Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
28
LIN
BSB
A
a
Genesis 28
28
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Jacob
, person
Isaac
, person
Esau
, person
Paddan-aram
, place
Abraham
, person
Canaan
, place
Laban
, person
Bethuel
, person
7 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Bongo Izaki abengaki Jakobi, apambolaki ye mpe apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana.
BSB
BSB:
So Isaac called for Jacob and blessed him. “Do not take a wife from the Canaanite women,” he commanded.
2
LIN
Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
BSB
BSB:
“Go at once to Paddan-aram, to the house of your mother’s father Bethuel, and take a wife from among the daughters of Laban, your mother’s brother.
3
LIN
Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato.
BSB
BSB:
May God Almighty bless you and make you fruitful and multiply you, so that you may become a company of peoples.
4
LIN
Tika ete apesa na yo mpe na bakitani na yo lipamboli oyo apesaki na Abrayami mpo ete okamata mokili oyo ozali kovanda lokola mopaya, mokili oyo Nzambe apesaki na Abrayami. »
BSB
BSB:
And may He give the blessing of Abraham to you and your descendants, so that you may possess the land where you dwell as a foreigner, the land God gave to Abraham.”
5
LIN
Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
BSB
BSB:
So Isaac sent Jacob to Paddan-aram, to Laban son of Bethuel the Aramean, the brother of Rebekah, who was the mother of Jacob and Esau.
6
LIN
Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »
BSB
BSB:
Now Esau learned that Isaac had blessed Jacob and sent him to Paddan-aram to take a wife there, commanding him, “Do not marry a Canaanite woman,”
7
LIN
Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami.
BSB
BSB:
and that Jacob had obeyed his father and mother and gone to Paddan-aram.
8
LIN
Bongo Ezawu asosolaki ete Izaki, tata na ye, azalaki kosepela te na bana basi ya Kanana.
BSB
BSB:
And seeing that his father Isaac disapproved of the Canaanite women,
9
LIN
Boye Ezawu akendeki epai ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, mpe abalaki, kobakisa na basi oyo azalaki na bango, Maalati, ndeko mwasi ya Nebayoti.
BSB
BSB:
Esau went to Ishmael and married Mahalath, the sister of Nebaioth and daughter of Abraham’s son Ishmael, in addition to the wives he already had.
10
LIN
Jakobi alongwaki na Beri-Sheba mpe akendeki na Arani.
BSB
BSB:
Meanwhile Jacob left Beersheba and set out for Haran.
11
LIN
Tango akomaki na esika moko, apemaki mpo na kolekisa butu. Azwaki libanga moko kati na mabanga oyo ezalaki na esika yango, atiaki yango na se ya moto na ye mpe alalaki.
BSB
BSB:
On reaching a certain place, he spent the night there because the sun had set. And taking one of the stones from that place, he put it under his head and lay down to sleep.
12
LIN
Na se ya pongi, alotaki ndoto : Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango.
BSB
BSB:
And Jacob had a dream about a ladder that rested on the earth with its top reaching up to heaven, and God’s angels were going up and down the ladder.
13
LIN
Mpe Yawe atelemaki likolo ya ematelo mpe alobaki na ye : « Nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abrayami mpe Nzambe ya Izaki. Nakopesa epai na yo mpe na bana na yo mabele oyo, esika olali.
BSB
BSB:
And there at the top the LORD was standing and saying, “I am the LORD, the God of your father Abraham and the God of Isaac. I will give you and your descendants the land on which you now lie.
14
LIN
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
BSB
BSB:
Your descendants will be like the dust of the earth, and you will spread out to the west and east and north and south. All the families of the earth will be blessed through you and your offspring.
15
LIN
Nazali elongo na yo, nakobatela yo bisika nyonso oyo okokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, nakotika yo te kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo. »
BSB
BSB:
Look, I am with you, and I will watch over you wherever you go, and I will bring you back to this land. For I will not leave you until I have done what I have promised you.”
16
LIN
Tango Jakobi alamukaki na pongi, alobaki : « Ya solo penza, Yawe azali na esika oyo mpe ngai nayebaki yango te ! »
BSB
BSB:
When Jacob woke up, he said, “Surely the LORD is in this place, and I was unaware of it.”
17
LIN
Jakobi abangaki mpe abakisaki : « Oyo esika ya somo boye ! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola. »
BSB
BSB:
And he was afraid and said, “How awesome is this place! This is none other than the house of God; this is the gate of heaven!”
18
LIN
Na tongo-tongo, Jakobi azwaki libanga oyo atiaki moto, atelemisaki yango lokola elembo mpe asopaki mafuta na songe na yango.
BSB
BSB:
Early the next morning, Jacob took the stone that he had placed under his head, and he set it up as a pillar. He poured oil on top of it,
19
LIN
Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. »
BSB
BSB:
and he called that place Bethel, though previously the city had been named Luz.
20
LIN
Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba : « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata ;
BSB
BSB:
Then Jacob made a vow, saying, “If God will be with me and watch over me on this journey, and if He will provide me with food to eat and clothes to wear,
21
LIN
soki nazongi na kimia na ndako ya tata na ngai, wana Yawe akozala Nzambe na ngai,
BSB
BSB:
so that I may return safely to my father’s house, then the LORD will be my God.
22
LIN
libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »
BSB
BSB:
And this stone I have set up as a pillar will be God’s house, and of all that You give me I will surely give You a tenth.”
Chapter complete
You’ve read Genesis 28
Chapter 28 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 29
Read Genesis 29
Listen
Back to Genesis 27
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 28
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 28
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 27
Genesis 28
Genesis 29