Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
30
LIN
BSB
A
a
Genesis 30
30
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Jacob
, person
Leah
, person
Rachel
, person
Laban
, person
Bilhah
, person
Zilpah
, person
Joseph
, person
Reuben
, person
7 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
BSB
BSB:
When Rachel saw that she was not bearing any children for Jacob, she envied her sister. “Give me children, or I will die!” she said to Jacob.
2
LIN
Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ?
BSB
BSB:
Jacob became angry with Rachel and said, “Am I in the place of God, who has withheld children from you?”
3
LIN
Rasheli alobaki : — Tala Bila, mwasi mowumbu na ngai ; sangisa na ye nzoto mpo ete abotela ngai bana, mpe na nzela na ye, ngai mpe nakoka kotonga libota.
BSB
BSB:
Then she said, “Here is my maidservant Bilhah. Sleep with her, that she may bear children for me, so that through her I too can build a family.”
4
LIN
Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto,
BSB
BSB:
So Rachel gave Jacob her servant Bilhah as a wife, and he slept with her,
5
LIN
mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali.
BSB
BSB:
and Bilhah conceived and bore him a son.
6
LIN
Rasheli alobaki : « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. »
BSB
BSB:
Then Rachel said, “God has vindicated me; He has heard my plea and given me a son.” So she named him Dan.
7
LIN
Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
BSB
BSB:
And Rachel’s servant Bilhah conceived again and bore Jacob a second son.
8
LIN
Rasheli alobaki : « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. »
BSB
BSB:
Then Rachel said, “In my great struggles, I have wrestled with my sister and won.” So she named him Naphtali.
9
LIN
Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye.
BSB
BSB:
When Leah saw that she had stopped having children, she gave her servant Zilpah to Jacob as a wife.
10
LIN
Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali.
BSB
BSB:
And Leah’s servant Zilpah bore Jacob a son.
11
LIN
Lea alobaki : « Oyo nde esengo ! » Boye apesaki ye kombo « Gadi. »
BSB
BSB:
Then Leah said, “How fortunate!” So she named him Gad.
12
LIN
Sima na yango, Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
BSB
BSB:
When Leah’s servant Zilpah bore Jacob a second son,
13
LIN
Lea alobaki : « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango ! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. »
BSB
BSB:
Leah said, “How happy I am! For the women call me happy.” So she named him Asher.
14
LIN
Na eleko ya kokata ble, Ribeni akendeki na bilanga mpe amonaki bambuma ya mandragore ; amemelaki yango Lea, mama na ye. Bongo Rasheli alobaki na Lea : — Nabondeli yo, pesa ngai ndambo ya bambuma ya mandragore oyo mwana na yo amemaki.
BSB
BSB:
Now during the wheat harvest, Reuben went out and found some mandrakes in the field. When he brought them to his mother, Rachel begged Leah, “Please give me some of your son’s mandrakes.”
15
LIN
Kasi Lea azongiselaki ye : — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te ? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai ? Rasheli alobaki na ye : — Malamu ! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo.
BSB
BSB:
But Leah replied, “Is it not enough that you have taken away my husband? Now you want to take my son’s mandrakes as well?” “Very well,” said Rachel, “he may sleep with you tonight in exchange for your son’s mandrakes.”
16
LIN
Na pokwa, wana Jakobi awutaki bilanga, Lea akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : « Okolala epai na ngai, pamba te napesi bambuma ya mandragore ya mwana na ngai mpo na yo. » Boye Jakobi asangisaki na ye nzoto na butu wana.
BSB
BSB:
When Jacob came in from the field that evening, Leah went out to meet him and said, “You must come with me, for I have hired you with my son’s mandrakes.” So he slept with her that night.
17
LIN
Nzambe ayokelaki Lea mawa, akomaki na zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mitano.
BSB
BSB:
And God listened to Leah, and she conceived and bore a fifth son to Jacob.
18
LIN
Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai lifuti na ngai lokola napesaki mosali na ngai ya mwasi epai ya mobali na ngai. » Boye apesaki ye kombo « Isakari. »
BSB
BSB:
Then Leah said, “God has rewarded me for giving my maidservant to my husband.” So she named him Issachar.
