Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Exod
Exodus
9
LIN
BSB
A
a
Exodus 9
9
Exodus
The plagues and the Passover
Lingala Bible
Moses
, person
Pharaoh
, person
Egypt
, place
Israel
, person
Aaron
, person
Goshen
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Go to Pharaoh and tell him that this is what the LORD, the God of the Hebrews, says: ‘Let My people go, so that they may worship Me.
2
LIN
Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango,
BSB
BSB:
But if you continue to restrain them and refuse to let them go,
3
LIN
loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba.
BSB
BSB:
then the hand of the LORD will bring a severe plague on your livestock in the field—on your horses, donkeys, camels, herds, and flocks.
4
LIN
Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › »
BSB
BSB:
But the LORD will make a distinction between the livestock of Israel and the livestock of Egypt, so that no animal belonging to the Israelites will die.’”
5
LIN
Yawe abongisaki tango mpe alobaki : « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. »
BSB
BSB:
The LORD set a time, saying, “Tomorrow the LORD will do this in the land.”
6
LIN
Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango : bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki.
BSB
BSB:
And the next day the LORD did just that. All the livestock of the Egyptians died, but not one animal belonging to the Israelites died.
7
LIN
Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
BSB
BSB:
Pharaoh sent officials and found that none of the livestock of the Israelites had died. But Pharaoh’s heart was hardened, and he would not let the people go.
8
LIN
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses and Aaron, “Take handfuls of soot from the furnace; in the sight of Pharaoh, Moses is to toss it into the air.
9
LIN
Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. »
BSB
BSB:
It will become fine dust over all the land of Egypt, and festering boils will break out on man and beast throughout the land.”
10
LIN
Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele.
BSB
BSB:
So they took soot from the furnace and stood before Pharaoh. Moses tossed it into the air, and festering boils broke out on man and beast.
11
LIN
Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito.
BSB
BSB:
The magicians could not stand before Moses, because the boils had broken out on them and on all the Egyptians.
12
LIN
Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.
BSB
BSB:
But the LORD hardened Pharaoh’s heart, and he would not listen to them, just as the LORD had said to Moses.
13
LIN
Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Get up early in the morning, stand before Pharaoh, and tell him that this is what the LORD, the God of the Hebrews, says: ‘Let My people go, so that they may worship Me.
14
LIN
Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba.
BSB
BSB:
Otherwise, I will send all My plagues against you and your officials and your people, so you may know that there is no one like Me in all the earth.
15
LIN
Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili.
BSB
BSB:
For by this time I could have stretched out My hand and struck you and your people with a plague to wipe you off the earth.
16
LIN
Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo : kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba.
BSB
BSB:
But I have raised you up for this very purpose, that I might display My power to you, and that My name might be proclaimed in all the earth.
17
LIN
Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende,
BSB
BSB:
Still, you lord it over My people and do not allow them to go.
18
LIN
lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala.
BSB
BSB:
Behold, at this time tomorrow I will rain down the worst hail that has ever fallen on Egypt, from the day it was founded until now.
19
LIN
Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › »
BSB
BSB:
So give orders now to shelter your livestock and everything you have in the field. Every man or beast that remains in the field and is not brought inside will die when the hail comes down upon them.’”
20
LIN
Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako.
BSB
BSB:
Those among Pharaoh’s officials who feared the word of the LORD hurried to bring their servants and livestock to shelter,
21
LIN
Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga.
BSB
BSB:
but those who disregarded the word of the LORD left their servants and livestock in the field.
22
LIN
Yawe alobaki na Moyize : « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito : likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. »
BSB
BSB:
Then the LORD said to Moses, “Stretch out your hand toward heaven, so that hail may fall on all the land of Egypt—on man and beast and every plant of the field throughout the land of Egypt.”
23
LIN
Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.
BSB
BSB:
So Moses stretched out his staff toward heaven, and the LORD sent thunder and hail, and lightning struck the earth. So the LORD rained down hail upon the land of Egypt.
24
LIN
Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo.
BSB
BSB:
The hail fell and the lightning continued flashing through it. The hail was so severe that nothing like it had ever been seen in all the land of Egypt from the time it became a nation.
25
LIN
Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele ; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso.
BSB
BSB:
Throughout the land of Egypt, the hail struck down everything in the field, both man and beast; it beat down every plant of the field and stripped every tree.
26
LIN
Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.
BSB
BSB:
The only place where it did not hail was in the land of Goshen, where the Israelites lived.
27
LIN
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.
BSB
BSB:
Then Pharaoh summoned Moses and Aaron. “This time I have sinned,” he said. “The LORD is righteous, and I and my people are wicked.
28
LIN
Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.
BSB
BSB:
Pray to the LORD, for there has been enough of God’s thunder and hail. I will let you go; you do not need to stay any longer.”
29
LIN
Moyize azongisaki : — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.
BSB
BSB:
Moses said to him, “When I have left the city, I will spread out my hands to the LORD. The thunder will cease, and there will be no more hail, so that you may know that the earth is the LORD’s.
30
LIN
Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te.
BSB
BSB:
But as for you and your officials, I know that you still do not fear the LORD our God.”
31
LIN
Lino mpe Orje ebebaki, pamba te lino ebimisaki mito mpe Orje ebimisaki bafololo.
BSB
BSB:
(Now the flax and barley were destroyed, since the barley was ripe and the flax was in bloom;
32
LIN
Ble mpe epotele ebebaki te, pamba te tango na yango ya kobota ekokaki nanu te.
BSB
BSB:
but the wheat and spelt were not destroyed, because they are late crops.)
33
LIN
Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
BSB
BSB:
Then Moses departed from Pharaoh, went out of the city, and spread out his hands to the LORD. The thunder and hail ceased, and the rain no longer poured down on the land.
34
LIN
Tango Faraon amonaki ete mvula ya mabanga mpe bakake etiki kobeta, asalaki lisusu lisumu. Ye mpe bakalaka na ye bayeisaki lisusu mitema na bango makasi.
BSB
BSB:
When Pharaoh saw that the rain and hail and thunder had ceased, he sinned again and hardened his heart—he and his officials.
35
LIN
Boye motema ya Faraon ekomaki penza makasi mpe aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende, ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya Moyize.
BSB
BSB:
So Pharaoh’s heart was hardened, and he would not let the Israelites go, just as the LORD had said through Moses.
Chapter complete
You’ve read Exodus 9
Chapter 9 of 40 in Exodus
Up next
Exodus 10
Read Exodus 10
Back to Exodus 8
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Exodus 9
Ask Study Help
Ask anything about Exodus 9
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Exodus 8
Exodus 9
Exodus 10