Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
31
LIN
BSB
A
a
Genesis 31
31
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Jacob
, person
Laban
, person
Rachel
, person
Isaac
, person
Gilead
, place
Galeed
, place
Leah
, person
Abraham
, person
5 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba : « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. »
BSB
BSB:
Now Jacob heard that Laban’s sons were saying, “Jacob has taken away all that belonged to our father and built all this wealth at our father’s expense.”
2
LIN
Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso.
BSB
BSB:
And Jacob saw from the countenance of Laban that his attitude toward him had changed.
3
LIN
Yawe ayebisaki Jakobi : « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. »
BSB
BSB:
Then the LORD said to Jacob, “Go back to the land of your fathers and to your kindred, and I will be with you.”
4
LIN
Boye Jakobi abengisaki Rasheli mpe Lea na bilanga epai wapi azalaki elongo na bibwele.
BSB
BSB:
So Jacob sent word and called Rachel and Leah to the field where his flocks were,
5
LIN
Alobaki na bango : — Namoni ete ezaleli ya tata na bino epai na ngai etikali lisusu te ndenge ezalaki liboso ; kasi Nzambe ya tata na ngai azalaki elongo na ngai.
BSB
BSB:
and he told them, “I can see from your father’s countenance that his attitude toward me has changed; but the God of my father has been with me.
6
LIN
Boyebi bino moko ete nasalelaki tata na bino na makasi na ngai nyonso.
BSB
BSB:
You know that I have served your father with all my strength.
7
LIN
Kasi ye asakanaki na ngai na kobongola lifuti na ngai mbala zomi. Atako bongo, Nzambe apesaki ye nzela te ya kosala ngai mabe.
BSB
BSB:
And although he has cheated me and changed my wages ten times, God has not allowed him to harm me.
8
LIN
Tango azalaki koloba : « Bibwele ya nzela-nzela ekozala lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya nzela-nzela. Mpe tango azalaki koloba : « Bibwele ya madodo-madodo nde lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya madodo-madodo.
BSB
BSB:
If he said, ‘The speckled will be your wages,’ then the whole flock bore speckled offspring. If he said, ‘The streaked will be your wages,’ then the whole flock bore streaked offspring.
9
LIN
Ezalaki bongo nde Nzambe azalaki kobotola bibwele ya tata na bino mpe kopesa ngai yango.
BSB
BSB:
Thus God has taken away your father’s livestock and given them to me.
10
LIN
Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe.
BSB
BSB:
When the flocks were breeding, I saw in a dream that the streaked, spotted, and speckled males were mating with the females.
11
LIN
Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. »
BSB
BSB:
In that dream the angel of God said to me, ‘Jacob!’ And I replied, ‘Here I am.’
12
LIN
Alobaki na ngai : « Tombola miso mpe tala : bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe ; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo.
BSB
BSB:
‘Look up,’ he said, ‘and see that all the males that are mating with the flock are streaked, spotted, or speckled; for I have seen all that Laban has done to you.
13
LIN
Nazali Nzambe ya Beteli epai wapi osopaki mafuta na likolo ya libanga oyo otelemisaki lokola elembo mpe olapaki ndayi liboso na Ngai. Sik’oyo, telema, wuta na mokili oyo, mpe zonga na mokili na yo epai wapi obotama. »
BSB
BSB:
I am the God of Bethel, where you anointed the pillar and made a solemn vow to Me. Now get up, leave this land at once, and return to your native land.’”
14
LIN
Rasheli mpe Lea bazongisaki : — Boni, tozali lisusu na eloko to na libula kati na ndako ya tata na biso ?
BSB
BSB:
And Rachel and Leah replied, “Do we have any portion or inheritance left in our father’s house?
15
LIN
Azalaki komona biso lokola bapaya, pamba te atekaki biso mpe aliaki mbongo na mito na biso.
BSB
BSB:
Are we not regarded by him as outsiders? Not only has he sold us, but he has certainly squandered what was paid for us.
16
LIN
Yango wana, bozwi nyonso oyo Nzambe abotolaki tata na biso ekomi ya biso na bana na biso. Sik’oyo, sala makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki yo.
BSB
BSB:
Surely all the wealth that God has taken away from our father belongs to us and to our children. So do whatever God has told you.”
17
LIN
Boye Jakobi amatisaki bana na ye mpe basi na ye likolo ya bashamo.
BSB
BSB:
Then Jacob got up and put his children and his wives on camels,
18
LIN
Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana.
BSB
BSB:
and he drove all his livestock before him, along with all the possessions he had acquired in Paddan-aram, to go to his father Isaac in the land in Canaan.
19
LIN
Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye.
BSB
BSB:
Now while Laban was out shearing his sheep, Rachel stole her father’s household idols.
20
LIN
Boye Jakobi akosaki Labani, moto ya Arami, pamba te atikalaki koyebisa ye te ete akokende.
BSB
BSB:
Moreover, Jacob deceived Laban the Aramean by not telling him that he was running away.
