Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.4
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
22
LIN
BSB
A
a
Genesis 22
22
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abraham
, person
Isaac
, person
Nahor
, person
Bethuel
, person
Milcah
, person
Beersheba
, place
Rebekah
, person
Moriah Mount
, place
13 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye : — Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo.
BSB
BSB:
Some time later God tested Abraham and said to him, “Abraham!” “Here I am,” he answered.
2
LIN
Nzambe alobaki na ye : — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo.
BSB
BSB:
“Take your son,” God said, “your only son Isaac, whom you love, and go to the land of Moriah. Offer him there as a burnt offering on one of the mountains, which I will show you.”
3
LIN
Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.
BSB
BSB:
So Abraham got up early the next morning, saddled his donkey, and took along two of his servants and his son Isaac. He split the wood for a burnt offering and set out for the place God had designated.
4
LIN
Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika.
BSB
BSB:
On the third day Abraham looked up and saw the place in the distance.
5
LIN
Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. »
BSB
BSB:
“Stay here with the donkey,” Abraham told his servants. “The boy and I will go over there to worship, and then we will return to you.”
6
LIN
Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye ; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko.
BSB
BSB:
Abraham took the wood for the burnt offering and placed it on his son Isaac. He himself carried the fire and the sacrificial knife, and the two of them walked on together.
7
LIN
Izaki atunaki Abrayami, tata na ye : — Tata na ngai ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo ! Izaki alobaki : — Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba ?
BSB
BSB:
Then Isaac said to his father Abraham, “My father!” “Here I am, my son,” he replied. “The fire and the wood are here,” said Isaac, “but where is the lamb for the burnt offering?”
8
LIN
Abrayami azongisaki : — Mwana na ngai, Ye moko Nzambe akopesa mpate mpo na mbeka ya kotumba. Boye bango mibale bakendeki nzela moko.
BSB
BSB:
Abraham answered, “God Himself will provide the lamb for the burnt offering, my son.” And the two walked on together.
9
LIN
Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.
BSB
BSB:
When they arrived at the place God had designated, Abraham built the altar there and arranged the wood. He bound his son Isaac and placed him on the altar, atop the wood.
10
LIN
Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali.
BSB
BSB:
Then Abraham reached out his hand and took the knife to slaughter his son.
11
LIN
Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo : — Abrayami ! Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo.
BSB
BSB:
Just then the angel of the LORD called out to him from heaven, “Abraham, Abraham!” “Here I am,” he replied.
12
LIN
Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.
BSB
BSB:
“Do not lay a hand on the boy or do anything to him,” said the angel, “for now I know that you fear God, since you have not withheld your only son from me.”
13
LIN
Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali.
BSB
BSB:
Then Abraham looked up and saw behind him a ram in a thicket, caught by its horns. So he went and took the ram and offered it as a burnt offering in place of his son.
14
LIN
Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »
BSB
BSB:
And Abraham called that place The LORD Will Provide. So to this day it is said, “On the mountain of the LORD it will be provided.”
15
LIN
Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo
BSB
BSB:
And the angel of the LORD called to Abraham from heaven a second time,
16
LIN
mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko,
BSB
BSB:
saying, “By Myself I have sworn, declares the LORD, that because you have done this and have not withheld your only son,
17
LIN
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
BSB
BSB:
I will surely bless you, and I will multiply your descendants like the stars in the sky and the sand on the seashore. Your descendants will possess the gates of their enemies.
18
LIN
Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. »
BSB
BSB:
And through your offspring all nations of the earth will be blessed, because you have obeyed My voice.”
19
LIN
Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda.
BSB
BSB:
Abraham went back to his servants, and they got up and set out together for Beersheba. And Abraham settled in Beersheba.
20
LIN
Sima na makambo wana, bayebisaki Abrayami ete Milika mpe abotelaki Naori, ndeko ya Abrayami, bana :
BSB
BSB:
Some time later, Abraham was told, “Milcah has also borne sons to your brother Nahor:
21
LIN
Mwana na ye ya liboso, Utsi ; Buzi, ndeko na ye mobali ; Kemweli, tata ya Arami ;
BSB
BSB:
Uz the firstborn, his brother Buz, Kemuel (the father of Aram),
22
LIN
Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli.
BSB
BSB:
Chesed, Hazo, Pildash, Jidlaph, and Bethuel.”
23
LIN
Betweli azalaki tata ya Rebeka. Milika abotelaki Naori, ndeko mobali ya Abrayami, bana mibali mwambe.
BSB
BSB:
And Bethuel became the father of Rebekah. Milcah bore these eight sons to Abraham’s brother Nahor.
24
LIN
Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana : Teba, Gami, Taashi mpe Maaka.
BSB
BSB:
Moreover, Nahor’s concubine, whose name was Reumah, bore Tebah, Gaham, Tahash, and Maacah.
Chapter complete
You’ve read Genesis 22
Chapter 22 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 23
Read Genesis 23
Listen
Back to Genesis 21
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 22
A question this chapter raises
Why did God tell Abraham to sacrifice Isaac?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 21
Genesis 22
Genesis 23