Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
16
LIN
BSB
A
a
Genesis 16
16
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abram
, person
Sarai
, person
Hagar
, person
Ishmael
, person
Canaan
, place
Kadesh
, place
Shur
, place
Beer-lahai-roi
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. »
BSB
BSB:
Now Abram’s wife Sarai had borne him no children, but she had an Egyptian maidservant named Hagar.
2
LIN
Sarayi alobaki na Abrami : — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi.
BSB
BSB:
So Sarai said to Abram, “Look now, the LORD has prevented me from bearing children. Please go to my maidservant; perhaps I can build a family by her.” And Abram listened to the voice of Sarai.
3
LIN
Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.
BSB
BSB:
So after he had lived in Canaan for ten years, his wife Sarai took her Egyptian maidservant Hagar and gave her to Abram to be his wife.
4
LIN
Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye.
BSB
BSB:
And he slept with Hagar, and she conceived. But when Hagar realized that she was pregnant, she began to despise her mistress.
5
LIN
Boye, Sarayi alobaki na Abrami : — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
BSB
BSB:
Then Sarai said to Abram, “May the wrong done to me be upon you! I delivered my servant into your arms, and ever since she saw that she was pregnant, she has treated me with contempt. May the LORD judge between you and me.”
6
LIN
Abrami alobaki : — Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu. Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.
BSB
BSB:
“Here,” said Abram, “your servant is in your hands. Do whatever you want with her.” Then Sarai treated Hagar so harshly that she fled from her.
7
LIN
Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri.
BSB
BSB:
Now the angel of the LORD found Hagar by a spring of water in the desert—the spring along the road to Shur.
8
LIN
Atunaki ye : — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ? Azongisaki : — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.
BSB
BSB:
“Hagar, servant of Sarai,” he said, “where have you come from, and where are you going?” “I am running away from my mistress Sarai,” she replied.
9
LIN
Anjelu ya Yawe alobaki na ye : — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye.
BSB
BSB:
So the angel of the LORD told her, “Return to your mistress and submit to her authority.”
10
LIN
Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu : — Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango.
BSB
BSB:
Then the angel added, “I will greatly multiply your offspring so that they will be too numerous to count.”
11
LIN
Alobaki na ye lisusu : — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli, » pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo.
BSB
BSB:
The angel of the LORD proceeded: “Behold, you have conceived and will bear a son. And you shall name him Ishmael, for the LORD has heard your cry of affliction.
12
LIN
Akozala lokola ane ya zamba. Loboko na ye ekobundisa moto nyonso, mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye ; akovanda esika moko te na bandeko na ye.
BSB
BSB:
He will be a wild donkey of a man, and his hand will be against everyone, and everyone’s hand against him; he will live in hostility toward all his brothers.”
13
LIN
Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai.
BSB
BSB:
So Hagar gave this name to the LORD who had spoken to her: “You are the God who sees me,” for she said, “Here I have seen the One who sees me!”
14
LIN
Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
BSB
BSB:
Therefore the well was called Beer-lahai-roi. It is located between Kadesh and Bered.
15
LIN
Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. »
BSB
BSB:
And Hagar bore Abram a son, and Abram gave the name Ishmael to the son she had borne.
16
LIN
Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.
BSB
BSB:
Abram was eighty-six years old when Hagar bore Ishmael to him.
Chapter complete
You’ve read Genesis 16
Chapter 16 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 17
Read Genesis 17
Listen
Back to Genesis 15
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 16
A question this chapter raises
Doesn’t “the LORD is one” rule out the Trinity?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 15
Genesis 16
Genesis 17