21
LIN
Akimaki elongo na nyonso oyo ezalaki ya ye, akatisaki ebale mpe akendeki na mokili ya bangomba ya Galadi.
BSB
BSB:
So he fled with all his possessions, crossed the Euphrates, and headed for the hill country of Gilead.
22
LIN
Sima na mikolo misato, bayebisaki Labani ete Jakobi asili kokima.
BSB
BSB:
On the third day Laban was informed that Jacob had fled.
23
LIN
Boye Labani azwaki elongo na ye bandeko na ye ya mibali, alandaki Jakobi mikolo sambo mpe akangaki ye na mokili ya bangomba ya Galadi.
BSB
BSB:
So he took his relatives with him, pursued Jacob for seven days, and overtook him in the hill country of Gilead.
24
LIN
Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto ; alobaki na ye : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
BSB
BSB:
But that night God came to Laban the Aramean in a dream and warned him, “Be careful not to say anything to Jacob, either good or bad.”
25
LIN
Labani akangaki Jakobi, sima na Jakobi kotonga ndako na ye ya kapo kati na mokili ya bangomba ya Galadi. Boye Labani elongo na bandeko na ye ya mibali bavandaki mpe wana.
BSB
BSB:
Now Jacob had pitched his tent in the hill country of Gilead when Laban overtook him, and Laban and his relatives camped there as well.
26
LIN
Labani alobaki na Jakobi : — Makambo nini osali ngai ? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba !
BSB
BSB:
Then Laban said to Jacob, “What have you done? You have deceived me and carried off my daughters like captives of war!
27
LIN
Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda.
BSB
BSB:
Why did you run away secretly and deceive me, without even telling me? I would have sent you away with joy and singing, with tambourines and harps.
28
LIN
Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi ! Osali penza lokola moto ya liboma !
BSB
BSB:
But you did not even let me kiss my grandchildren and my daughters goodbye. Now you have done a foolish thing.
29
LIN
Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
BSB
BSB:
I have power to do you great harm, but last night the God of your father said to me, ‘Be careful not to say anything to Jacob, either good or bad.’
30
LIN
Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai ?
BSB
BSB:
Now you have gone off because you long for your father’s house. But why have you stolen my gods?”
31
LIN
Jakobi azongiselaki Labani : — Nabangaki, pamba te nakanisaki ete okobotola ngai bana na yo ya basi na makasi.
BSB
BSB:
“I was afraid,” Jacob answered, “for I thought you would take your daughters from me by force.
32
LIN
Kasi tika ete moto oyo okokuta awa na banzambe na yo akufa. Na miso ya bandeko na biso ya mibali, luka epai na ngai nyonso oyo ezali ya yo mpe zwa yango. Nzokande, Jakobi ayebaki te ete ezalaki Rasheli nde moto ayibaki banzambe yango.
BSB
BSB:
If you find your gods with anyone here, he shall not live! In the presence of our relatives, see for yourself if anything is yours, and take it back.” For Jacob did not know that Rachel had stolen the idols.
33
LIN
Labani akotaki na ndako ya kapo ya Jakobi, na ndako ya kapo ya Lea, mpe na ndako ya kapo ya basi bawumbu mibale ; kasi amonaki eloko te. Sima na ye kobima na ndako ya kapo ya Lea, akotaki na oyo ya Rasheli.
BSB
BSB:
So Laban went into Jacob’s tent, then Leah’s tent, and then the tents of the two maidservants, but he found nothing. Then he left Leah’s tent and entered Rachel’s tent.
34
LIN
Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te.
BSB
BSB:
Now Rachel had taken Laban’s household idols, put them in the saddlebag of her camel, and was sitting on them. And Laban searched everything in the tent but found nothing.
35
LIN
Rasheli alobaki na tata na ye : — Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso. Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te.
BSB
BSB:
Rachel said to her father, “Sir, do not be angry that I cannot stand up before you; for I am having my period.” So Laban searched but could not find the household idols.
36
LIN
Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye : — Mbeba nini nasalaki ? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye ?
BSB
BSB:
Then Jacob became incensed and challenged Laban. “What is my crime?” he said. “For what sin of mine have you so hotly pursued me?
37
LIN
Tango oluki kati na biloko na ngai nyonso, eloko nini ya ndako na yo omoni ? Tia yango awa liboso ya bandeko na yo ya mibali mpe ya ngai mpo bakatela biso mibale likambo.
BSB
BSB:
You have searched all my goods! Have you found anything that belongs to you? Put it here before my brothers and yours, that they may judge between the two of us.
38
LIN
Nasalaki epai na yo mibu tuku mibale ; bameme na yo mpe bantaba na yo elongwaki zemi te, mpe natikalaki te kolia bameme ya mibali kati na bibwele na yo.
BSB
BSB:
I have been with you for twenty years now. Your sheep and goats have not miscarried, nor have I eaten the rams of your flock.
39
LIN
Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu.
BSB
BSB:
I did not bring you anything torn by wild beasts; I bore the loss myself. And you demanded payment from me for what was stolen by day or night.
