Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
24
LIN
BSB
A
a
Genesis 24
24
Genesis
Abraham
Lingala Bible
Abraham
, person
Rebekah
, person
Isaac
, person
Nahor
, person
Bethuel
, person
Milcah
, person
Sarah
, person
Laban
, person
3 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso.
BSB
BSB:
By now Abraham was old and well along in years, and the LORD had blessed him in every way.
2
LIN
Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso : — Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai
BSB
BSB:
So Abraham instructed the chief servant of his household, who managed all he owned, “Place your hand under my thigh,
3
LIN
mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
BSB
BSB:
and I will have you swear by the LORD, the God of heaven and the God of earth, that you will not take a wife for my son from the daughters of the Canaanites among whom I am dwelling,
4
LIN
Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali.
BSB
BSB:
but will go to my country and my kindred to take a wife for my son Isaac.”
5
LIN
Mosali atunaki ye : — Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta ?
BSB
BSB:
The servant asked him, “What if the woman is unwilling to follow me to this land? Shall I then take your son back to the land from which you came?”
6
LIN
Abrayami alobaki : — Keba na yo ! Kozongisa mwana na ngai kuna te.
BSB
BSB:
Abraham replied, “Make sure that you do not take my son back there.
7
LIN
Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana.
BSB
BSB:
The LORD, the God of heaven, who brought me from my father’s house and my native land, who spoke to me and promised me on oath, saying, ‘To your offspring I will give this land’—He will send His angel before you so that you can take a wife for my son from there.
8
LIN
Soki mwasi yango aboyi na ye kolanda yo, wana okangolami na ndayi oyo nazali kosenga yo kolapa. Kasi komeka kozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te.
BSB
BSB:
And if the woman is unwilling to follow you, then you are released from this oath of mine. Only do not take my son back there.”
9
LIN
Boye, mosali atiaki loboko na se ya mopende ya Abrayami, nkolo na ye, alapaki ndayi ya kosala makambo yango.
BSB
BSB:
So the servant placed his hand under the thigh of his master Abraham and swore an oath to him concerning this matter.
10
LIN
Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.
BSB
BSB:
Then the servant took ten of his master’s camels and departed with all manner of good things from his master in hand. And he set out for Nahor’s hometown in Aram-naharaim.
11
LIN
Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.
BSB
BSB:
As evening approached, he made the camels kneel down near the well outside the town at the time when the women went out to draw water.
12
LIN
Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai.
BSB
BSB:
“O LORD, God of my master Abraham,” he prayed, “please grant me success today, and show kindness to my master Abraham.
13
LIN
Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi.
BSB
BSB:
Here I am, standing beside the spring, and the daughters of the townspeople are coming out to draw water.
14
LIN
Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. »
BSB
BSB:
Now may it happen that the girl to whom I say, ‘Please let down your jar that I may drink,’ and who responds, ‘Drink, and I will water your camels as well’—let her be the one You have appointed for Your servant Isaac. By this I will know that You have shown kindness to my master.”
15
LIN
Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.
BSB
BSB:
Before the servant had finished praying, Rebekah came out with her jar on her shoulder. She was the daughter of Bethuel son of Milcah, the wife of Abraham’s brother Nahor.
16
LIN
Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki.
BSB
BSB:
Now the girl was very beautiful, a virgin who had not had relations with any man. She went down to the spring, filled her jar, and came up again.
17
LIN
Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo.
BSB
BSB:
So the servant ran to meet her and said, “Please let me have a little water from your jar.”
18
LIN
Mwana mwasi alobaki : — Mela na yo, nkolo na ngai ! Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela.
BSB
BSB:
“Drink, my lord,” she replied, and she quickly lowered her jar to her hands and gave him a drink.
19
LIN
Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki : — Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela.
BSB
BSB:
After she had given him a drink, she said, “I will also draw water for your camels, until they have had enough to drink.”
20
LIN
Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi ; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso.
BSB
BSB:
And she quickly emptied her jar into the trough and ran back to the well to draw water, until she had drawn water for all his camels.
21
LIN
Mosali azalaki kotala ye na bokebi, alobaki eloko moko te mpo na koyeba soki Yawe alongisi mobembo na ye to te.
BSB
BSB:
Meanwhile, the man watched her silently to see whether or not the LORD had made his journey a success.
22
LIN
Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo : moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko.
BSB
BSB:
And after the camels had finished drinking, he took out a gold ring weighing a beka, and two gold bracelets for her wrists weighing ten shekels.
23
LIN
Atunaki ye : — Ozali mwana mwasi ya nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu ?
