Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
27
LIN
BSB
A
a
Genesis 27
27
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Esau
, person
Jacob
, person
Isaac
, person
Rebekah
, person
Laban
, person
Haran
, place
Heth
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye : — Mwana na ngai ! Ezawu azongisaki : — Ngai oyo !
BSB
BSB:
When Isaac was old and his eyes were so weak that he could no longer see, he called his older son Esau and said to him, “My son.” “Here I am,” Esau replied.
2
LIN
Izaki alobaki : — Nakomi mobange mpe nayebi mokolo ya kufa na ngai te.
BSB
BSB:
“Look,” said Isaac, “I am now old, and I do not know the day of my death.
3
LIN
Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo ; kende na zamba mpe bomela ngai nyama.
BSB
BSB:
Take your weapons—your quiver and bow—and go out into the field to hunt some game for me.
4
LIN
Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.
BSB
BSB:
Then prepare a tasty dish that I love and bring it to me to eat, so that I may bless you before I die.”
5
LIN
Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango,
BSB
BSB:
Now Rebekah was listening to what Isaac told his son Esau. So when Esau went into the field to hunt game and bring it back,
6
LIN
Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale : — Tala, nayokaki tata na yo koyebisa Ezawu, ndeko na yo :
BSB
BSB:
Rebekah said to her son Jacob, “Behold, I overheard your father saying to your brother Esau,
7
LIN
« Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. »
BSB
BSB:
‘Bring me some game and prepare me a tasty dish to eat, so that I may bless you in the presence of the LORD before I die.’
8
LIN
Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo :
BSB
BSB:
Now, my son, listen to my voice and do exactly as I tell you.
9
LIN
Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka.
BSB
BSB:
Go out to the flock and bring me two choice young goats, so that I can make them into a tasty dish for your father—the kind he loves.
10
LIN
Bongo, okomemela yango tata na yo ; akolia yango mpo ete apambola yo liboso ete akufa.
BSB
BSB:
Then take it to your father to eat, so that he may bless you before he dies.”
11
LIN
Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye : — Ezawu, ndeko na ngai, azali na bapwale ebele na nzoto, kasi ngai nazali na yango te.
BSB
BSB:
Jacob answered his mother Rebekah, “Look, my brother Esau is a hairy man, but I am smooth-skinned.
12
LIN
Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye ; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama.
BSB
BSB:
What if my father touches me? Then I would be revealed to him as a deceiver, and I would bring upon myself a curse rather than a blessing.”
13
LIN
Mama na ye alobaki : — Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai ; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo.
BSB
BSB:
His mother replied, “Your curse be on me, my son. Just obey my voice and go get them for me.”
14
LIN
Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.
BSB
BSB:
So Jacob went and got two goats and brought them to his mother, who made the tasty food his father loved.
15
LIN
Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.
BSB
BSB:
And Rebekah took the finest clothes in the house that belonged to her older son Esau, and she put them on her younger son Jacob.
16
LIN
Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba.
BSB
BSB:
She also put the skins of the young goats on his hands and on the smooth part of his neck.
17
LIN
Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.
BSB
BSB:
Then she handed her son Jacob the tasty food and bread she had made.
18
LIN
Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : — Tata na ngai ! Izaki azongisaki : — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ?
BSB
BSB:
So Jacob went to his father and said, “My father.” “Here I am!” he answered. “Which one are you, my son?”
19
LIN
Jakobi alobaki na tata na ye : — Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai.
BSB
BSB:
Jacob said to his father, “I am Esau, your firstborn. I have done as you told me. Please sit up and eat some of my game, so that you may bless me.”
20
LIN
Izaki atunaki mwana na ye : — Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki ? Jakobi azongisaki : — Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai.
BSB
BSB:
But Isaac asked his son, “How did you ever find it so quickly, my son?” “Because the LORD your God brought it to me,” he replied.
21
LIN
Izaki alobaki na Jakobi : — Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu.
BSB
BSB:
Then Isaac said to Jacob, “Please come closer so I can touch you, my son. Are you really my son Esau, or not?”
22
LIN
Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki : — Mongongo ezali ya Jakobi, kasi maboko ezali ya Ezawu.
BSB
BSB:
So Jacob came close to his father Isaac, who touched him and said, “The voice is the voice of Jacob, but the hands are the hands of Esau.”
23
LIN
Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye ; boye apambolaki ye.
BSB
BSB:
Isaac did not recognize him, because his hands were hairy like those of his brother Esau; so he blessed him.
24
LIN
Kasi liboso, atunaki ye : — Ozali penza mwana na ngai Ezawu ? Jakobi azongisaki : — Iyo, ezali ngai solo.
BSB
BSB:
Again he asked, “Are you really my son Esau?” And he replied, “I am.”