40
LIN
Moyi ezalaki kobeta ngai na mokolo, malili ezalaki kokanga ngai na butu, mpe pongi ezalaki kokima ngai na miso.
BSB
BSB:
As it was, the heat consumed me by day and the frost by night, and sleep fled from my eyes.
41
LIN
Navandi na ndako na yo mibu tuku mibale : nasalelaki yo mibu zomi na minei mpo na bana na yo mibale ya basi, mpe mibu motoba mpo na bibwele na yo ; mbala zomi obongolaki lifuti na ngai.
BSB
BSB:
Thus for twenty years I have served in your household—fourteen years for your two daughters and six years for your flocks—and you have changed my wages ten times!
42
LIN
Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki.
BSB
BSB:
If the God of my father, the God of Abraham and the Fear of Isaac, had not been with me, surely by now you would have sent me away empty-handed. But God has seen my affliction and the toil of my hands, and last night He rendered judgment.”
43
LIN
Labani azongiselaki Jakobi : — Basi oyo bazali bana na ngai ya basi, bana oyo bazali bana na ngai, bibwele oyo ezali ya ngai mpe nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Bongo lelo, eloko nini nakoki kosala mpo na bana na ngai ya basi mpe mpo na bana oyo bango baboti ?
BSB
BSB:
But Laban answered Jacob, “These daughters are my daughters, these sons are my sons, and these flocks are my flocks! Everything you see is mine! Yet what can I do today about these daughters of mine or the children they have borne?
44
LIN
Sik’oyo Jakobi, tosala boyokani kati na yo mpe ngai, mpe tika ete yango ezala litatoli kati na biso.
BSB
BSB:
Come now, let us make a covenant, you and I, and let it serve as a witness between you and me.”
45
LIN
Boye Jakobi azwaki libanga mpe atelemisaki yango lokola elembo.
BSB
BSB:
So Jacob picked out a stone and set it up as a pillar,
46
LIN
Jakobi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Bolokota mabanga ! » Balokotaki mabanga, batiaki yango liboke, mpe bango nyonso baliaki wana na likolo ya liboke ya mabanga.
BSB
BSB:
and he said to his relatives, “Gather some stones.” So they took stones and made a mound, and there by the mound they ate.
47
LIN
Labani abengaki esika yango Yegari-Saduta mpe Jakobi abengaki yango Galedi.
BSB
BSB:
Laban called it Jegar-sahadutha, and Jacob called it Galeed.
48
LIN
Labani alobaki : — Lelo, liboke oyo ya mabanga ezali litatoli kati na yo mpe ngai. Yango wana babengaki yango Galedi.
BSB
BSB:
Then Laban declared, “This mound is a witness between you and me this day.” Therefore the place was called Galeed.
49
LIN
Babengaki yango lisusu Mitsipa ; pamba te Labani alobaki lisusu : « Tika ete Yawe akengelaka kati na yo mpe ngai tango tokomonana lisusu te.
BSB
BSB:
It was also called Mizpah, because Laban said, “May the LORD keep watch between you and me when we are absent from each other.
50
LIN
Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. »
BSB
BSB:
If you mistreat my daughters or take other wives, although no one is with us, remember that God is a witness between you and me.”
51
LIN
Labani alobaki lisusu na Jakobi : — Tala liboke oyo ya mabanga mpe libanga ya elembo oyo natelemisi kati na ngai mpe yo.
BSB
BSB:
Laban also said to Jacob, “Here is the mound, and here is the pillar I have set up between you and me.
52
LIN
Liboke oyo ya mabanga ezali motatoli, mpe libanga oyo ya elembo ezali motatoli. Nasengeli te kokatisa liboke oyo ya mabanga mpe libanga oyo ya elembo mpo ete naya kosala yo mabe na ngambo na yo ; mpe yo osengeli te kokatisa liboke ya mabanga mpe libanga ya elembo mpo na koya kosala ngai mabe na ngambo na ngai.
BSB
BSB:
This mound is a witness, and this pillar is a witness, that I will not go past this mound to harm you, and you will not go past this mound and pillar to harm me.
53
LIN
Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso ! Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga.
BSB
BSB:
May the God of Abraham and the God of Nahor, the God of their father, judge between us.” So Jacob swore by the Fear of his father Isaac.
54
LIN
Jakobi abonzaki mbeka likolo ya ngomba mpe abengisaki bandeko na ye ya mibali mpo na kolia bilei. Tango basilisaki kolia, balekisaki butu na esika wana, likolo ya ngomba.
BSB
BSB:
Then Jacob offered a sacrifice on the mountain and invited his relatives to eat a meal. And after they had eaten, they spent the night on the mountain.
55
LIN
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Labani apesaki bakoko na ye mpe bana na ye ya basi beze ; apambolaki bango mpe azongaki na ndako na ye.
BSB
BSB:
Early the next morning, Laban got up and kissed his grandchildren and daughters and blessed them. Then he left to return home.
Chapter complete
You’ve read Genesis 31
Chapter 31 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 32
Read Genesis 32
Listen
Back to Genesis 30
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 31
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 31
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 30
Genesis 31
Genesis 32