Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.2
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
20
LIN
BSB
A
a
Genesis 20
20
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abimelech
, person
Abraham
, person
Sarah
, person
Gerar
, place
Negeb
, place
Kadesh
, place
Shur
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri ; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari.
BSB
BSB:
Now Abraham journeyed from there to the region of the Negev and settled between Kadesh and Shur. While he was staying in Gerar,
2
LIN
Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi.
BSB
BSB:
Abraham said of his wife Sarah, “She is my sister.” So Abimelech king of Gerar had Sarah brought to him.
3
LIN
Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »
BSB
BSB:
One night, however, God came to Abimelech in a dream and told him, “You are as good as dead because of the woman you have taken, for she is a married woman.”
4
LIN
Nzokande, Abimeleki apusanaki nanu te pembeni na ye. Agangaki : — Nkolo, okoboma penza ekolo ata soki esali na yango mabe te ?
BSB
BSB:
Now Abimelech had not gone near her, so he replied, “Lord, would You destroy a nation even though it is innocent?
5
LIN
Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.
BSB
BSB:
Didn’t Abraham tell me, ‘She is my sister’? And she herself said, ‘He is my brother.’ I have done this in the integrity of my heart and the innocence of my hands.”
6
LIN
Nzambe alobaki na ye na ndoto : — Solo, nayebi ete osali yango na motema sembo. Yango wana nabatelaki yo mpo ete osala lisumu te epai na Ngai, mpe natikaki te ete osimba ye.
BSB
BSB:
Then God said to Abimelech in the dream, “Yes, I know that you did this with a clear conscience, and so I have kept you from sinning against Me. That is why I did not let you touch her.
7
LIN
Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso.
BSB
BSB:
Now return the man’s wife, for he is a prophet; he will pray for you and you will live. But if you do not restore her, be aware that you will surely die—you and all who belong to you.”
8
LIN
Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi.
BSB
BSB:
Early the next morning Abimelech got up and summoned all his servants; and when he described to them all that had happened, the men were terrified.
9
LIN
Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te.
BSB
BSB:
Then Abimelech called Abraham and asked, “What have you done to us? How have I sinned against you, that you have brought such tremendous guilt upon me and my kingdom? You have done things to me that should not be done.”
10
LIN
Abimeleki atunaki Abrayami : — Makanisi nini ozalaki na yango mpo ete osala boye ?
BSB
BSB:
Abimelech also asked Abraham, “What prompted you to do such a thing?”
11
LIN
Abrayami azongisaki : — Namilobelaki : « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai.
BSB
BSB:
Abraham replied, “I thought to myself, ‘Surely there is no fear of God in this place. They will kill me on account of my wife.’
12
LIN
Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai ; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. »
BSB
BSB:
Besides, she really is my sister, the daughter of my father—though not the daughter of my mother—and she became my wife.
13
LIN
Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › »
BSB
BSB:
So when God had me journey from my father’s house, I said to Sarah, ‘This is how you can show your loyalty to me: Wherever we go, say of me, “He is my brother.”’”
14
LIN
Boye Abimeleki azwaki bameme, bantaba, bangombe, basali ya mibali mpe ya basi, apesaki na Abrayami. Mpe azongiselaki ye mwasi na ye Sara.
BSB
BSB:
So Abimelech brought sheep and cattle, menservants and maidservants, and he gave them to Abraham and restored his wife Sarah to him.
15
LIN
Abimeleki alobaki : « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. »
BSB
BSB:
And Abimelech said, “Look, my land is before you. Settle wherever you please.”
16
LIN
Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. »
BSB
BSB:
And he said to Sarah, “See, I am giving your brother a thousand pieces of silver. It is your vindication before all who are with you; you are completely cleared.”
17
LIN
Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ;
BSB
BSB:
Then Abraham prayed to God, and God healed Abimelech and his wife and his maidservants, so that they could again bear children—
18
LIN
pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.
BSB
BSB:
for on account of Abraham’s wife Sarah, the LORD had completely closed all the wombs in Abimelech’s household.
Chapter complete
You’ve read Genesis 20
Chapter 20 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 21
Read Genesis 21
Listen
Back to Genesis 19
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 20
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 20
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 19
Genesis 20
Genesis 21