Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
21
LIN
BSB
A
a
Genesis 21
21
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abraham
, person
Sarah
, person
Isaac
, person
Abimelech
, person
Beersheba
, place
Hagar
, person
Phicol
, person
Egypt
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye.
BSB
BSB:
Now the LORD attended to Sarah as He had said, and the LORD did for Sarah what He had promised.
2
LIN
Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye.
BSB
BSB:
So Sarah conceived and bore a son to Abraham in his old age, at the very time God had promised.
3
LIN
Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. »
BSB
BSB:
And Abraham gave the name Isaac to the son Sarah bore to him.
4
LIN
Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.
BSB
BSB:
When his son Isaac was eight days old, Abraham circumcised him, as God had commanded him.
5
LIN
Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki.
BSB
BSB:
Abraham was a hundred years old when his son Isaac was born to him.
6
LIN
Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »
BSB
BSB:
Then Sarah said, “God has made me laugh, and everyone who hears of this will laugh with me.”
7
LIN
Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »
BSB
BSB:
She added, “Who would have told Abraham that Sarah would nurse children? Yet I have borne him a son in his old age.”
8
LIN
Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene.
BSB
BSB:
So the child grew and was weaned, and Abraham held a great feast on the day Isaac was weaned.
9
LIN
Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ;
BSB
BSB:
But Sarah saw that the son whom Hagar the Egyptian had borne to Abraham was mocking her son,
10
LIN
ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. »
BSB
BSB:
and she said to Abraham, “Expel the slave woman and her son, for the slave woman’s son will never share in the inheritance with my son Isaac!”
11
LIN
Tango Abrayami ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema mpo na mwana na ye.
BSB
BSB:
Now this matter distressed Abraham greatly because it concerned his son Ishmael.
12
LIN
Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.
BSB
BSB:
But God said to Abraham, “Do not be distressed about the boy and your maidservant. Listen to everything that Sarah tells you, for through Isaac your offspring will be reckoned.
13
LIN
Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. »
BSB
BSB:
But I will also make a nation of the slave woman’s son, because he is your offspring.”
14
LIN
Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.
BSB
BSB:
Early in the morning, Abraham got up, took bread and a skin of water, put them on Hagar’s shoulders, and sent her away with the boy. She left and wandered in the Wilderness of Beersheba.
15
LIN
Tango mayi oyo ezalaki na mbeki esilaki, Agari asundolaki mwana na se ya nzete moko ya moke.
BSB
BSB:
When the water in the skin was gone, she left the boy under one of the bushes.
16
LIN
Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki.
BSB
BSB:
Then she went off and sat down nearby, about a bowshot away, for she said, “I cannot bear to watch the boy die!” And as she sat nearby, she lifted up her voice and wept.
17
LIN
Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.
BSB
BSB:
Then God heard the voice of the boy, and the angel of God called to Hagar from heaven, “What is wrong, Hagar? Do not be afraid, for God has heard the voice of the boy where he lies.
18
LIN
Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. »
BSB
BSB:
Get up, lift up the boy, and take him by the hand, for I will make him into a great nation.”
19
LIN
Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana.
BSB
BSB:
Then God opened her eyes, and she saw a well of water. So she went and filled the skin with water and gave the boy a drink.
20
LIN
Nzambe azalaki elongo na mwana. Akolaki, avandaki kati na esobe mpe akomaki mobomi nyama na tolotolo.
BSB
BSB:
And God was with the boy, and he grew up and settled in the wilderness and became a great archer.
21
LIN
Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.
BSB
BSB:
And while he was dwelling in the Wilderness of Paran, his mother got a wife for him from the land of Egypt.
22
LIN
Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami : — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala.
BSB
BSB:
At that time Abimelech and Phicol the commander of his army said to Abraham, “God is with you in all that you do.
23
LIN
Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te ; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo.
BSB
BSB:
Now, therefore, swear to me here before God that you will not deal falsely with me or my children or descendants. Show to me and to the country in which you reside the same kindness that I have shown to you.”
24
LIN
Abrayami azongisaki : — Nalapi ndayi !
BSB
BSB:
And Abraham replied, “I swear it.”
25
LIN
Bongo Abrayami alobelaki Abimeleki na tina na libulu ya mayi oyo basali ya Abimeleki babotolaki na makasi.
BSB
BSB:
But when Abraham complained to Abimelech about a well that Abimelech’s servants had seized,
26
LIN
Abimeleki azongisaki : — Nayebi te nani asalaki bongo. Oyebisaki ngai likambo moko te na tina na yango, mpe nayoki yango kaka lelo.
BSB
BSB:
Abimelech replied, “I do not know who has done this. You did not tell me, so I have not heard about it until today.”
27
LIN
Abrayami azwaki bameme, bantaba, bangombe, mpe apesaki yango na Abimeleki ; bongo bango mibale basalaki boyokani.
BSB
BSB:
So Abraham brought sheep and cattle and gave them to Abimelech, and the two men made a covenant.
28
LIN
Abrayami atiaki pembeni bana meme sambo oyo azwaki kati na etonga.
BSB
BSB:
Abraham separated seven ewe lambs from the flock,
29
LIN
Abimeleki atunaki Abrayami : — Bana meme sambo oyo otie pembeni elakisi nini ?
BSB
BSB:
and Abimelech asked him, “Why have you set apart these seven ewe lambs?”
30
LIN
Azongisaki : — Ndima bana meme sambo oyo ewuti na maboko na ngai lokola litatoli ete ngai nde natimolaki libulu yango.
BSB
BSB:
He replied, “You are to accept the seven ewe lambs from my hand as my witness that I dug this well.”
31
LIN
Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.
BSB
BSB:
So that place was called Beersheba, because it was there that the two of them swore an oath.
32
LIN
Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia.
BSB
BSB:
After they had made the covenant at Beersheba, Abimelech and Phicol the commander of his army got up and returned to the land of the Philistines.
33
LIN
Abrayami alonaki nzete ya tamarisi na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko.
BSB
BSB:
And Abraham planted a tamarisk tree in Beersheba, and there he called upon the name of the LORD, the Eternal God.
34
LIN
Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia.
BSB
BSB:
And Abraham resided in the land of the Philistines for a long time.
Chapter complete
You’ve read Genesis 21
Chapter 21 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 22
Read Genesis 22
Listen
Back to Genesis 20
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 21
A question this chapter raises
Does the Old Testament name or foretell Muhammad?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 20
Genesis 21
Genesis 22