Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
18
LIN
BSB
A
a
Genesis 18
18
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abraham
, person
Sarah
, person
Sodom
, place
Gomorrah
, place
Mamre
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yawe abimelaki Abrayami pene ya banzete minene ya Mamire, wana avandaki na ekotelo ya ndako na ye ya kapo, na moyi makasi ya midi.
BSB
BSB:
Then the LORD appeared to Abraham by the Oaks of Mamre in the heat of the day, while he was sitting at the entrance of his tent.
2
LIN
Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele.
BSB
BSB:
And Abraham looked up and saw three men standing nearby. When he saw them, he ran from the entrance of his tent to meet them and bowed low to the ground.
3
LIN
Alobaki : — Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te.
BSB
BSB:
“My lord,” said Abraham, “if I have found favor in your sight, please do not pass your servant by.
4
LIN
Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo.
BSB
BSB:
Let a little water be brought, that you may wash your feet and rest yourselves under the tree.
5
LIN
Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki : — Ezali malamu, sala ndenge olobi.
BSB
BSB:
And I will bring a bit of bread so that you may refresh yourselves. This is why you have passed your servant’s way. After that, you may continue on your way.” “Yes,” they replied, “you may do as you have said.”
6
LIN
Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. »
BSB
BSB:
So Abraham hurried into the tent and said to Sarah, “Quick! Prepare three seahs of fine flour, knead it, and bake some bread.”
7
LIN
Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki.
BSB
BSB:
Meanwhile, Abraham ran to the herd, selected a tender and choice calf, and gave it to a servant, who hurried to prepare it.
8
LIN
Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia.
BSB
BSB:
Then Abraham brought curds and milk and the calf that had been prepared, and he set them before the men and stood by them under the tree as they ate.
9
LIN
Sima, batunaki ye : — Wapi Sara, mwasi na yo ? Abrayami azongisaki : — Azali na ndako.
BSB
BSB:
“Where is your wife Sarah?” they asked. “There, in the tent,” he replied.
10
LIN
Bongo moko kati na bango alobaki : — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami.
BSB
BSB:
Then the LORD said, “I will surely return to you at this time next year, and your wife Sarah will have a son!” Now Sarah was behind him, listening at the entrance to the tent.
11
LIN
Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota.
BSB
BSB:
And Abraham and Sarah were already old and well along in years; Sarah had passed the age of childbearing.
12
LIN
Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! »
BSB
BSB:
So she laughed to herself, saying, “After I am worn out and my master is old, will I now have this pleasure?”
13
LIN
Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? »
BSB
BSB:
And the LORD asked Abraham, “Why did Sarah laugh and say, ‘Can I really bear a child when I am old?’
14
LIN
Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
BSB
BSB:
Is anything too difficult for the LORD? At the appointed time I will return to you—in about a year—and Sarah will have a son.”
15
LIN
Sara abangaki ; boye awanganaki : — Naseki te. Kasi Yawe alobaki : — Ezali ya solo, oseki.
BSB
BSB:
But Sarah was afraid, so she denied it and said, “I did not laugh.” “No,” replied the LORD, “but you did laugh.”
16
LIN
Tango mibali yango batelemaki mpo na kokoba mobembo na bango na Sodome, Abrayami akendeki kotika bango na nzela.
BSB
BSB:
When the men got up to leave, they looked out over Sodom, and Abraham walked along with them to see them off.
17
LIN
Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ?
BSB
BSB:
And the LORD said, “Shall I hide from Abraham what I am about to do?
18
LIN
Solo, Abrayami akokoma ekolo monene mpe ya nguya, mpe bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na ye.
BSB
BSB:
Abraham will surely become a great and powerful nation, and through him all the nations of the earth will be blessed.
19
LIN
Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
BSB
BSB:
For I have chosen him, so that he will command his children and his household after him to keep the way of the LORD by doing what is right and just, in order that the LORD may bring upon Abraham what He has promised.”
20
LIN
Bongo Yawe alobaki : « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza.
BSB
BSB:
Then the LORD said, “The outcry against Sodom and Gomorrah is great. Because their sin is so grievous,
21
LIN
Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. »
BSB
BSB:
I will go down to see if their actions fully justify the outcry that has reached Me. If not, I will find out.”
22
LIN
Mibali yango babalukaki mpe bakendeki na Sodome, kasi Abrayami atelemaki kaka liboso ya Yawe.
BSB
BSB:
And the two men turned away and went toward Sodom, but Abraham remained standing before the LORD.
23
LIN
Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki : — Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ?
BSB
BSB:
Abraham stepped forward and said, “Will You really sweep away the righteous with the wicked?
24
LIN
Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ?
BSB
BSB:
What if there are fifty righteous ones in the city? Will You really sweep it away and not spare the place for the sake of the fifty righteous ones who are there?
25
LIN
Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?
BSB
BSB:
Far be it from You to do such a thing—to kill the righteous with the wicked, so that the righteous and the wicked are treated alike. Far be it from You! Will not the Judge of all the earth do what is right?”
26
LIN
Yawe azongisaki : — Soki nakuti na Sodome bato ya sembo tuku mitano, nakolimbisa engumba mobimba mpo na bango.
BSB
BSB:
So the LORD replied, “If I find fifty righteous ones within the city of Sodom, on their account I will spare the whole place.”
27
LIN
Abrayami alobaki lisusu : — Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai.
BSB
BSB:
Then Abraham answered, “Now that I have ventured to speak to the Lord—though I am but dust and ashes—
28
LIN
Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano ? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi ? Yawe azongisaki : — Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te.
BSB
BSB:
suppose the fifty righteous ones lack five. Will You destroy the whole city for the lack of five?” He replied, “If I find forty-five there, I will not destroy it.”
29
LIN
Abrayami alobaki na Ye lisusu : — Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei ? Azongisaki : — Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te.
BSB
BSB:
Once again Abraham spoke to the LORD, “Suppose forty are found there?” He answered, “On account of the forty, I will not do it.”
30
LIN
Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ? Azongisaki : — Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.
BSB
BSB:
Then Abraham said, “May the Lord not be angry, but let me speak further. Suppose thirty are found there?” He replied, “If I find thirty there, I will not do it.”
31
LIN
Abrayami alobaki : —Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.
BSB
BSB:
And Abraham said, “Now that I have ventured to speak to the Lord, suppose twenty are found there?” He answered, “On account of the twenty, I will not destroy it.”
32
LIN
Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.
BSB
BSB:
Finally, Abraham said, “May the Lord not be angry, but let me speak once more. Suppose ten are found there?” And He answered, “On account of the ten, I will not destroy it.”
33
LIN
Sima na Yawe kosolola na Abrayami, akendeki ; mpe Abrayami azongaki na ndako na ye.
BSB
BSB:
When the LORD had finished speaking with Abraham, He departed, and Abraham returned home.
Chapter complete
You’ve read Genesis 18
Chapter 18 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 19
Read Genesis 19
Listen
Back to Genesis 17
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 18
A question this chapter raises
What happens to people who never heard of Jesus?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 17
Genesis 18
Genesis 19