Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
29
LIN
BSB
A
a
Genesis 29
29
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Rachel
, person
Laban
, person
Jacob
, person
Leah
, person
Judah
, person
Levi
, person
Reuben
, person
Simeon
, person
5 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este.
BSB
BSB:
Jacob resumed his journey and came to the land of the people of the east.
2
LIN
Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.
BSB
BSB:
He looked and saw a well in the field, and near it lay three flocks of sheep, because the sheep were watered from this well. And a large stone covered the mouth of the well.
3
LIN
Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu.
BSB
BSB:
When all the flocks had been gathered there, the shepherds would roll away the stone from the mouth of the well and water the sheep. Then they would return the stone to its place over the mouth of the well.
4
LIN
Jakobi atunaki babateli bibwele : — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na Arani.
BSB
BSB:
“My brothers,” Jacob asked the shepherds, “where are you from?” “We are from Haran,” they answered.
5
LIN
Atunaki bango lisusu : — Boyebi Labani, koko ya Naori ? Bazongisaki : — Iyo, toyebi ye.
BSB
BSB:
“Do you know Laban the grandson of Nahor?” Jacob asked. “We know him,” they replied.
6
LIN
Jakobi abakisaki lisusu : — Boni, azali malamu ? Bazongisaki : — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme.
BSB
BSB:
“Is he well?” Jacob inquired. “Yes,” they answered, “and here comes his daughter Rachel with his sheep.”
7
LIN
Kasi Jakobi alobaki : — Tala, moyi ezali nanu makasi ; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti.
BSB
BSB:
“Look,” said Jacob, “it is still broad daylight; it is not yet time to gather the livestock. Water the sheep and take them back to pasture.”
8
LIN
Bazongisaki : — Tokoki kosala yango kaka soki bibwele nyonso esangani ; bongo tokolongola libanga na monoko ya libulu mpe tokomelisa bameme mayi.
BSB
BSB:
But they replied, “We cannot, until all the flocks have been gathered and the stone has been rolled away from the mouth of the well. Then we will water the sheep.”
9
LIN
Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele.
BSB
BSB:
While he was still speaking with them, Rachel arrived with her father’s sheep, for she was a shepherdess.
10
LIN
Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi.
BSB
BSB:
As soon as Jacob saw Rachel, the daughter of his mother’s brother Laban, with Laban’s sheep, he went up and rolled the stone away from the mouth of the well and watered his uncle’s sheep.
11
LIN
Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi.
BSB
BSB:
Then Jacob kissed Rachel and wept aloud.
12
LIN
Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye.
BSB
BSB:
He told Rachel that he was Rebekah’s son, a relative of her father, and she ran and told her father.
13
LIN
Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki.
BSB
BSB:
When Laban heard the news about his sister’s son Jacob, he ran out to meet him. He embraced him and kissed him and brought him to his home, where Jacob told him all that had happened.
14
LIN
Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.
BSB
BSB:
Then Laban declared, “You are indeed my own flesh and blood.” After Jacob had stayed with him a month,
15
LIN
Labani alobaki na Jakobi : — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ?
BSB
BSB:
Laban said to him, “Just because you are my relative, should you work for nothing? Tell me what your wages should be.”
16
LIN
Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli.
BSB
BSB:
Now Laban had two daughters; the older was named Leah, and the younger was named Rachel.
17
LIN
Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.
BSB
BSB:
Leah had weak eyes, but Rachel was shapely and beautiful.
18
LIN
Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki : — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai.
BSB
BSB:
Since Jacob loved Rachel, he answered, “I will serve you seven years for your younger daughter Rachel.”
19
LIN
Labani alobaki : — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai.
BSB
BSB:
Laban replied, “Better that I give her to you than to another. Stay here with me.”
20
LIN
Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli.
BSB
BSB:
So Jacob served seven years for Rachel, yet it seemed but a few days because of his love for her.
21
LIN
Sima, Jakobi alobaki na Labani : — Mikolo na ngai ekoki ; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye.
BSB
BSB:
Finally Jacob said to Laban, “Grant me my wife, for my time is complete, and I want to sleep with her.”
22
LIN
Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti.
BSB
BSB:
So Laban invited all the men of that place and prepared a feast.
23
LIN
Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto.
BSB
BSB:
But when evening came, Laban took his daughter Leah and gave her to Jacob, and he slept with her.
24
LIN
Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
BSB
BSB:
And Laban gave his servant girl Zilpah to his daughter Leah as her maidservant.
25
LIN
Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani : — Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ?
BSB
BSB:
When morning came, there was Leah! “What have you done to me?” Jacob said to Laban. “Wasn’t it for Rachel that I served you? Why have you deceived me?”
26
LIN
Labani azongisaki : — Na bokoko na biso awa, topesaka te leki na libala liboso ya kulutu.
BSB
BSB:
Laban replied, “It is not our custom here to give the younger daughter in marriage before the older.
27
LIN
Silisa nanu poso ya babalani elongo na ye. Bongo sima, oyo ya leki mpe akopesamela yo soki osaleli ngai lisusu mibu sambo.
BSB
BSB:
Finish this week’s celebration, and we will give you the younger one in return for another seven years of work.”
28
LIN
Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye.
BSB
BSB:
And Jacob did just that. He finished the week’s celebration, and Laban gave him his daughter Rachel as his wife.
29
LIN
Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
BSB
BSB:
Laban also gave his servant girl Bilhah to his daughter Rachel as her maidservant.
30
LIN
Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo.
BSB
BSB:
Jacob slept with Rachel as well, and indeed, he loved Rachel more than Leah. So he worked for Laban another seven years.
31
LIN
Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te.
BSB
BSB:
When the LORD saw that Leah was unloved, He opened her womb; but Rachel was barren.
32
LIN
Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. »
BSB
BSB:
And Leah conceived and gave birth to a son, and she named him Reuben, for she said, “The LORD has seen my affliction. Surely my husband will love me now.”
33
LIN
Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. »
BSB
BSB:
Again she conceived and gave birth to a son, and she said, “Because the LORD has heard that I am unloved, He has given me this son as well.” So she named him Simeon.
34
LIN
Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. »
BSB
BSB:
Once again Leah conceived and gave birth to a son, and she said, “Now at last my husband will become attached to me, because I have borne him three sons.” So he was named Levi.
35
LIN
Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.
BSB
BSB:
And once more she conceived and gave birth to a son and said, “This time I will praise the LORD.” So she named him Judah. Then Leah stopped having children.
Chapter complete
You’ve read Genesis 29
Chapter 29 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 30
Read Genesis 30
Listen
Back to Genesis 28
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 29
A question this chapter raises
Did Jesus really tell us to hate our parents?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 28
Genesis 29
Genesis 30