25
LIN
Izaki alobaki : — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
BSB
BSB:
“Serve me,” said Isaac, “and let me eat some of my son’s game, so that I may bless you.” Jacob brought it to him, and he ate; then he brought him wine, and he drank.
26
LIN
Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Mwana na ngai, yaka awa mpe pesa ngai beze.
BSB
BSB:
Then his father Isaac said to him, “Please come near and kiss me, my son.”
27
LIN
Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
BSB
BSB:
So he came near and kissed him. When Isaac smelled his clothing, he blessed him and said: “Ah, the smell of my son is like the smell of a field that the LORD has blessed.
28
LIN
Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ; apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza !
BSB
BSB:
May God give to you the dew of heaven and the richness of the earth—an abundance of grain and new wine.
29
LIN
Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »
BSB
BSB:
May peoples serve you and nations bow down to you. May you be the master of your brothers, and may the sons of your mother bow down to you. May those who curse you be cursed, and those who bless you be blessed.”
30
LIN
Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.
BSB
BSB:
As soon as Isaac had finished blessing him and Jacob had left his father’s presence, his brother Esau returned from the hunt.
31
LIN
Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye : — Tata na ngai, telema mpe lia nyama na ngai mpo ete opambola ngai.
BSB
BSB:
He too made some tasty food, brought it to his father, and said to him, “My father, sit up and eat of your son’s game, so that you may bless me.”
32
LIN
Tata na ye, Izaki, atunaki ye : — Yo nani ? Azongisaki : — Ngai Ezawu, mwana na yo ya liboso.
BSB
BSB:
But his father Isaac replied, “Who are you?” “I am Esau, your firstborn son,” he answered.
33
LIN
Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki : — Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango ? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo !
BSB
BSB:
Isaac began to tremble violently and said, “Who was it, then, who hunted the game and brought it to me? Before you came in, I ate it all and blessed him—and indeed, he will be blessed!”
34
LIN
Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye : — Ah ! Tata na ngai, pambola ngai, pambola ngai mpe lokola !
BSB
BSB:
When Esau heard his father’s words, he let out a loud and bitter cry and said to his father, “Bless me too, O my father!”
35
LIN
Izaki alobaki : — Ndeko na yo ayaki na mayele mabe, ayibi mapamboli na yo.
BSB
BSB:
But Isaac replied, “Your brother came deceitfully and took your blessing.”
36
LIN
Ezawu alobaki : — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai ! Bongo atunaki : — Boni, obombelaki ngai mapamboli te ?
BSB
BSB:
So Esau declared, “Is he not rightly named Jacob? For he has cheated me twice. He took my birthright, and now he has taken my blessing.” Then he asked, “Haven’t you saved a blessing for me?”
37
LIN
Izaki azongiselaki Ezawu : — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ?
BSB
BSB:
But Isaac answered Esau: “Look, I have made him your master and given him all his relatives as servants; I have sustained him with grain and new wine. What is left that I can do for you, my son?”
38
LIN
Ezawu alobaki na tata na ye : — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana ? Tata na ngai, pambola ngai mpe ! Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi.
BSB
BSB:
Esau said to his father, “Do you have only one blessing, my father? Bless me too, O my father!” Then Esau wept aloud.
39
LIN
Tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, mpe mosika ya mvula ya likolo.
BSB
BSB:
His father Isaac answered him: “Behold, your dwelling place shall be away from the richness of the land, away from the dew of heaven above.
40
LIN
Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.
BSB
BSB:
You shall live by the sword and serve your brother. But when you rebel, you will tear his yoke from your neck.”
41
LIN
Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki : « Etikali moke tata na ngai akufa ; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. »
BSB
BSB:
Esau held a grudge against Jacob because of the blessing his father had given him. And Esau said in his heart, “The days of mourning for my father are at hand; then I will kill my brother Jacob.”
42
LIN
Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo.
BSB
BSB:
When the words of her older son Esau were relayed to Rebekah, she sent for her younger son Jacob and told him, “Look, your brother Esau is consoling himself by plotting to kill you.
43
LIN
Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.
BSB
BSB:
So now, my son, obey my voice and flee at once to my brother Laban in Haran.
44
LIN
Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila.
BSB
BSB:
Stay with him for a while, until your brother’s fury subsides—
45
LIN
Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › »
BSB
BSB:
until your brother’s rage against you wanes and he forgets what you have done to him. Then I will send for you and bring you back from there. Why should I lose both of you in one day?”
46
LIN
Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »
BSB
BSB:
Then Rebekah said to Isaac, “I am weary of my life because of these Hittite women. If Jacob takes a Hittite wife from among them, what good is my life?”
Chapter complete
You’ve read Genesis 27
Chapter 27 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 28
Read Genesis 28
Listen
Back to Genesis 26
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 27
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 27
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 26
Genesis 27
Genesis 28