BSB
BSB:
“Whose daughter are you?” he asked. “Please tell me, is there room in your father’s house for us to spend the night?”
24
LIN
Azongiselaki ye : — Nazali mwana ya Betweli, mwana mobali ya Milika mpe Naori.
BSB
BSB:
She replied, “I am the daughter of Bethuel, the son that Milcah bore to Nahor.”
25
LIN
Abakisaki : — Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele ; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu.
BSB
BSB:
Then she added, “We have plenty of straw and feed, as well as a place for you to spend the night.”
26
LIN
Boye, mosali akitisaki moto na ye na se mpe agumbamelaki Yawe.
BSB
BSB:
Then the man bowed down and worshiped the LORD,
27
LIN
Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »
BSB
BSB:
saying, “Blessed be the LORD, the God of my master Abraham, who has not withheld His kindness and faithfulness from my master. As for me, the LORD has led me on the journey to the house of my master’s relatives.”
28
LIN
Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki.
BSB
BSB:
The girl ran and told her mother’s household about these things.
29
LIN
Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi.
BSB
BSB:
Now Rebekah had a brother named Laban, and he rushed out to the man at the spring.
30
LIN
Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi.
BSB
BSB:
As soon as he saw the ring, and the bracelets on his sister’s wrists, and heard Rebekah’s words, “The man said this to me,” he went and found the man standing by the camels near the spring.
31
LIN
Alobaki : « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda ? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. »
BSB
BSB:
“Come, you who are blessed by the LORD,” said Laban. “Why are you standing out here? I have prepared the house and a place for the camels.”
32
LIN
Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo.
BSB
BSB:
So the man came to the house, and the camels were unloaded. Straw and feed were brought to the camels, and water to wash his feet and the feet of his companions.
33
LIN
Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki : — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. Labani alobaki na ye : — Yebisa biso makambo yango.
BSB
BSB:
Then a meal was set before the man, but he said, “I will not eat until I have told you what I came to say.” So Laban said, “Please speak.”
34
LIN
Azongisaki : — Nazali mosali ya Abrayami.
BSB
BSB:
“I am Abraham’s servant,” he replied.
35
LIN
Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.
BSB
BSB:
“The LORD has greatly blessed my master, and he has become rich. He has given him sheep and cattle, silver and gold, menservants and maidservants, camels and donkeys.
36
LIN
Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango.
BSB
BSB:
My master’s wife Sarah has borne him a son in her old age, and my master has given him everything he owns.
37
LIN
Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo : « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te.
BSB
BSB:
My master made me swear an oath and said, ‘You shall not take a wife for my son from the daughters of the Canaanites in whose land I dwell,
38
LIN
Kasi okokende na libota ya tata na ngai mpe na ekolo na ngai, kuna nde okozwa mwasi mpo na mwana na ngai ya mobali. »
BSB
BSB:
but you shall go to my father’s house and to my kindred to take a wife for my son.’
39
LIN
Nazongiselaki nkolo na ngai : « Tango mosusu, mwasi yango akolinga na ye kolanda ngai te. »
BSB
BSB:
Then I asked my master, ‘What if the woman will not come back with me?’
40
LIN
Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai.
BSB
BSB:
And he told me, ‘The LORD, before whom I have walked, will send His angel with you and make your journey a success, so that you may take a wife for my son from my kindred and from my father’s house.
41
LIN
Boye tango okokende na ekolo na ngai, soki baboyi kopesa yo ye, okozala na ngambo te na ndayi oyo nalapisi yo. »
BSB
BSB:
And when you go to my kindred, if they refuse to give her to you, then you will be released from my oath.’
42
LIN
Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai.
BSB
BSB:
So when I came to the spring today, I prayed: O LORD, God of my master Abraham, if only You would make my journey a success!
43
LIN
Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? ›
BSB
BSB:
Here I am, standing beside this spring. Now if a maiden comes out to draw water and I say to her, ‘Please let me drink a little water from your jar,’
44
LIN
Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. »
BSB
BSB:
and she replies, ‘Drink, and I will draw water for your camels as well,’ may she be the woman the LORD has appointed for my master’s son.
45
LIN
Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. »
BSB
BSB:
And before I had finished praying in my heart, there was Rebekah coming out with her jar on her shoulder, and she went down to the spring and drew water. So I said to her, ‘Please give me a drink.’
46
LIN
Akitisaki mbangu mbeki na ye wuta na lipeka na ye mpe alobaki : « Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo. » Boye namelaki mayi, mpe amelisaki lisusu bashamo mayi.