19
LIN
Lea azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya motoba.
BSB
BSB:
Again Leah conceived and bore a sixth son to Jacob.
20
LIN
Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai likabo ya motuya. Sik’oyo, mobali na ngai akopesa ngai lokumu mpo ete naboteli ye bana mibali motoba. » Boye apesaki ye kombo « Zabuloni. »
BSB
BSB:
“God has given me a good gift,” she said. “This time my husband will honor me, because I have borne him six sons.” And she named him Zebulun.
21
LIN
Sima na mikolo, abotaki lisusu mwana mwasi mpe apesaki ye kombo « Dina. »
BSB
BSB:
After that, Leah gave birth to a daughter and named her Dinah.
22
LIN
Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota.
BSB
BSB:
Then God remembered Rachel. He listened to her and opened her womb,
23
LIN
Akomaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki : « Nzambe alongoli soni na ngai. »
BSB
BSB:
and she conceived and gave birth to a son. “God has taken away my shame,” she said.
24
LIN
Apesaki ye kombo « Jozefi, » mpe alobaki : « Tika ete Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali ! »
BSB
BSB:
She named him Joseph, and said, “May the LORD add to me another son.”
25
LIN
Sima na Rasheli kobota Jozefi, Jakobi alobaki na Labani : — Pesa ngai nzela mpo ete nazonga na mboka na ngai.
BSB
BSB:
Now after Rachel had given birth to Joseph, Jacob said to Laban, “Send me on my way so I can return to my homeland.
26
LIN
Pesa ngai mpe basi mpe bana na ngai, ba-oyo mpo na bango nasaleli yo ; bongo nakokende na ngai. Pamba te oyebi malamu mosala makasi oyo nasaleli yo.
BSB
BSB:
Give me my wives and children for whom I have served you, that I may go on my way. You know how hard I have worked for you.”
27
LIN
Kasi Labani alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te ; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo.
BSB
BSB:
But Laban replied, “If I have found favor in your eyes, please stay. I have learned by divination that the LORD has blessed me because of you.”
28
LIN
Abakisaki : — Katela ngai lifuti na yo mpe nakofuta yo yango.
BSB
BSB:
And he added, “Name your wages, and I will pay them.”
29
LIN
Jakobi alobaki na ye : — Oyebi yo moko ndenge nini ngai nasaleli yo mpe ndenge nini, na nzela na ngai, bibwele na yo ekomi ebele.
BSB
BSB:
Then Jacob answered, “You know how I have served you and how your livestock have thrived under my care.
30
LIN
Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko ?
BSB
BSB:
Indeed, you had very little before my arrival, but now your wealth has increased many times over. The LORD has blessed you wherever I set foot. But now, when may I also provide for my own household?”
31
LIN
Labani atunaki ye : — Nasengeli kopesa yo nini ? Jakobi azongisaki : — Okopesa ngai eloko te. Kasi soki olingi kosala likambo oyo mpo na ngai, nakokoba koleisa mpe kobatela bibwele na yo.
BSB
BSB:
“What can I give you?” Laban asked. “You do not need to give me anything,” Jacob replied. “If you do this one thing for me, I will keep on shepherding and keeping your flocks.
32
LIN
Lelo, nakoleka na kati-kati ya bibwele na yo, nakolongola kati na bana meme, bameme nyonso ya madodo-madodo mpe oyo ezali ya banzela-nzela ya mwindo ; mpe lisusu kati na bantaba nyonso ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe. Wana nde ezala lifuti na ngai.
BSB
BSB:
Let me go through all your flocks today and remove from them every speckled or spotted sheep, every dark-colored lamb, and every spotted or speckled goat. These will be my wages.
33
LIN
Boye bosembo na ngai ekomonana sima na mikolo tango okoya kotala lifuti na ngai. Soki omoni epai na ngai ntaba ezanga madodo to ezanga banzela ya pembe to mwana meme ezanga madodo to ezanga banzela ya mwindo, wana ekozala lokola nayibi yango.
