Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.40.0
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
17
LIN
BSB
A
a
Genesis 17
17
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abraham
, person
Ishmael
, person
Sarah
, person
Isaac
, person
Canaan
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
BSB
BSB:
When Abram was ninety-nine years old, the LORD appeared to him and said, “I am God Almighty. Walk before Me and be blameless.
2
LIN
Nakosala boyokani kati na Ngai mpe yo, mpe nakokomisa bakitani na yo ebele penza. »
BSB
BSB:
I will establish My covenant between Me and you, and I will multiply you exceedingly.”
3
LIN
Abrami afukamaki elongi kino na mabele, mpe Nzambe alobaki na ye lisusu :
BSB
BSB:
Then Abram fell facedown, and God said to him,
4
LIN
« Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele.
BSB
BSB:
“As for Me, this is My covenant with you: You will be the father of many nations.
5
LIN
Bakobenga yo lisusu Abrami te ; kombo na yo ekokoma Abrayami, pamba te nakokomisa yo tata ya bikolo ebele.
BSB
BSB:
No longer will you be called Abram, but your name will be Abraham, for I have made you a father of many nations.
6
LIN
Nakopesa yo mabota ebele, nakobimisa bikolo mpe bakonzi na nzela na yo.
BSB
BSB:
I will make you exceedingly fruitful; I will make nations of you, and kings will descend from you.
7
LIN
Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.
BSB
BSB:
I will establish My covenant as an everlasting covenant between Me and you and your descendants after you, to be your God and the God of your descendants after you.
8
LIN
Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
BSB
BSB:
And to you and your descendants I will give the land where you are residing—all the land of Canaan—as an eternal possession; and I will be their God.”
9
LIN
Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima.
BSB
BSB:
God also said to Abraham, “You must keep My covenant—you and your descendants in the generations after you.
10
LIN
Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.
BSB
BSB:
This is My covenant with you and your descendants after you, which you are to keep: Every male among you must be circumcised.
11
LIN
Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai.
BSB
BSB:
You are to circumcise the flesh of your foreskin, and this will be a sign of the covenant between Me and you.
12
LIN
Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga : ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga.
BSB
BSB:
Generation after generation, every male must be circumcised when he is eight days old, including those born in your household and those purchased from a foreigner—even those who are not your offspring.
13
LIN
Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela.
BSB
BSB:
Whether they are born in your household or purchased, they must be circumcised. My covenant in your flesh will be an everlasting covenant.
14
LIN
Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. »
BSB
BSB:
But if any male is not circumcised, he will be cut off from his people; he has broken My covenant.”
15
LIN
Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara.
BSB
BSB:
Then God said to Abraham, “As for Sarai your wife, do not call her Sarai, for her name is to be Sarah.
16
LIN
Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »
BSB
BSB:
And I will bless her and will surely give you a son by her. I will bless her, and she will be the mother of nations; kings of peoples will descend from her.”
17
LIN
Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »
BSB
BSB:
Abraham fell facedown. Then he laughed and said to himself, “Can a child be born to a man who is a hundred years old? Can Sarah give birth at the age of ninety?”
18
LIN
Boye Abrayami alobaki na Nzambe : — Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo !
BSB
BSB:
And Abraham said to God, “O that Ishmael might live under Your blessing!”
19
LIN
Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.
BSB
BSB:
But God replied, “Your wife Sarah will indeed bear you a son, and you are to name him Isaac. I will establish My covenant with him as an everlasting covenant for his descendants after him.
20
LIN
Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene.
BSB
BSB:
As for Ishmael, I have heard you, and I will surely bless him; I will make him fruitful and multiply him greatly. He will become the father of twelve rulers, and I will make him into a great nation.
21
LIN
Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.
BSB
BSB:
But I will establish My covenant with Isaac, whom Sarah will bear to you at this time next year.”
22
LIN
Tango Nzambe asilisaki kosolola na Abrayami, akendeki.
BSB
BSB:
When He had finished speaking with Abraham, God went up from him.
23
LIN
Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.
BSB
BSB:
On that very day Abraham took his son Ishmael and all those born in his household or purchased with his money—every male among the members of Abraham’s household—and he circumcised them, just as God had told him.
24
LIN
Abrayami azalaki na mibu tuku libwa na libwa ya mbotama tango akatamaki ngenga ;
BSB
BSB:
So Abraham was ninety-nine years old when he was circumcised,
25
LIN
mpe Isimaeli, mwana na ye ya mobali, azalaki na mibu zomi na misato tango akatamaki ngenga.
BSB
BSB:
and his son Ishmael was thirteen;
26
LIN
Abrayami mpe mwana na ye ya mobali, Isimaeli, bakatamaki ngenga mokolo moko.
BSB
BSB:
Abraham and his son Ishmael were circumcised on the same day.
27
LIN
Mibali nyonso kati na ndako ya Abrayami, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mokili ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye.
BSB
BSB:
And all the men of Abraham’s household—both servants born in his household and those purchased from foreigners—were circumcised with him.
Chapter complete
You’ve read Genesis 17
Chapter 17 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 18
Read Genesis 18
Listen
Back to Genesis 16
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 17
A question this chapter raises
Doesn’t the Bible forbid pork and require circumcision, as Islam does?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 16
Genesis 17
Genesis 18