BSB
BSB:
She quickly lowered her jar from her shoulder and said, ‘Drink, and I will water your camels as well.’ So I drank, and she also watered the camels.
47
LIN
Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye.
BSB
BSB:
Then I asked her, ‘Whose daughter are you?’ She replied, ‘The daughter of Bethuel son of Nahor, whom Milcah bore to him.’ So I put the ring on her nose and the bracelets on her wrists.
48
LIN
Nakitisaki elongi na se mpe nagumbamelaki Yawe ; nakumisaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, oyo atambolisaki ngai na nzela ya sembo mpo na kozwela mwana na ye ya mobali mwana mwasi ya ndeko ya nkolo na ngai.
BSB
BSB:
Then I bowed down and worshiped the LORD; and I blessed the LORD, the God of my master Abraham, who led me on the right road to take the granddaughter of my master’s brother for his son.
49
LIN
Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu.
BSB
BSB:
Now if you will show kindness and faithfulness to my master, tell me; but if not, let me know, so that I may go elsewhere.”
50
LIN
Labani mpe Betweli bazongisaki : — Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo.
BSB
BSB:
Laban and Bethuel answered, “This is from the LORD; we have no choice in the matter.
51
LIN
Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi.
BSB
BSB:
Rebekah is here before you. Take her and go, and let her become the wife of your master’s son, just as the LORD has decreed.”
52
LIN
Tango mosali ya Abrayami ayokaki makambo oyo bayebisaki ye, akitisaki elongi na ye kino na se liboso ya Yawe.
BSB
BSB:
When Abraham’s servant heard their words, he bowed down to the ground before the LORD.
53
LIN
Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye.
BSB
BSB:
Then he brought out jewels of silver and gold, and articles of clothing, and he gave them to Rebekah. He also gave precious gifts to her brother and her mother.
54
LIN
Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana. Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango : — Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
BSB
BSB:
Then he and the men with him ate and drank and spent the night there. When they got up the next morning, he said, “Send me on my way to my master.”
55
LIN
Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki : — Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende.
BSB
BSB:
But her brother and mother said, “Let the girl remain with us ten days or so. After that, she may go.”
56
LIN
Kasi alobaki na bango : — Bowumisa ngai te, pamba te Yawe alongisi mobembo na ngai ; botika ngai kokende mpo ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
BSB
BSB:
But he replied, “Do not delay me, since the LORD has made my journey a success. Send me on my way so that I may go to my master.”
57
LIN
Balobaki na ye : — Tika ete tobenga elenge mwasi mpe totuna posa na ye.
BSB
BSB:
So they said, “We will call the girl and ask her opinion.”
58
LIN
Babengaki Rebeka mpe batunaki ye : — Ondimi solo kokende na mobali oyo ? Rebeka azongisaki : — Iyo, nandimi.
BSB
BSB:
They called Rebekah and asked her, “Will you go with this man?” “I will go,” she replied.
59
LIN
Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye.
BSB
BSB:
So they sent their sister Rebekah on her way, along with her nurse and Abraham’s servant and his men.
60
LIN
Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »
BSB
BSB:
And they blessed Rebekah and said to her, “Our sister, may you become the mother of thousands upon thousands. May your offspring possess the gates of their enemies.”
61
LIN
Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko.
BSB
BSB:
Then Rebekah and her servant girls got ready, mounted the camels, and followed the man. So the servant took Rebekah and left.
62
LIN
Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.
BSB
BSB:
Now Isaac had just returned from Beer-lahai-roi, for he was living in the Negev.
63
LIN
Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki.
BSB
BSB:
Early in the evening, Isaac went out to the field to meditate, and looking up, he saw the camels approaching.
64
LIN
Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye.
BSB
BSB:
And when Rebekah looked up and saw Isaac, she got down from her camel
65
LIN
Atunaki mosali ya Abrayami : — Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso ; azali nani ? Mosali ya Abrayami azongisaki : — Azali nkolo na ngai. Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi.
BSB
BSB:
and asked the servant, “Who is that man in the field coming to meet us?” “It is my master,” the servant answered. So she took her veil and covered herself.
66
LIN
Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki.
BSB
BSB:
Then the servant told Isaac all that he had done.
67
LIN
Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.
BSB
BSB:
And Isaac brought her into the tent of his mother Sarah and took Rebekah as his wife. And Isaac loved her and was comforted after his mother’s death.
Chapter complete
You’ve read Genesis 24
Chapter 24 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 25
Read Genesis 25
Listen
Back to Genesis 23
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 24
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 24
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 23
Genesis 24
Genesis 25