BSB
BSB:
So my honesty will testify for me when you come to check on my wages in the future. If I have any goats that are not speckled or spotted, or any lambs that are not dark-colored, they will be considered stolen.”
34
LIN
Labani alobaki : — Iyo ! Tika ete ezala ndenge olobi.
BSB
BSB:
“Agreed,” said Laban. “Let it be as you have said.”
35
LIN
Kaka na mokolo wana, Labani alongolaki kati na bibwele, bantaba ya mibali ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, bantaba nyonso ya basi ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, mpe bibwele nyonso oyo ezalaki mwa pembe mpe mwa mwindo kati na bana meme. Apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali.
BSB
BSB:
That very day Laban removed all the streaked or spotted male goats and every speckled or spotted female goat—every one that had any white on it—and every dark-colored lamb, and he placed them under the care of his sons.
36
LIN
Sima, Labani atambolaki mikolo misato mpo na kokabwana na Jakobi, wana Jakobi akobaki kobatela ndambo ya bibwele ya Labani oyo etikalaki.
BSB
BSB:
Then he put a three-day journey between himself and Jacob, while Jacob was shepherding the rest of Laban’s flocks.
37
LIN
Jakobi azwaki bitape ya mobesu ya nzete ya pepiliye, ya amande mpe ya platane.
BSB
BSB:
Jacob, however, took fresh branches of poplar, almond, and plane trees, and peeled the bark, exposing the white inner wood of the branches.
38
LIN
Bongo atiaki kati na basani mpe kati na bimelelo, liboso ya bibwele, bitape oyo apalolaki, na esika oyo bibwele ezalaki koya komela mayi. Wana bibwele ya basi ezalaki koyoka posa ya mayi, ezalaki mpe koyoka posa ya kosangisa nzoto na bibwele ya mibali.
BSB
BSB:
Then he set the peeled branches in the watering troughs in front of the flocks coming in to drink. So when the flocks were in heat and came to drink,
39
LIN
Boye, bibwele ezalaki koya kosangisa nzoto liboso ya bitape wana ; mpe tango ezalaki kobota, bana na yango ezalaki na banzela-nzela ya pembe, banzela-nzela ya mwindo mpe madodo-madodo.
BSB
BSB:
they mated in front of the branches. And they bore young that were streaked or speckled or spotted.
40
LIN
Jakobi atiaki pembeni bana meme mpe atindaki yango na esika oyo bana meme ya nzela-nzela mpe ya mwa mwindo ezalaki ; pamba te yango ezalaki kobotama mingi kati na bibwele ya Labani. Ezali boye nde akomaki na bibwele ya ye moko oyo asangisaki te na bibwele ya Labani.
BSB
BSB:
Jacob set apart the young, but made the rest face the streaked dark-colored sheep in Laban’s flocks. Then he set his own stock apart and did not put them with Laban’s animals.
41
LIN
Tango nyonso bibwele ya basi, oyo ezalaki na nzoto minene, ezalaki na posa ya kosangisa nzoto, Jakobi azalaki kotia liboso ya bibwele yango bitape ya nzete kati na basani oyo yango ezalaki komelela mayi mpo ete esangisa nzoto pembeni ya bitape wana.
BSB
BSB:
Whenever the stronger females of the flock were in heat, Jacob would place the branches in the troughs, in full view of the animals, so that they would breed in front of the branches.
42
LIN
Kasi, na esika yango, azalaki kotia te bibwele oyo ekonda. Boye bibwele oyo ekonda ezalaki ya Labani, mpe oyo ya minene ezalaki ya Jakobi.
BSB
BSB:
But if the animals were weak, he did not set out the branches. So the weaker animals went to Laban and the stronger ones to Jacob.
43
LIN
Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.
BSB
BSB:
Thus Jacob became exceedingly prosperous. He owned large flocks, maidservants and menservants, and camels and donkeys.
Chapter complete
You’ve read Genesis 30
Chapter 30 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 31
Read Genesis 31
Listen
Back to Genesis 29
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 30
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 30
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 29
Genesis 30
Genesis 31