.
15
LIN
Kasi tango Faraon amonaki ete kimia ekoti, ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe ayokelaki te Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
BSB
BSB:
When Pharaoh saw that there was relief, however, he hardened his heart and would not listen to Moses and Aaron, just as the LORD had said.
16
LIN
Yawe alobaki na Moyize : — Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele ; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Tell Aaron, ‘Stretch out your staff and strike the dust of the earth, that it may turn into swarms of gnats throughout the land of Egypt.’”
17
LIN
Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele ; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi.
BSB
BSB:
This they did, and when Aaron stretched out his hand with his staff and struck the dust of the earth, gnats came upon man and beast. All the dust of the earth turned into gnats throughout the land of Egypt.
18
LIN
Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama.
BSB
BSB:
The magicians tried to produce gnats using their magic arts, but they could not. And the gnats remained on man and beast.
19
LIN
Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.
BSB
BSB:
“This is the finger of God,” the magicians said to Pharaoh. But Pharaoh’s heart was hardened, and he would not listen to them, just as the LORD had said.
20
LIN
Yawe alobaki na Moyize : — Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Get up early in the morning, and when Pharaoh goes out to the water, stand before him and tell him that this is what the LORD says: ‘Let My people go, so that they may worship Me.
21
LIN
Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka.
BSB
BSB:
But if you will not let My people go, I will send swarms of flies upon you and your officials and your people and your houses. The houses of the Egyptians and even the ground where they stand will be full of flies.
22
LIN
Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda ; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango.
BSB
BSB:
But on that day I will give special treatment to the land of Goshen, where My people live; no swarms of flies will be found there. In this way you will know that I, the LORD, am in the land.
23
LIN
Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »
BSB
BSB:
I will make a distinction between My people and your people. This sign will take place tomorrow.’”
24
LIN
Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.
BSB
BSB:
And the LORD did so. Thick swarms of flies poured into Pharaoh’s palace and into the houses of his officials. Throughout Egypt the land was ruined by swarms of flies.
25
LIN
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo.
BSB
BSB:
Then Pharaoh summoned Moses and Aaron and said, “Go, sacrifice to your God within this land.”
26
LIN
Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?
BSB
BSB:
But Moses replied, “It would not be right to do that, because the sacrifices we offer to the LORD our God would be detestable to the Egyptians. If we offer sacrifices that are detestable before the Egyptians, will they not stone us?
27
LIN
Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso.
BSB
BSB:
We must make a three-day journey into the wilderness and sacrifice to the LORD our God as He commands us.”
28
LIN
Faraon alobaki : — Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe ; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai !
BSB
BSB:
Pharaoh answered, “I will let you go and sacrifice to the LORD your God in the wilderness, but you must not go very far. Now pray for me.”
29
LIN
Moyize azongisaki : — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.
BSB
BSB:
“As soon as I leave you,” Moses said, “I will pray to the LORD, so that tomorrow the swarms of flies will depart from Pharaoh and his officials and his people. But Pharaoh must not act deceitfully again by refusing to let the people go and sacrifice to the LORD.”
30
LIN
Tango Moyize abimaki na ndako ya Faraon, abondelaki Yawe
BSB
BSB:
Then Moses left Pharaoh and prayed to the LORD,
31
LIN
mpe Yawe akokisaki makambo oyo Moyize asengaki : banzinzi oyo eswaka etikaki Faraon, bakalaka na ye mpe bato na ye. Ata nzinzi moko te etikalaki.
BSB
BSB:
and the LORD did as Moses requested. He removed the swarms of flies from Pharaoh and his officials and his people; not one fly remained.
32
LIN
Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
BSB
BSB:
But Pharaoh hardened his heart this time as well, and he would not let the people go.
Chapter complete
You’ve read Exodus 8
Chapter 8 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 9
Read Exodus 9
Back to Exodus 7
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 8
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 8
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 7
Exodus 8
Exodus 9