Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.6
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
23
LIN
BSB
A
a
Genesis 23
23
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abraham
, person
Heth
, person
Ephron
, person
Sarah
, person
Machpelah
, place
Canaan
, place
Hebron
, place
Mamre
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sara awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mibale na sambo.
BSB
BSB:
Now Sarah lived to be 127 years old.
2
LIN
Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.
BSB
BSB:
She died in Kiriath-arba (that is, Hebron) in the land of Canaan, and Abraham went out to mourn and to weep for her.
3
LIN
Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti.
BSB
BSB:
Then Abraham got up from beside his dead wife and said to the Hittites,
4
LIN
Alobaki na bango : — Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino ; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai.
BSB
BSB:
“I am a foreigner and an outsider among you. Give me a burial site among you so that I can bury my dead.”
5
LIN
Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami :
BSB
BSB:
The Hittites replied to Abraham,
6
LIN
— Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.
BSB
BSB:
“Listen to us, sir. You are God’s chosen one among us. Bury your dead in the finest of our tombs. None of us will withhold his tomb for burying your dead.”
7
LIN
Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti.
BSB
BSB:
Then Abraham rose and bowed down before the people of the land, the Hittites.
8
LIN
Ayebisaki bango : — Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari,
BSB
BSB:
“If you are willing for me to bury my dead,” he said to them, “listen to me, and approach Ephron son of Zohar on my behalf
9
LIN
ete atekela ngai libulu na ye ya mabanga oyo ezali na Makipela, na suka ya elanga na ye. Boyebisa ye ete atekela ngai yango na motuya oyo ekoki na yango mpo ete nakomisa yango mabele ya kokunda bato na ngai.
BSB
BSB:
to sell me the cave of Machpelah that belongs to him; it is at the end of his field. Let him sell it to me in your presence for full price, so that I may have a burial site.”
10
LIN
Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye :
BSB
BSB:
Now Ephron was sitting among the sons of Heth. So in the presence of all the Hittites who had come to the gate of his city, Ephron the Hittite answered Abraham,
11
LIN
— Te, nkolo na ngai, yoka ngai ! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo.
BSB
BSB:
“No, my lord. Listen to me. I give you the field, and I give you the cave that is in it. I give it to you in the presence of my people. Bury your dead.”
12
LIN
Abrayami agumbamaki liboso ya bato ya mboka
BSB
BSB:
Again Abraham bowed down before the people of the land
13
LIN
mpe azongiselaki Efroni : — Nabondeli yo, yoka ngai ! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna.
BSB
BSB:
and said to Ephron in their presence, “If you will please listen to me, I will pay you the price of the field. Accept it from me, so that I may bury my dead there.”
14
LIN
Efroni azongiselaki Abrayami :
BSB
BSB:
Ephron answered Abraham,
15
LIN
— Yoka, nkolo na ngai ! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo ? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo.
BSB
BSB:
“Listen to me, my lord. The land is worth four hundred shekels of silver, but what is that between you and me? Bury your dead.”
16
LIN
Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
BSB
BSB:
Abraham agreed to Ephron’s terms and weighed out for him the price he had named in the hearing of the Hittites: four hundred shekels of silver, according to the standard of the merchants.
17
LIN
Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki
BSB
BSB:
So Ephron’s field at Machpelah near Mamre, the cave that was in it, and all the trees within the boundaries of the field were deeded over
18
LIN
epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba.
BSB
BSB:
to Abraham’s possession in the presence of all the Hittites who had come to the gate of his city.
19
LIN
Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana.
BSB
BSB:
After this, Abraham buried his wife Sarah in the cave of the field at Machpelah near Mamre (that is, Hebron) in the land of Canaan.
20
LIN
Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna.
BSB
BSB:
So the field and its cave were deeded by the Hittites to Abraham as a burial site.
Chapter complete
You’ve read Genesis 23
Chapter 23 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 24
Read Genesis 24
Listen
Back to Genesis 22
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 23
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 23
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 22
Genesis 23
Genesis 24