Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
32
LIN
BSB
A
a
Genesis 32
32
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Jacob
, person
Esau
, person
Peniel
, place
Abraham
, person
Jordan
, place
Isaac
, person
Edom
, place
Laban
, person
3 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye.
BSB
BSB:
Jacob also went on his way, and the angels of God met him.
2
LIN
Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi.
BSB
BSB:
When Jacob saw them, he said, “This is the camp of God.” So he named that place Mahanaim.
3
LIN
Jakobi atindaki bantoma liboso na ye epai ya Ezawu, ndeko na ye, na mokili ya Seiri, kati na zamba ya Edomi.
BSB
BSB:
Jacob sent messengers ahead of him to his brother Esau in the land of Seir, the country of Edom.
4
LIN
Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.
BSB
BSB:
He instructed them, “You are to say to my master Esau, ‘Your servant Jacob says: I have been staying with Laban and have remained there until now.
5
LIN
Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »
BSB
BSB:
I have oxen, donkeys, flocks, menservants, and maidservants. I have sent this message to inform my master, so that I may find favor in your sight.’”
6
LIN
Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki : « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. »
BSB
BSB:
When the messengers returned to Jacob, they said, “We went to your brother Esau, and now he is coming to meet you—he and four hundred men with him.”
7
LIN
Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale ; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo.
BSB
BSB:
In great fear and distress, Jacob divided his people into two camps, as well as the flocks and herds and camels.
8
LIN
Azalaki komilobela : « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. »
BSB
BSB:
He thought, “If Esau comes and attacks one camp, then the other camp can escape.”
10
LIN
Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. ›
BSB
BSB:
I am unworthy of all the kindness and faithfulness You have shown Your servant. Indeed, with only my staff I came across the Jordan, but now I have become two camps.
11
LIN
Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale.
BSB
BSB:
Please deliver me from the hand of my brother Esau, for I am afraid that he may come and attack me and the mothers and children with me.
12
LIN
Nabondeli Yo, kangola ngai na maboko ya ndeko na ngai, Ezawu, pamba te nazali kobanga ete aya kobundisa ngai elongo na bamama mpe bana na bango.
BSB
BSB:
But You have said, ‘I will surely make you prosper, and I will make your offspring like the sand of the sea, too numerous to count.’”
13
LIN
Nzokande, Yo olobaki na ngai : ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › »
BSB
BSB:
Jacob spent the night there, and from what he had brought with him, he selected a gift for his brother Esau:
14
LIN
Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye :
BSB
BSB:
200 female goats, 20 male goats, 200 ewes, 20 rams,
15
LIN
bantaba ya basi nkama mibale mpe bantaba ya mibali tuku mibale, bameme ya basi nkama mibale mpe bameme ya mibali tuku mibale,
BSB
BSB:
30 milk camels with their young, 40 cows, 10 bulls, 20 female donkeys, and 10 male donkeys.
16
LIN
shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi. Akabolaki yango na bitonga mpe apesaki yango epai ya basali na ye. Alobaki na bango : « Boleka liboso na ngai mpe botia etonga moko mosika na mosusu. »
BSB
BSB:
He entrusted them to his servants in separate herds and told them, “Go on ahead of me, and keep some distance between the herds.”
17
LIN
Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? ›
BSB
BSB:
He instructed the one in the lead, “When my brother Esau meets you and asks, ‘To whom do you belong, where are you going, and whose animals are these before you?’
18
LIN
Okozongisa : ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › »
BSB
BSB:
then you are to say, ‘They belong to your servant Jacob. They are a gift, sent to my lord Esau. And behold, Jacob is behind us.’”
19
LIN
Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele : « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu.
BSB
BSB:
He also instructed the second, the third, and all those following behind the herds: “When you meet Esau, you are to say the same thing to him.
20
LIN
Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. »
BSB
BSB:
You are also to say, ‘Look, your servant Jacob is right behind us.’” For he thought, “I will appease Esau with the gift that is going before me. After that I can face him, and perhaps he will accept me.”
21
LIN
Boye kado ya Jakobi ekendeki liboso, kasi ye moko alekisaki butu kati na Molako.
BSB
BSB:
So Jacob’s gifts went on before him, while he spent the night in the camp.
22
LIN
Na butu wana, Jakobi alamukaki, azwaki basi na ye mibale, basali na ye mibale ya basi, bana na ye zomi na moko mpe akatisaki mayi ya Yaboki.
BSB
BSB:
During the night Jacob got up and took his two wives, his two maidservants, and his eleven sons, and crossed the ford of the Jabbok.
23
LIN
Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso.
BSB
BSB:
He took them and sent them across the stream, along with all his possessions.
24
LIN
Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana.
BSB
BSB:
So Jacob was left all alone, and there a man wrestled with him until daybreak.
25
LIN
Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda.
BSB
BSB:
When the man saw that he could not overpower Jacob, he struck the socket of Jacob’s hip and dislocated it as they wrestled.
26
LIN
Sima, moto yango alobaki : — Tika ngai nakende, pamba te tongo elingi kotana. Kasi Jakobi azongisaki : — Nakotika yo te kokende soki opamboli ngai te.
BSB
BSB:
Then the man said, “Let me go, for it is daybreak.” But Jacob replied, “I will not let you go unless you bless me.”
27
LIN
Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.
BSB
BSB:
“What is your name?” the man asked. “Jacob,” he replied.
28
LIN
Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.
BSB
BSB:
Then the man said, “Your name will no longer be Jacob, but Israel, because you have struggled with God and with men, and you have prevailed.”
29
LIN
Jakobi alobaki : — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? Boye apambolaki ye na esika wana.
BSB
BSB:
And Jacob requested, “Please tell me your name.” But he replied, “Why do you ask my name?” Then he blessed Jacob there.
30
LIN
Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki : « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. »
BSB
BSB:
So Jacob named the place Peniel, saying, “Indeed, I have seen God face to face, and yet my life was spared.”
31
LIN
Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye.
BSB
BSB:
The sun rose above him as he passed by Penuel, and he was limping because of his hip.
32
LIN
Yango wana kino lelo, bana ya Isalaele baliaka mosuni ya mopende te, pamba te Nzambe abetaki Jakobi na mosuni oyo ekangami na mokuwa ya loketo.
BSB
BSB:
Therefore to this day the Israelites do not eat the tendon attached to the socket of the hip, because the socket of Jacob’s hip was struck near that tendon.
Chapter complete
You’ve read Genesis 32
Chapter 32 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 33
Read Genesis 33
Listen
Back to Genesis 31
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 32
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 32
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 31
Genesis 32
Genesis 33